< Ba-Ebre 12 >

1 Yango wana, lokola batatoli ebele bazingeli biso, tobwaka mikumba mpe masumu nyonso oyo ezali kozingela biso na bangambo nyonso mpe topota mbangu, na molende nyonso, kati na momekano oyo ezali liboso na biso.
第三款 既往の教訓を信者の現状に應用す 然れば我等も、斯く夥しき證人の雲に圍まれたれば、一切の荷と纏へる罪とを卸して、
2 Tika ete miso na biso etalaka kaka Yesu oyo azali Mobandisi mpe Mokokisi ya kondima; pamba te, na esika ya esengo oyo ebongisama mpo na Ye, andimaki kokufa na ekulusu mpe koyoka soni makasi, mpe avandi sik’oyo na ngambo ya loboko ya mobali ya Kiti ya Bokonzi ya Nzambe.
我等の信仰の指導者に在し完成者に在すイエズスに鑑みつつ、忍耐を以て我等に備はれる勝負に走るべし。即ちイエズスは曾て、己に備はれる喜に代へて、辱を厭はず、十字架を忍び給ひ、而して神の玉座の右に坐し給ふ。
3 Bokundolaka mozindo ya Ye oyo akangaki motema liboso ya basumuki oyo bazalaki konyokola Ye, mpo ete bobungisa te molende mpe mpiko na bino.
汝等倦みて己が心の弱らざらん為に、己に對する惡人のさしも甚しかりし反抗を忍び給ひし者を回想せよ。
4 Na etumba na bino ya kotelemela masumu, nanu bobundi te kino kondima ata kokufa.
蓋汝等の罪に對ひて戰ふに、未だ血を流す程に抵抗せし事なし。
5 Mpe bobosani maloba nyonso ya malendisi oyo ayebisaki bino ndenge tata ayebisaka bana: « Mwana na Ngai, kozwa na pamba te etumbu ya Nkolo, mpe kobungisa mpiko na yo te soki apameli yo.
汝等は又、子に於るが如くに告げらるる勧を忘れたり。曰く、「我子よ、主の懲を疎畧にすることなく、之に懲らされ奉る時倦む事勿れ、
6 Pamba te Nkolo apamelaka moto oyo Ye alingaka, apesaka etumbu na moto nyonso oyo Ye ayebaka lokola mwana na Ye. »
主は其寵み給ふ人を懲らし、総て子として受け給ふ者を鞭ち給へばなり」と。
7 Bokangaka motema liboso ya bapasi oyo Nzambe apesaka bino lokola etumbu, pamba te azwaka bino lokola bana na Ye. Boni, ezali solo na mwana oyo tata na ye apesaka ye etumbu te?
汝等懲を忍べ、神の汝等に對し給ふは、恰も子等に於るが如し。誰か父に懲らされざる子あらん、
8 Soki bapesi bino etumbu te ndenge bana nyonso bazwaka, elingi koloba ete bozali bana bazanga tata, kasi bana ya ndako te.
汝等若凡ての人の受くる懲の外に在らば、是私生児にして正子に非ざるべし。
9 Mpo ete biso nyonso tozalaki na batata ya mosuni, oyo bazalaki kopesa biso bitumbu, mpe tozalaki kaka kotosa bango, bongo mpo na nini te kotosa Tata ya milimo mpo ete tozwa bomoi?
且我等は肉身の父に懲らされて、尚之を尊敬しつつありしものを、况や霊の父には歸服して生命を得べきに非ずや。
10 Batata na biso bazalaki kopesa biso bitumbu mpo na mwa tango moke, ndenge mitema na bango ezalaki kolinga; kasi Nzambe apesaka biso etumbu mpo na bolamu na biso, mpo ete tokoka kosangana na bosantu na Ye.
肉身の父等は、少き日數の間に心の儘に我等を懲らしたるに、霊の父の懲らし給ふは、己が聖徳を蒙らしめて我等を益し給はん為なり。
11 Moto moko te azalaka na esengo soki bapesi ye etumbu, pamba te epesaka mawa; kasi sima na tango, etumbu ebotaka lokola mbuma, epai ya moto oyo bapesi yango: bomoi ya bosembo mpe ya kimia.
総て懲は其當時に在りては、喜ばしく見えず、悲しきが如くなれども、後には之を以て鍛錬せられたる人に、義の平穏なる果を結ぶものなり。
12 Yango wana, bolendisa maboko na bino, oyo ebandi kolemba mpe bokembisa mabolongo na bino, oyo ekomi kolenga.
然れば汝等、萎えたる手、弱りたる膝を立てよ、
13 Bosala banzela ya alima mpo na makolo na bino, mpo ete lokolo ya tengu-tengu elongwa te, kasi ebika nde.
誰も足萎えて踏外す事なく、寧醫されん為に己の足踏を直くせよ。
14 Bolukaka kovanda na kimia elongo na bato nyonso mpe kotambola na bomoi ya bosantu, pamba te moko te akomona Nkolo soki azangi bosantu.
