< Ba-Ebre 10 >

1 Mobeko ya Moyize ezali kaka elilingi ya biloko oyo ekoya, ezali penza bosolo na yango te; yango wana, ezali na makoki te ya kokomisa ya kokoka, bato oyo bapusanaka pene ya Nzambe na nzela ya bambeka ya ndenge moko kaka oyo bapesaka tango nyonso mpe mobu na mobu.
σκιαν γαρ εχων ο νομοσ των μελλοντων αγαθων ουκ αυτην την εικονα των πραγματων κατ ενιαυτον ταισ αυταισ θυσιαισ ασ προσφερουσιν εισ το διηνεκεσ ουδεποτε δυνανται τουσ προσερχομενουσ τελειωσαι
2 Soki ezalaki na makoki yango, mbele bato oyo bapesaka bambeka yango balingaki wuta kala kotika kopesa yango, pamba te balingaki kopetolama mbala moko mpo na libela, mpe balingaki lisusu komitungisa te mpo na masumu na bango.
επει ουκ αν επαυσαντο προσφερομεναι δια το μηδεμιαν εχειν ετι συνειδησιν αμαρτιων τουσ λατρευοντασ απαξ κεκαθαρμενουσ
3 Nzokande, mobu na mobu, bambeka wana ezalaki kozongisa masumu na makanisi na bango,
αλλ εν αυταισ αναμνησισ αμαρτιων κατ ενιαυτον
4 pamba te makila ya bangombe ya mibali mpe ya bantaba ezali na makoki te ya kolongola masumu.
αδυνατον γαρ αιμα ταυρων και τραγων αφαιρειν αμαρτιασ
5 Yango wana, tango Klisto ayaki na mokili, alobaki: « Ozalaki na posa te ya bambeka to ya makabo, kasi osalaki ngai nzoto.
διο εισερχομενοσ εισ τον κοσμον λεγει θυσιαν και προσφοραν ουκ ηθελησασ σωμα δε κατηρτισω μοι
6 Osepelaki te na bambeka ya kotumba mpe na bambeka mpo na masumu.
ολοκαυτωματα και περι αμαρτιασ ουκ ευδοκησασ
7 Bongo nalobaki: ‹ Tala ngai oyo, nayei, nayei, oh Nzambe, mpo na kosala mokano na Yo, kolanda ndenge ekomami na tina na ngai kati na buku. › »
τοτε ειπον ιδου ηκω εν κεφαλιδι βιβλιου γεγραπται περι εμου του ποιησαι ο θεοσ το θελημα σου
8 Alobaki liboso: « Ozalaki na posa te mpe osepelaki te na bambeka, na makabo, na bambeka ya kotumba mpe na bambeka mpo na masumu. » Nzokande ezalaki kopesama kolanda Mibeko.
ανωτερον λεγων οτι θυσιαν και προσφοραν και ολοκαυτωματα και περι αμαρτιασ ουκ ηθελησασ ουδε ευδοκησασ αιτινεσ κατα τον νομον προσφερονται
9 Alobaki lisusu: « Tala ngai oyo, nayei mpo na kosala mokano na Yo. » Boye, alongolaki losambo ya liboso mpo na kotia losambo ya mibale.
τοτε ειρηκεν ιδου ηκω του ποιησαι ο θεοσ το θελημα σου αναιρει το πρωτον ινα το δευτερον στηση
10 Mpe ezali mpo na mokano yango ya Nzambe nde topetolamaka na masumu, na nzela ya mbeka ya nzoto na Ye moko Yesu-Klisto, oyo akabaki mbala moko mpo na libela.
εν ω θεληματι ηγιασμενοι εσμεν οι δια τησ προσφορασ του σωματοσ ιησου χριστου εφαπαξ
11 Mpo na kosala mosala na ye ya bonganga, Nganga-Nzambe nyonso azalaki kokende na esika na ye ya mosala mokolo na mokolo, mpe azalaki kopesa mbala na mbala bambeka ya ndenge moko oyo ezalaki kutu na makoki te ya kolongola masumu ya bato.
και πασ μεν ιερευσ εστηκεν καθ ημεραν λειτουργων και τασ αυτασ πολλακισ προσφερων θυσιασ αιτινεσ ουδεποτε δυνανται περιελειν αμαρτιασ
12 Kasi sima na Klisto kobonza mbeka moko kaka mpo na masumu, avandi mpo na libela na ngambo ya loboko ya mobali ya Nzambe.
