< Abakuki 3 >

1 Libondeli ya Mosakoli Abakuki, na tina na lolenge ya banzembo ya mawa.
Molitva. Od proroka Habakuka. Na način tužbalice.
2 Oh Yawe, nayokaki sango ya Kombo na Yo! Yawe, nabangaki misala na Yo. Sala yango lisusu na tango na biso! Sala ete eyebana lisusu na tango na biso! Kasi ata soki otomboki ndenge nini, kobosanaka te mawa na Yo mpo na biso.
Jahve, čuo sam za slavu tvoju, Jahve, tvoje mi djelo ulijeva jezu! Ponovi ga u naše vrijeme! Otkrij ga u naše vrijeme! U gnjevu se svojem smilovanja sjeti!
3 Nzambe abimelaki na engumba Temani, Mosantu abimelaki na ngomba Parani. Nkembo na Ye ezipaki likolo, mpe lokumu na Ye etondisaki mabele.
Bog stiže iz Temana, a Svetac s planine Parana! Veličanstvo njegovo zastire nebesa, zemlja mu je puna slave.
4 Azalaki kongenga lokola moyi, mpe pole makasi ezalaki kobimela na loboko na Ye, epai wapi nguya na Ye ebombamaka.
Sjaj mu je k'o svjetlost, zrake sijevaju iz njegovih ruku, ondje mu se krije (sila)
5 Bokono oyo ebomaka ezalaki kotambola liboso na Ye, mpe pasi makasi ezalaki kolanda matambe na Ye na sima.
Kuga pred njim ide, groznica ga sustopice prati.
6 Tango atelemaki, mabele ekomaki koningana makasi; tango abalolaki elongi na Ye mpo na kotala, bato ya bikolo bakomaki kolenga, bangomba milayi oyo ya kala-kala ebukanaki, mpe bangomba mikuse oyo ya kala-kala ekitaki; kasi banzela na Ye ewumelaka seko na seko.
On stane, i zemlja se trese, on pogleda, i dršću narodi. Tad se raspadoše vječne planine, bregovi stari propadoše, njegove su staze od vječnosti.
7 Namonaki bandako ya kapo ya Kushani kati na pasi, mpe bandako ya mokili ya Madiani kati na mitungisi.
Prestrašene vidjeh kušanske šatore, čadore što dršću u zemlji midjanskoj.
8 Oh Yawe, otombokelaki nde bibale? Osopelaki nde miluka kanda na Yo? Osilikelaki nde ebale monene tango ozalaki kotambola likolo ya bampunda, likolo ya bashar na Yo ya lokumu?
Jahve, planu li tvoj gnjev na rijeke ili jarost tvoja na more te jezdiš na svojim konjima, na pobjedničkim bojnim kolima?
9 Obimisaki tolotolo na Yo na ebombelo na yango, maloba ya bandayi oyo olapaki ezalaki makonga na Yo. Ozindisaki mokili kati na bibale.
Otkrivaš svoj luk i otrovnim ga strijelama sitiš. Bujicama rasijecaš tlo,
10 Soki bangomba emoni Yo, elengaka; mayi etiolaka makasi, ebale monene etombokaka mpe bambonge na yango emataka kino na likolo.
planine dršću kad te vide, navaljuje oblaka prolom, bezdan diže svoj glas.
11 Tango makonga ya mike etambolaka lokola mikalikali mpe makonga ebetaka lokola bakake, moyi mpe sanza etelemaka kuna na likolo.
Sunce uvis diže ruke, mjesec u obitavalištu svojem popostaje, pred blijeskom tvojih strijela, pred blistavim sjajem koplja tvoga.
12 Na kanda, otambolaka na mabele; mpe na kanda makasi na Yo, onyataka bikolo.
Jarosno po zemlji koračaš, srdito gaziš narode.
13 Obimaka mpo na kokangola bato na Yo mpe mpo na kobikisa mopakolami na Yo. Obomaki mokambi ya mokili ya bato mabe, osambwisaki ye kobanda na moto kino na makolo.
Iziđe da spasiš narod svoj, da spasiš svog pomazanika; sori vrh kuće bezbožnikove, ogoli joj temelje do stijene.
14 Otobolaki ye moto na nzela ya likonga na ye moko, tango basoda na ye bazalaki koya na elulu lokola mopepe mpo na kopanza biso. Bazalaki kosepela na elikya ete bakoboma biso na nkuku.
Kopljima si izbo vođu ratnika njegovih, koji navališe da nas s radošću satru, kao da će potajice proždrijet' ubogoga.
15 Otambolaka na ebale elongo na bampunda na Yo; boye oningisaka mayi minene.
Gaziš po moru s konjima svojim, po pučini silnih voda!
16 Tango nayokaki sango oyo, motema na ngai ekomaki kobeta makasi, bibebu na ngai ekomaki kolenga, mikuwa na ngai ekomaki kopola mpe makolo na ngai ekomaki kolenga. Kasi nakokanga motema na ngai mpo na kozela mokolo ya pasi oyo ekokomela ekolo oyo ebundisaki biso.
Čuo sam! Sva se moja utroba trese, podrhtavaju mi usne na taj zvuk, trulež prodire u kosti moje, noge klecaju poda mnom. Počinut ću kada dan tjeskobni svane narodu što nas sad napada.
17 Nzokande, nzete ya figi ebimisi fololo te, nzete ya vino eboti mbuma te, nzete ya olive eboti mbuma te, bilanga ebimisi bilei te, bameme mpe bantaba ezali te kati na lopango, mpe bangombe ezali te kati na lopango.
Jer smokvino drvo neće više cvasti niti će na lozi biti ploda, maslina će uskratiti rod, polja neće donijeti hrane, ovaca će nestati iz tora, u oborima neće biti ni goveda.
18 Kasi ngai nakosepela kati na Yawe mpe nakotondisama na esengo mingi kati na Nzambe, Mobikisi na ngai.
Ali ja ću se radovati u Jahvi i kliktat ću u Bogu, svojem Spasitelju.
19 Nkolo Yawe azali makasi na ngai: akomisaka makolo na ngai lokola makolo ya mboloko, apesaka ngai makasi ya komata kino na likolo ya bangomba.
Jahve, moj Gospod, moja je snaga, on mi daje noge poput košutinih i vodi me na visine. Zborovođi. Na žičanim glazbalima.

< Abakuki 3 >