< Aje 2 >

1 Tala liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya mosakoli Aje, na mokolo ya tuku mibale na moko ya sanza ya sambo:
Le vingt et unième jour du septième mois, la parole de l'Eternel fut [adressée] par le moyen d'Aggée le Prophète, en disant:
2 « Loba na Zorobabeli, mwana mobali ya Shealitieli, moyangeli ya Yuda; na Jozue, mwana mobali ya Yeotsadaki, mokonzi ya Banganga-Nzambe, mpe na bato nyonso oyo batikali:
Parle maintenant à Zorobabel, fils de Salathiel, Gouverneur de Juda, et à Jéhosuah, fils de Jéhotsadak, grand Sacrificateur, et au reste du peuple, et leur dis:
3 ‹ Kati na bino oyo bozali na bomoi, nani amonaki Ndako oyo kati na nkembo na yango ya liboso? Bongo sik’oyo, bozali komona yango ndenge nini? Boni, ezali te komonana na miso na bino lokola eloko ya pamba?
Qui est celui qui est demeuré de reste d'entre vous, qui ait vu cette maison dans sa première gloire, et telle que vous la voyez maintenant? N'est-elle pas comme un rien devant vos yeux, au prix de celle-là?
4 Kasi sik’oyo, Zorobabeli, zala makasi, › elobi Yawe. ‹ Jozue, mwana mobali ya Yeotsadaki, mokonzi ya Banganga-Nzambe, zala makasi. Bino nyonso bato ya ekolo, bozala makasi, › elobi Yawe, ‹ bosala mosala, pamba te nazali elongo na bino, › elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
Maintenant donc toi, Zorobabel, fortifie-toi, dit l'Eternel; aussi toi, Jéhosuah, fils de Jéhotsadak, grand Sacrificateur, fortifie toi; vous aussi, tout le peuple du pays, fortifiez-vous, dit l'Eternel, et travaillez, car je suis avec vous, dit l'Eternel des armées.
5 ‹ Kolanda mokano oyo nazwaki mpo na bino tango bobimaki na Ejipito, Molimo na Ngai azali kati na bino. Bobanga te. ›
La parole de [l'alliance] que je traitai avec vous, quand vous sortîtes d'Egypte, et mon esprit demeurent au milieu de vous; ne craignez point.
6 Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi: ‹ Na mwa tango moke, nakoningisa lisusu Likolo mpe mokili, ebale monene mpe mabele;
Car ainsi a dit l'Eternel des armées: encore une fois, ce qui [même sera] dans peu de temps, j'ébranlerai les cieux et la terre, la mer, et le sec;
7 nakoningisa bato ya bikolo nyonso, bomengo ya bikolo nyonso ekoya na esika oyo, mpe nakotondisa Ndako oyo na nkembo, › elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
Et j'ébranlerai toutes les nations; et les désirés d'entre toutes les nations viendront; et je remplirai de gloire cette maison; a dit l'Eternel des armées.
8 ‹ Wolo mpe palata ezali ya Ngai, › elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
L'argent est à moi, et l'or est à moi, dit l'Eternel des armées.
9 ‹ Nkembo ya Ndako ya sika ekozala monene koleka nkembo ya Ndako ya kala, › elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, ‹ mpe nakotia kimia na esika oyo, › elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. »
La gloire ce cette dernière maison-ci sera plus grande que celle de la première, a dit l'Eternel des armées, et je mettrai la paix en ce lieux-ci, dit l'Eternel des armées.
10 Na mobu ya mibale ya bokonzi ya Dariusi, Yawe alobaki na mosakoli Aje, na mokolo ya tuku mibale na minei ya sanza ya libwa:
Le vingt-quatrième jour du neuvième mois de la seconde année de Darius, la parole de l'Eternel fut [adressée] par le moyen d'Aggée le Prophète, en disant:
11 « Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi: ‹ Tuna Banganga-Nzambe makambo oyo osengeli kosala kolanda mobeko:
Ainsi a dit l'Eternel des armées: Interroge maintenant les Sacrificateurs touchant la loi, en disant:
12 — Soki moto moko amemi na songe ya elamba mosuni oyo ebulisama, mpe songe yango etuti lipa to ndunda to vino to mafuta to bilei mosusu, boni, ekokoma bule? › » Banganga-Nzambe bazongisaki: — Te, ekokoma bule te!
Si quelqu'un porte au coin de son vêtement de la chair sanctifiée, et qu'il touche du coin de son vêtement à du pain, ou à quelque chose cuite, ou à du vin, ou à de l'huile, ou à quelque viande que ce soit, cela en sera-t-il sanctifié? Et les Sacrificateurs répondirent, et dirent: Non.
13 Mosakoli Aje alobaki: — Soki moto oyo akomaki mbindo mpo ete asimbaki ebembe asimbi eloko moko kati na biloko wana, boni, eloko yango ekokoma mbindo? Banganga-Nzambe bazongisaki: — Iyo, ekokoma mbindo.