αυτοσ δε μιαν υπερ αμαρτιων προσενεγκασ θυσιαν εισ το διηνεκεσ εκαθισεν εν δεξια του θεου
13 Wuta tango wana, azali kozela ete Nzambe akomisa banguna na Ye enyatelo makolo na Ye.
το λοιπον εκδεχομενοσ εωσ τεθωσιν οι εχθροι αυτου υποποδιον των ποδων αυτου
14 Pamba te, na nzela ya likabo moko kaka, akomisaki bato ya kokoka mpo na libela, ba-oyo apetolaki na masumu.
μια γαρ προσφορα τετελειωκεν εισ το διηνεκεσ τουσ αγιαζομενουσ
15 Molimo Mosantu mpe azali kotatola epai na biso na tina na Ye, pamba te alobaki liboso:
μαρτυρει δε ημιν και το πνευμα το αγιον μετα γαρ το προειρηκεναι
16 « Tala boyokani oyo nakosala elongo na bango sima na mikolo wana, elobi Nkolo: Nakotia mibeko na Ngai kati na makanisi na bango, mpe nakokoma yango kati na mitema na bango. »
αυτη η διαθηκη ην διαθησομαι προσ αυτουσ μετα τασ ημερασ εκεινασ λεγει κυριοσ διδουσ νομουσ μου επι καρδιασ αυτων και επι των διανοιων αυτων επιγραψω αυτουσ
17 Bongo na sima, abakisaki: « Nakokanisa lisusu te, ezala masumu na bango to mabe na bango. »
και των αμαρτιων αυτων και των ανομιων αυτων ου μη μνησθω ετι
18 Nzokande, soki Nzambe alimbisi moto masumu, ezalaka lisusu te na likabo ya kopesa mpo na masumu.
οπου δε αφεσισ τουτων ουκετι προσφορα περι αμαρτιασ
19 Yango wana, bandeko na ngai, tozali solo na elikya ete tokokota na Esika-Oyo-Eleki-Bule mpo ete Yesu asopaki makila na Ye.
εχοντεσ ουν αδελφοι παρρησιαν εισ την εισοδον των αγιων εν τω αιματι ιησου
20 Afungolelaki biso nzela ya sika mpe ya bomoi na nzela ya rido ya Tempelo, oyo ezali nzoto na Ye moko.
ην ενεκαινισεν ημιν οδον προσφατον και ζωσαν δια του καταπετασματοσ τουτ εστιν τησ σαρκοσ αυτου
21 Boye, tozali na Mokonzi Monene ya Banganga-Nzambe, oyo azali Mokonzi ya Ndako ya Nzambe.
και ιερεα μεγαν επι τον οικον του θεου
22 Na bongo, topusana pene ya Nzambe na motema mobimba, na kondima nyonso, na motema oyo epetolami na makanisi nyonso ya mabe, mpe na nzoto oyo esukolami na mayi ya peto.
προσερχωμεθα μετα αληθινησ καρδιασ εν πληροφορια πιστεωσ ερραντισμενοι τασ καρδιασ απο συνειδησεωσ πονηρασ και λελουμενοι το σωμα υδατι καθαρω
23 Tobatela makasi elikya oyo tozali kondima ete ezali ya solo, pamba te Ye oyo apesaki biso bilaka akosaka te.
κατεχωμεν την ομολογιαν τησ ελπιδοσ ακλινη πιστοσ γαρ ο επαγγειλαμενοσ
24 Tosenzelana biso na biso mpo na kotindikana na bolingo mpe na misala ya malamu.
και κατανοωμεν αλληλουσ εισ παροξυσμον αγαπησ και καλων εργων
25 Tokima Bandako ya Nzambe na biso te, ndenge bato mosusu bamesana kosala; kasi tolendisana biso na biso, wana bozali komona ete mokolo ya Nkolo ekomi pene.
μη εγκαταλειποντεσ την επισυναγωγην εαυτων καθωσ εθοσ τισιν αλλα παρακαλουντεσ και τοσουτω μαλλον οσω βλεπετε εγγιζουσαν την ημεραν
26 Pamba te, soki tokobi kosala masumu na nko sima na koyeba bosolo, mbeka mosusu mpo na bolimbisi ya masumu ekozala lisusu te;
εκουσιωσ γαρ αμαρτανοντων ημων μετα το λαβειν την επιγνωσιν τησ αληθειασ ουκετι περι αμαρτιων απολειπεται θυσια
27 ekotikala kaka kozela na somo penza kosambisama mpe moto makasi oyo ekozikisa banguna ya Nzambe.
