< Abakuki 2 >

1 Nakotelema na esika na ngai ya kokengela, nakotelema ngai moko na likolo ya mir, nakosenzela mpo na komona makambo oyo akoyebisa ngai mpe eyano oyo nakopesa na banzembo oyo ya mawa.
I will stand upon my watch, and fix my foot upon the tower: and I will watch, to see what will be said to me, and what I may answer to him that reproveth me.
2 Yawe ayanolaki: — Koma emoniseli oyo, koma yango na etando ya mabanga, koma yango penza malamu mpo ete moto nyonso akoka kotanga yango na bopete.
And the Lord answered me, and said: Write the vision, and make it plain upon tables: that he that readeth it may run over it.
3 Emoniseli oyo ezali kaka kozela tango na yango oyo ekatama; ezali kolobela makambo oyo ekosalema na tango ya suka; solo, ekokosa te. Ata ewumeli, (zela) yango kaka; solo, ekokokisama, ekowumela te.
For as yet the vision is far off, and it shall appear at the end, and shall not lie: if it make any delay, wait for it: for it shall surely come, and it shall not be slack.
4 Tala, atondisami na lolendo, motema na ye ezali na bosembo te; kasi moto ya sembo akobika na nzela ya kondima na ye.
Behold, he that is unbelieving, his soul shall not be right in himself: but the just shall live in his faith.
5 Solo, masanga ya vino ekosaka; moto ya lolendo avandaka kimia te. Mpo ete azali lokoso lokola mboka ya bakufi mpe atondaka te lokola kufa, asangisaka bato ya bikolo nyonso pembeni na ye mpe akomisaka bango bawumbu na ye. (Sheol h7585)
And as wine deceiveth him that drinketh it: so shall the proud man be, and he shall not be honoured: who hath enlarged his desire like hell: and is himself like death, and he is never satisfied: but will gather together unto him all nations, and heap together unto him all people. (Sheol h7585)
6 Boni, bato wana nyonso bakoseka ye te na maloba ya kotiola mpe ya kosambwisa lokola: « Mawa na ye oyo azali kobomba biloko ya moyibi mpe akolisaka bomengo na ye na kobotola bato biloko na makasi! » Makambo ya boye ekokoba kino penza tango nini?
Shall not all these take up a parable against him, and a dark speech concerning him: and it shall be said: Woe to him that heapeth together that which is not his own? how long also doth he load himself with thick clay?
7 Boni, bakolo biloko bakobimela yo te na pwasa? Bakolamukela yo mpe bakolengisa yo. Boni, okokoma te lokola mosuni na bango ya kolia?
Shall they not rise up suddenly that shall bite thee: and they be stirred up that shall tear thee, and thou shalt be a spoil to them?
8 Lokola obotolaki bomengo ya bato ya bikolo ebele na makasi, bato oyo batikali bakobotola yo mpe bomengo na yo na makasi, mpo ete osopaki makila ya bato, obebisaki mikili mpe bingumba elongo na bavandi na yango nyonso.
Because thou hast spoiled many nations, all that shall be left of the people shall spoil thee: because of men’s blood, and for the iniquity of the land, of the city, and of all that dwell therein.
9 Mawa na moto oyo atongaka ndako na ye na nzela ya sembo te! Alukaka kosala zala na ye na likolo ya bangomba mpo na kokima ete makambo mabe ekomela ye.
Woe to him that gathereth together an evil covetousness to his house, that his nest may be on high, and thinketh he may be delivered out of the hand of evil.
10 Lokola osalaki mabongisi ya kobebisa bato ebele, obongisaki nde soni ya ndako na yo moko mpe okotisi nde bomoi na yo moko na likama.
Thou hast devised confusion to thy house, thou hast cut off many people, and thy soul hath sinned.
11 Mabanga ya mir ekoganga mpe mabaya ya motondo ekoyanola.
For the stone shall cry out of the wall: and the timber that is between the joints of the building, shall answer.
12 Mawa na moto oyo atongaka engumba na nzela ya makila mpe alendisaka yango na nzela ya lokuta!
Woe to him that buildeth a town with blood, and prepareth a city by iniquity.
13 Boni, ekatama te epai na Yawe, Mokonzi ya mampinga, ete misala ya bato ezala kaka lokola koni oyo ezali kopela moto, ete bikolo enyokwamaka bobele se pamba?
Are not these things from the Lord of hosts? for the people shall labour in a great fire: and the nations in vain, and they shall faint.
14 Pamba te mokili ekotonda na boyebi ya nkembo na Yawe ndenge mayi etondaka na ebale.
For the earth shall be filled, that men may know the glory of the Lord, as waters covering the sea.
15 Mawa na moto oyo amelisaka moninga na ye masanga makasi kino asilisa mbeki nyonso mpe alangwa mpo ete amona bolumbu na ye!
Woe to him that giveth drink to his friend, and presenteth his gall, and maketh him drunk, that he may behold his nakedness.
16 Na esika ete otondisama na nkembo, okotondisama na soni. Sik’oyo ekomi tango na yo, mela mpe tikala bolumbu! Kopo oyo ewuti na loboko ya mobali ya Yawe eyei kozingela yo, mpe soni ekozipa nkembo na yo.
Thou art filled with shame instead of glory: drink thou also, and fall fast asleep: the cup of the right hand of the Lord shall compass thee, and shameful vomiting shall be on thy glory.
17 Mabe oyo osalaki mokili ya Libani ekozongela yo, mpe somo ya banyama oyo obomaki ekokomela yo; pamba te osopaki makila ya bato, obebisaki mikili mpe bingumba elongo na bavandi na yango nyonso.
For the iniquity of Libanus shall cover thee, and the ravaging of beasts shall terrify them because of the blood of men, and the iniquity of the land, and of the city, and of all that dwell therein.
18 Boni, banzambe ya bikeko ezali na tina nini, pamba te moto nde asalaki yango? Elilingi oyo eteyaka makambo ya lokuta ezali na tina penza nini? Pamba te moto oyo asalaki yango azali nde kotia elikya na mosala ya maboko na ye, asali nde ekeko oyo elobaka te.
What doth the graven thing avail, because the maker thereof hath graven it, a molten, and a false image? because the forger thereof hath trusted in a thing of his own forging, to make dumb idols.
19 Mawa na moto oyo alobaka na eteni ya nzete: « Telema! » Mawa na moto oyo alobaka na libanga oyo ezanga bomoi: « Lamuka! » Boni, ekeko ekoki solo kolakisa moto nzela? Bazipa yango wolo mpe palata, kasi pema ezali te kati na yango.
Woe to him that saith to wood: Awake: to the dumb stone: Arise: can it teach? Behold, it is laid over with gold, and silver, and there is no spirit in the bowels thereof.
20 Nzokande, Yawe azali kati na Tempelo na Ye ya bule; tika ete mokili mobimba ezala kimia liboso na Ye!
But the Lord is in his holy temple: let all the earth keep silence before him.

< Abakuki 2 >