Alors Aggée dit: Si celui qui est souillé pour un mort touche toutes ces choses-là, ne seront-elles pas souillées? Et les Sacrificateurs répondirent, et dirent: Elles seront souillées.
14 Mosakoli Aje alobaki lisusu: « Bato oyo mpe ekolo oyo bazali nde ndenge wana na miso na Ngai, » elobi Yawe, « misala nyonso oyo basalaka mpe biloko nyonso oyo babonzelaka Ngai ezalaka ya mbindo.
Alors Aggée répondit, et dit: Ainsi est ce peuple, et ainsi est cette nation devant ma face, dit l'Eternel; et ainsi est toute l'œuvre de leurs mains; même ce qu'ils offrent ici, est souillé.
15 Mpe sik’oyo, kobanda lelo, botala malamu makambo oyo ekoya liboso ete libanga moko etiama na likolo ya libanga mosusu kati na Tempelo ya Yawe.
Maintenant donc mettez ceci, je vous prie, dans votre cœur; depuis ce jour et au-dessus, avant qu'on remît pierre sur pierre au Temple de l'Eternel,
16 Tango moto moko azalaki koya mpo na kozwa bikolo tuku mibale ya ble na ebombelo, azalaki kokuta kaka bikolo zomi; tango moto moko azalaki kokende na ekamolelo masanga ya vino mpo na kozwa bambeki tuku mitano ya vino, azalaki kaka kokuta bambeki tuku mibale.
Avant cela, [dis-je], quand on est venu à un monceau [de blé], [au lieu] de vingt [mesures], il ne s'y en est trouvé que dix; et quand on est venu au pressoir, au lieu de puiser du pressoir cinquante [mesures], il ne s'y en est trouvé que vingt.
17 Napesaki bino etumbu, tango nabebisaki misala na bino nyonso ya maboko, tango natindelaki yango bokono ya ndenge na ndenge mpe tango nanokisaki mvula ya mabanga. Kasi atako bongo, bozongaki epai na Ngai te, » elobi Yawe.
Je vous ai frappés de brûlure, et de nielle, et de grêle dans tout le labeur de vos mains; et vous n'êtes point [retournés] à moi, dit l'Eternel.
18 « Kobanda lelo, mokolo ya tuku mibale ya sanza ya libwa, botala malamu miboko ya Tempelo ya Yawe, oyo batiaki; botala malamu penza makambo oyo ekoleka.
Mettez maintenant ceci dans votre cœur; depuis ce jour, et au-dessus, depuis, [dis-je], le vingt-quatrième jour du neuvième mois, depuis ce jour-ci auquel les fondements du Temple de l'Eternel ont été jetés, mettez ceci dans votre cœur;
19 Boni, bibombelo na bino ezali lisusu na bambuma? Kino na moyi ya lelo, ata elanga moko te ya vino, ya figi, ya grenade mpe ya olive esili kobota bambuma. Kasi kobanda lelo, nakopambola bino. »
Ce que vous avez semé [est-il] encore [retourné] au grenier? Même jusqu'à la vigne, et au figuier, et au grenadier, et à l'olivier, rien n'a rapporté; [mais] depuis ce jour-ci je donnerai la bénédiction.
20 Yawe alobaki, na mbala ya mibale, na mosakoli Aje, na mokolo ya tuku mibale na minei ya sanza ya libwa:
Et la parole de l'Eternel fut [adressée] pour la seconde fois à Aggée, le vingt-quatrième jour du mois, en disant:
21 « Loba na Zorobabeli, moyangeli ya Yuda, ete nakoningisa likolo mpe mabele,
Parle à Zorobabel, Gouverneur de Juda, en disant: J'ébranlerai les cieux et la terre;
22 nakobalola bakiti ya bokonzi, nakosilisa nguya ya bokonzi ya mikili ya bapagano, nakokweyisa bashar mpe bato oyo batambolisaka yango; bampunda ekokweya elongo na bato oyo batambolaka likolo na yango, bango na bango bakobomana na mopanga.
Je renverserai le trône des Royaumes, je détruirai la force des Royaumes des Nations! je renverserai les chariots, et ceux qui montent dessus; et les chevaux, et ceux qui sont montés dessus, seront abattus, chacun par l'épée de son frère.
23 Na mokolo wana, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, « nakozwa yo Zorobabeli, mwana mobali ya Shealitieli, mosali na Ngai, mpe nakokomisa yo lokola kashe na Ngai, pamba te ezali yo nde Ngai napona, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
En ce temps là, dit l'Eternel des armées, je te prendrai, ô Zorobabel! fils de Salathiel, mon serviteur, dit l'Eternel, et je te mettrai comme un anneau de cachet; car je t'ai élu, dit l'Eternel des armées.

< Aje 2 >