汝等凡ての人と和合し、聖徳を追求せよ、之なくては誰も主を見奉る事を得じ。
15 Bosenzelaka ete moto moko te azanga ngolu ya Nzambe; bosenzelaka mpe ete mosisa moko te ya bololo ebotama mpo na kokotisa mobulu mpe kobebisa bomoi ya bato ebele kati na bino.
汝等注意して、一人も恩寵より退く事なく、如何なる苦き根にもあれ、生出でて妨を為し、多くの人を汚すことなからしめ、
16 Bosenzelaka ete moto moko te atambola na bomoi ya pite to atiola Nzambe lokola Ezawu oyo atekaki bokulutu na ye likolo ya biloko ya kolia.
一人たりとも、食物の為に長子権を売りしエザウの如く、私通者不敬者と成る事なからしめよ。
17 Boyebi malamu ete, na sima, tango alingaki kokitana na lipamboli kowuta na tata na ye, azangelaki yango, pamba te alongaki te kobongola mokano ya tata na ye atako asengaki lipamboli yango na kolela.
蓋彼が、後に祝福を継がん事を望みしも退けられ、涙を以て回復を求めたれど其餘地を得ざりしは、汝等の知るべき所なり。
18 Bino, bopusani te, lokola bana ya Isalaele, pene ya ngomba oyo bakokaki kosimba mpe ezali kopela moto, pene ya lipata, pene ya molili makasi, pene ya mopepe makasi,
汝等の近づけるは、触れ得べき山、燃ゆる火、黒雲、暗黒、暴風、
19 pene ya lokito ya kelelo to mpe pene ya mongongo oyo ezali kobimisa maloba na lolenge ete bato oyo bayokaki maloba yango basengaki ete bayoka lisusu te ata liloba moko,
溂叭の音、又言の聲には非ず。彼聲を聞きし人々は、言の己に語られざらん事を願へり。
20 pamba te babangaki mitindo oyo epesamaki: « Moto nyonso oyo akosimba ngomba, ezala soki ezali nyama, bakoboma ye to yango na mabanga. »
蓋獣すらも、山に触れなば石を擲たるべしと命ぜられたるを忍び得ず、
21 Mpo na somo makasi ya makambo oyo amonaki, Moyize agangaki: « Nazali kolenga na somo! »
見ゆる物甚だ恐ろしくして、モイゼも、我恐怖慄けり、と言へり。
22 Kasi, bopusani nde pene ya ngomba Siona, pene ya Yelusalemi ya Likolo, engumba ya Nzambe na bomoi; pene ya bankoto na bankoto ya ba-anjelu oyo basangani mpo na kosepela,
然るに汝等の近づきたるは、シヨンの山と、活き給へる神の都なる天のエルザレムと、億萬の天使の喜ばしき集會と、
23 pene ya lisanga ya bana liboso ya Nzambe, ba-oyo bakombo na bango ekomama kati na Likolo; pene ya Nzambe, Mosambisi ya bato nyonso; pene ya milimo ya bato ya sembo oyo Nzambe akomisaki bato ya kokoka;
天に其名を記されたる長子等の教會と、萬民の審判者に在す神と、全うせられし義人等の霊と、
24 pene ya Yesu, Moyokanisi ya Boyokani ya sika; mpe pene ya makila na Ye, oyo esopanaki mpe egangaka koleka makila ya Abele.
新約の仲介者に在すイエズスと、アベルの血に優りて能く言ふ血の沃がるる事と是なり。
25 Bosala penza keba ete boboya te koyoka Ye oyo alobaka! Pamba te soki bato wana bazangaki te kozwa etumbu tango baboyaki koyoka Ye oyo azalaki kokebisa bango awa na mokili, ekozala ndenge nini mpo na biso soki toboyi koyoka Ye oyo akebisaka biso wuta na Likolo?
汝等慎みて、言ひ給ふを否むこと勿れ。蓋彼等は地上に言ひ給へるを否みて迯れざりしなれば、况て天より言ひ給ふを退くる我等の迯るべけんや。
26 Ye oyo mongongo na Ye eningisaki mokili na tango ya kala apesi lelo elaka oyo: « Na mbala oyo lisusu, nakoningisa kaka mabele te, kasi nakoningisa mpe Likolo. »
彼時は其聲地を動かしたりしに、今は約して曰はく、「我唯に地をのみならず天をも尚一度動かさん」と。
27 Maloba oyo « na mbala oyo lisusu » elakisi ete biloko oyo ekoki koningana elimwe mpo ete oyo eninganaka te etikala mpo na libela.
斯の如く「尚一度」と曰へるは、震動せざる事物の永存せん為に、震動せし事物の、造られたるものとして廃るべきを示し給ふなり。
28 Yango wana, lokola tozali kozwa Bokonzi oyo eninganaka te, tozongisaka matondi mpe tosalelaka Nzambe na lolenge oyo esepelisaka Ye: na botosi mpe na kobanga.
然れば震動せざる國を受けたるが故に、我等は感謝し奉りて、御意に適ふ様、恐れ畏みて神に事へ奉るべし。
29 Pamba te Nzambe na biso azali moto oyo ezikisaka.
是我等の神は焼盡す火にて在せばなり。

< Ba-Ebre 12 >