< Ba-Ebre 13 >
1 Tika ete bondeko ewumela kati na bino!
η φιλαδελφια μενετω
2 Bolemba te koyambaka malamu bapaya, pamba te, na nzela wana, bato mosusu bayambaki ba-anjelu wana bayebaki te ete bazali solo ba-anjelu.
τησ φιλοξενιασ μη επιλανθανεσθε δια ταυτησ γαρ ελαθον τινεσ ξενισαντεσ αγγελουσ
3 Bokanisaka bato oyo bazali kati na boloko lokola nde bino mpe bozali kati na boloko elongo na bango. Bokanisaka bato oyo bazali komona pasi, mpo ete bino mpe bozali na nzoto oyo emonaka pasi.
μιμνησκεσθε των δεσμιων ωσ συνδεδεμενοι των κακουχουμενων ωσ και αυτοι οντεσ εν σωματι
4 Tika ete moto nyonso apesa libala lokumu, mpe mbeto ya libala ezala peto, pamba te Nzambe akosambisa bato na pite mpe bato na bikobo.
τιμιοσ ο γαμοσ εν πασιν και η κοιτη αμιαντοσ πορνουσ δε και μοιχουσ κρινει ο θεοσ
5 Bozalaka na lokoso ya mbongo te, bosepelaka nde na oyo bozali na yango, pamba te Ye moko Nzambe alobaki: « Nakotikala kokabwana na yo te, nakotikala kosundola yo te. »
αφιλαργυροσ ο τροποσ αρκουμενοι τοισ παρουσιν αυτοσ γαρ ειρηκεν ου μη σε ανω ουδ ου μη σε εγκαταλειπω
6 Boye tokoki koloba na elikya nyonso: « Nkolo azali Mosungi na ngai, nakobanga te; bato bakoki kosala ngai nini? »
ωστε θαρρουντασ ημασ λεγειν κυριοσ εμοι βοηθοσ και ου φοβηθησομαι τι ποιησει μοι ανθρωποσ
7 Bokanisaka bakambi na bino, oyo bateyaki bino Liloba na Nzambe; botala ndenge nini suka ya bomoi na bango ezalaki, mpe bomekola kondima na bango.
μνημονευετε των ηγουμενων υμων οιτινεσ ελαλησαν υμιν τον λογον του θεου ων αναθεωρουντεσ την εκβασιν τησ αναστροφησ μιμεισθε την πιστιν
8 Yesu-Klisto azali ndenge moko: lobi oyo ewuti koleka, lelo, mpe libela na libela. (aiōn )
ιησουσ χριστοσ χθεσ και σημερον ο αυτοσ και εισ τουσ αιωνασ (aiōn )
9 Bolandaka te lolenge nyonso ya mateya ya sika, pamba te ebongi ete mitema na biso elendisama na nzela ya ngolu ya Nzambe, kasi na nzela te ya mibeko oyo esungaki ata moke te bato oyo bazalaki kotosa yango.
διδαχαισ ποικιλαισ και ξεναισ μη παραφερεσθε καλον γαρ χαριτι βεβαιουσθαι την καρδιαν ου βρωμασιν εν οισ ουκ ωφεληθησαν οι περιπατησαντεσ
10 Tozali na etumbelo, kasi Banganga-Nzambe oyo basalaka kati na Mongombo bazali na bokonzi te ya kolia mbeka oyo babonzi na likolo ya etumbelo yango,
εχομεν θυσιαστηριον εξ ου φαγειν ουκ εχουσιν εξουσιαν οι τη σκηνη λατρευοντεσ
11 pamba te banzoto ya banyama oyo mokonzi ya Banganga-Nzambe amemaka makila na yango kati na Esika-Oyo-Eleki-Bule lokola mbeka mpo na bolimbisi ya masumu, etumbamaka na libanda ya molako.
ων γαρ εισφερεται ζωων το αιμα περι αμαρτιασ εισ τα αγια δια του αρχιερεωσ τουτων τα σωματα κατακαιεται εξω τησ παρεμβολησ
12 Yango wana Yesu mpe akufaki na libanda ya mboka mpo na kobulisa bato na nzela ya makila na Ye moko.
διο και ιησουσ ινα αγιαση δια του ιδιου αιματοσ τον λαον εξω τησ πυλησ επαθεν
13 Boye, biso mpe tokende epai ya Yesu na libanda ya molako, na kondima koyoka soni oyo Ye ayokaki;
τοινυν εξερχωμεθα προσ αυτον εξω τησ παρεμβολησ τον ονειδισμον αυτου φεροντεσ
14 pamba te, kati na mokili oyo, tozali na engumba moko te oyo ekowumela libela na libela, kasi tozali nde koluka engumba oyo ezali koya.
