< Ba-Ebre 2 >

1 Yango wana, tosengeli kozwa lisusu na motuya makasi mateya oyo toyokaki mpo ete tobunga te.
因此,我们必须更密切地关注我们学到的一切,免得我们远离它们。
2 Pamba te soki sango oyo epesamaki, na tango ya kala, na nzela ya ba-anjelu, ezalaki na motuya makasi na ndenge ete bato oyo batiolaki yango mpe batosaki yango te bazwaki etumbu oyo ekokaki mpo na bango,
如果天使所传递的信息都是值得相信的,那么所有罪行和不服从之举,就会得到应得的结果。
3 ndenge nini biso tozanga kozwa etumbu soki tozwi na pamba lobiko ya boye? Solo, Ye moko Nkolo nde asakolaki liboso na tina na lobiko yango; bongo na sima, bato oyo bayokaki sango yango batalisaki biso bosolo na yango.
如果我们忽略如此伟大的救赎,怎么又能逃罪呢?这救赎最初由主亲自宣讲,后来听见它的人又向我们证实。
4 Nzambe mpe azalaki kokokisa bosolo ya litatoli na bango na nzela ya bilembo ya kokamwa, na nzela ya misala minene, ya bikamwa ya ndenge na ndenge mpe ya makabo ya Molimo Mosantu, oyo azalaki kopesa bango kolanda mokano na Ye.
上帝又按照自己的选择,用神迹、奇事和各种异能以及圣灵之礼,作为见证。
5 Nzambe atiaki te mokili oyo ezali koya, mokili oyo tozali kolobela, na se ya bokonzi ya ba-anjelu.
上帝并没有把我们所说“即将到来的世界”,交给天使管理;
6 Nzokande, ezali na moko oyo atatolaki boye kati na Makomi: « Moto azali nini mpo ete okanisa ye? Mwana na moto azali nani mpo ete obatela ye?
但经文中说道:“人算甚么,你竟担心他们?人之子算甚么,你竟关心他?
7 Okitisaki ye na se ya ba-anjelu mpo na mwa tango moke, kasi olatisaki ye motole ya nkembo mpe ya lokumu,
你让他比天使卑微一点;你赐给他荣耀尊贵, 将他置于万物之上。
8 mpe otiaki biloko nyonso na se ya matambe na ye. » Awa Nzambe atiaki nyonso na se ya bokonzi na ye, atikaki ata eloko moko te oyo ezangaki kozala na se ya bokonzi na ye. Nzokande, ezali solo ete, kino sik’oyo, tomoni nanu te ete nyonso ezali na se ya bokonzi na ye.
你让他拥有统治一切的权利。”上帝给了他统治万物的权利,就没有什么高于他了。然而,我们看到,并不是所有的东西都受制于他的权威,还不是。
9 Kasi tala makambo oyo tozali komona: Yesu oyo akitisamaki na se ya ba-anjelu mpo na mwa tango moke, alati sik’oyo motole ya nkembo mpe ya lokumu mpo ete andimaki pasi oyo ememaki Ye kino na kufa. Na bongo, na ngolu ya Nzambe, Yesu akufaki nde mpo na bato nyonso.
但我们看到耶稣的地位要比天使略低,通过遭受死亡的痛苦,获得荣耀尊贵的冠冕。通过上帝的恩典,耶稣为众人体验死亡。
10 Emonanaki malamu ete, mpo na komema bana ebele na nkembo, Nzambe oyo akela biloko nyonso mpe azali Nkolo na yango akomisa ya kokoka na nzela ya pasi, mokonzi oyo asengelaki komema bango na lobiko.
那创造和保持一切的上帝,应该为他的很多儿子带来荣耀。引导人们获得救赎的耶稣是通过苦难完全准备好的。。
11 Pamba te Mobulisi ya basumuki mpe bato oyo babulisami bazali kaka na Tata moko. Yango wana Yesu azalaki na soni te ya kobenga bango bandeko na Ye,
因为那让人变得神圣之人,以及那些变得神圣之人,都是一家人。所以他会毫不犹豫地称他们为兄弟。
12 tango alobaki: « Nakotatola Kombo na Yo epai ya bandeko na Ngai, nakokumisa Yo na banzembo kati na mayangani. »
他说:“我要向他们宣扬你的名,我要在他们的聚会中赞美你。”
13 Yesu alobaki lisusu: « Nakotia elikya na Ngai kati na Ye; » Mpe lisusu: « Ngai oyo, Ngai elongo na bana oyo Nzambe apesa Ngai. »
又说:“我要信任他。”;还说:“我来了,与上帝赐给我的孩子们一起。”
14 Boye, lokola bana yango bazali na nzoto mpe makila, Ye mpe asanganaki elongo na bomoto na bango mpo ete, na nzela ya kufa na Ye, asilisa nguya ya Satana oyo azalaki kosimba nguya ya kufa,
因为孩子们都有血肉之躯,他自己也同样拥有血肉之躯,这样就可以通过死亡,消灭那掌控死亡权力的魔鬼,
15 mpe akangola bato nyonso oyo, bomoi na bango mobimba, bakomaki bawumbu likolo na kobanga kufa.
释放那些因为怕死而终身为奴仆之人。
16 Pamba te ezali penza ya solo ete Yesu ayaki te mpo na kosunga ba-anjelu, kasi mpo na kosunga nde bakitani ya Abrayami.
当然,他关心的并不是天使,他只关心亚伯拉罕的子孙。
17 Yango wana asengelaki kozala ndenge moko na bandeko na Ye na makambo nyonso mpo ete akoma Mokonzi ya Banganga-Nzambe, oyo atonda na boboto, mpe oyo bakoki kotiela motema na makambo oyo etali boyokani ya moto elongo na Nzambe, mpe mpo ete akoka kosala mosala ya bolimbisi masumu ya bato.
所以他必须在各方面与其兄弟们相同,这样就可以在上帝的事情中,成为仁慈忠信的大祭司,原谅其子民的罪。
18 Pamba te, lokola Ye moko amonaki pasi tango amekamaki, akoki mpe kosunga bato oyo bazali komekama.
因为他自己已在试探中遭受苦难,能够帮助那些被试探的人。

< Ba-Ebre 2 >