φοβερα δε τισ εκδοχη κρισεωσ και πυροσ ζηλοσ εσθιειν μελλοντοσ τουσ υπεναντιουσ
28 Soki babomaka na mawa te moto oyo abuki Mobeko ya Moyize, na litatoli ya bato mibale to misato,
αθετησασ τισ νομον μωυσεωσ χωρισ οικτιρμων επι δυσιν η τρισιν μαρτυσιν αποθνησκει
29 ekozala boni mpo na moto oyo atioli Mwana na Nzambe, amoni pamba makila ya boyokani, oyo epetolaki ye, mpe afingi Molimo ya ngolu?
ποσω δοκειτε χειρονοσ αξιωθησεται τιμωριασ ο τον υιον του θεου καταπατησασ και το αιμα τησ διαθηκησ κοινον ηγησαμενοσ εν ω ηγιασθη και το πνευμα τησ χαριτοσ ενυβρισασ
30 Toyebi malamu Ye oyo alobaki: « Ngai nde nazongisaka mabe na mabe, Ngai nde nakofuta moto na moto; » mpe: « Nkolo akosambisa bato na Ye. »
οιδαμεν γαρ τον ειποντα εμοι εκδικησισ εγω ανταποδωσω λεγει κυριοσ και παλιν κυριοσ κρινει τον λαον αυτου
31 Ezali somo makasi kokweya na maboko ya Nzambe na bomoi!
φοβερον το εμπεσειν εισ χειρασ θεου ζωντοσ
32 Bokanisa lisusu mikolo ya liboso, na tango Nzambe afungolaki bino miso mpo ete bokoma komona pole, boyikaki mpiko kati na bapasi ya makasi.
αναμιμνησκεσθε δε τασ προτερον ημερασ εν αισ φωτισθεντεσ πολλην αθλησιν υπεμεινατε παθηματων
33 Ezalaki na batango oyo bazalaki kofinga bino, konyokola bino na miso ya bato; ezalaki mpe na batango oyo bozalaki kokabola pasi elongo na bato oyo bazalaki konyokwama.
τουτο μεν ονειδισμοισ τε και θλιψεσιν θεατριζομενοι τουτο δε κοινωνοι των ουτωσ αναστρεφομενων γενηθεντεσ
34 Bokabolaki pasi elongo na bakangami ya boloko, mpe bondimaki na esengo nyonso ete babotola ata biloko na bino, pamba te boyebaki ete bozali na bomengo ya kitoko koleka, bomengo oyo ekowumela libela na libela.
και γαρ τοισ δεσμοισ μου συνεπαθησατε και την αρπαγην των υπαρχοντων υμων μετα χαρασ προσεδεξασθε γινωσκοντεσ εχειν εαυτοισ κρειττονα υπαρξιν εν ουρανοισ και μενουσαν
35 Boye, bobungisa elikya na bino te, pamba te lifuti monene ekangani na yango.
μη αποβαλητε ουν την παρρησιαν υμων ητισ εχει μισθαποδοσιαν μεγαλην
36 Na bongo, boyika mpiko mpo ete, sima na bino kokokisa mokano ya Nzambe, bozwa biloko oyo alakaki.
υπομονησ γαρ εχετε χρειαν ινα το θελημα του θεου ποιησαντεσ κομισησθε την επαγγελιαν
37 Etikali moke, moke penza, ete Ye oyo asengeli koya aya, mpe akoya kala te.
ετι γαρ μικρον οσον οσον ο ερχομενοσ ηξει και ου χρονιει
38 Moto na ngai ya sembo akobika na nzela ya kondima; kasi soki azongi sima, nakosepela na ye te.
ο δε δικαιοσ εκ πιστεωσ ζησεται και εαν υποστειληται ουκ ευδοκει η ψυχη μου εν αυτω
39 Biso tozali te na molongo ya bato oyo bazongaka sima mpo na kobungisa bomoi na bango, kasi tozali na molongo ya bato oyo bazali na kondima mpo ete tobikisama.
ημεισ δε ουκ εσμεν υποστολησ εισ απωλειαν αλλα πιστεωσ εισ περιποιησιν ψυχησ

< Ba-Ebre 10 >