ου γαρ εχομεν ωδε μενουσαν πολιν αλλα την μελλουσαν επιζητουμεν
15 Yango wana, na nzela ya Yesu, tobonzelaka Nzambe tango nyonso mbeka ya masanzoli, elingi koloba: mbuma ya bibebu oyo etatolaka polele Kombo na Ye.
δι αυτου ουν αναφερωμεν θυσιαν αινεσεωσ δια παντοσ τω θεω τουτ εστιν καρπον χειλεων ομολογουντων τω ονοματι αυτου
16 Bobosanaka te kosala bolamu mpe kosunga bato, pamba te yango nde bambeka oyo Nzambe asepelaka na yango.
τησ δε ευποιιασ και κοινωνιασ μη επιλανθανεσθε τοιαυταισ γαρ θυσιαισ ευαρεστειται ο θεοσ
17 Botosaka bakambi na bino mpe bosalelaka mitindo oyo bapesaka bino, pamba te bazali bakengeli ya milimo na bino mpe bakosamba likolo na bino liboso ya Nzambe. Bosalaka bongo mpo ete basala mosala na bango na esengo, kasi na koyimayima te, soki te bokozanga litomba.
πειθεσθε τοισ ηγουμενοισ υμων και υπεικετε αυτοι γαρ αγρυπνουσιν υπερ των ψυχων υμων ωσ λογον αποδωσοντεσ ινα μετα χαρασ τουτο ποιωσιν και μη στεναζοντεσ αλυσιτελεσ γαρ υμιν τουτο
18 Bosambelaka mpo na biso! Pamba te tondimisami penza ete tozali na mitema ya peto mpe tozwi mokano ya kotambola na bomoi ya lokumu kati na makambo nyonso.
προσευχεσθε περι ημων πεποιθαμεν γαρ οτι καλην συνειδησιν εχομεν εν πασιν καλωσ θελοντεσ αναστρεφεσθαι
19 Nazali penza kosenga na bino ete bobondela Nzambe mpo ete bazongisa ngai na lombangu epai na bino.
περισσοτερωσ δε παρακαλω τουτο ποιησαι ινα ταχιον αποκατασταθω υμιν
20 Tika ete Nzambe ya kimia, Ye oyo asekwisaki kati na bakufi Mobateli monene ya bameme, Yesu, Nkolo na biso, na nzela ya makila ya Boyokani ya seko, (aiōnios )
ο δε θεοσ τησ ειρηνησ ο αναγαγων εκ νεκρων τον ποιμενα των προβατων τον μεγαν εν αιματι διαθηκησ αιωνιου τον κυριον ημων ιησουν (aiōnios )
21 apesa bino makoki ya kosalaka bolamu ya lolenge nyonso mpo na kokokisa mokano na Ye, mpe asala kati na biso makambo nyonso oyo esepelisaka Ye, na nzela ya Yesu-Klisto! Tika ete nkembo ezonga epai na Ye, mpo na libela na libela! Amen! (aiōn )
καταρτισαι υμασ εν παντι εργω αγαθω εισ το ποιησαι το θελημα αυτου ποιων εν υμιν το ευαρεστον ενωπιον αυτου δια ιησου χριστου ω η δοξα εισ τουσ αιωνασ των αιωνων αμην (aiōn )
22 Nazali kosenga na bino bandeko na ngai ete bokanga motema na koyamba malendisi oyo nakomeli bino na mokuse penza.
παρακαλω δε υμασ αδελφοι ανεχεσθε του λογου τησ παρακλησεωσ και γαρ δια βραχεων επεστειλα υμιν
23 Boyeba ete ndeko na biso, Timote, asilaki kobima na boloko. Soki akoya noki, nakoya nzela moko na ye mpo na komona bino.
γινωσκετε τον αδελφον τιμοθεον απολελυμενον μεθ ου εαν ταχιον ερχηται οψομαι υμασ
24 Bopesa mbote na bakambi na bino nyonso mpe na basantu nyonso. Bandeko ya Itali batindeli bino mbote.
ασπασασθε παντασ τουσ ηγουμενουσ υμων και παντασ τουσ αγιουσ ασπαζονται υμασ οι απο τησ ιταλιασ
25 Tika ete ngolu ya Nzambe ezala na bino nyonso!
η χαρισ μετα παντων υμων αμην