< Abakuki 1 >
1 Tala liloba oyo mosakoli Abakuki azwaki na emoniseli:
Prophétie révélée à Habacuc, le prophète.
2 Oh Yawe, kino tango nini nasengeli kobelela Yo mpo ete osunga, kasi ozali koyoka te? Nazali koganga epai na Yo: « Minyoko eleki! » kasi ozali kaka kobikisa te!
Jusqu'à quand, ô Éternel, crierai-je sans que tu écoutes? Jusqu'à quand crierai-je à toi: Violence! sans que tu sauves?
3 Mpo na nini ozali kolakisa ngai makambo mabe ya boye? Mpo na nini ozali kosala eloko moko te? Liboso na ngai, nazali kaka komona libebi mpe makambo mabe, bato bazali kaka koswana mpe kofundana.
Pourquoi me fais-tu voir l'iniquité, et regardes-tu la perversité? L'oppression et la violence sont devant moi; il y a des querelles, et la discorde s'élève.
4 Yango wana bato bazali kotosa lisusu mibeko te, bazali kokata lisusu makambo na bosembo te. Bato mabe bazali kolonga liboso ya bato ya sembo, makambo ezali lisusu kokatama na bosembo te.
Aussi la loi est impuissante, et le jugement n'est jamais rendu selon la vérité; le méchant environne le juste, c'est pourquoi l'on rend des jugements iniques.
5 Botala nanu malamu bikolo mosusu mpe bokokamwa penza, pamba te nakosala likambo moko na tango na bino, likambo oyo bokondima te soki bayebisi bino yango.
Voyez parmi les nations, et soyez étonnés, soyez stupéfaits! Car je vais faire en vos jours une œuvre que vous ne croiriez pas si on vous la racontait.
6 Nakotindela bino bato ya Babiloni, bato ya mitema mabe, oyo bayokelaka bato mawa te: batambolaka mokili mobimba mpo na kobotola bato bisika na bango ya losambo na makasi.
Car voici, je vais susciter les Caldéens, ce peuple cruel et impétueux, qui parcourt de vastes étendues de terre, pour s'emparer de demeures qui ne sont pas à lui.
7 Bazali bato ya somo mpe bato oyo babangisaka, basalaka makambo nyonso oyo bazali na yango posa, mpe moto moko te amekaka kotelemela bango.
Il est redoutable et terrible; c'est de lui-même que procèdent sa loi et sa grandeur.
8 Bampunda na bango ekimaka mbangu koleka ata nkoyi, ezalaka na kanda makasi koleka ata mbwa ya zamba oyo ebimaka na pokwa mpo na koluka nyama ya kolia. Basoda na bango oyo batambolaka likolo ya bampunda batambolaka mbangu makasi mpe bawutaka mosika penza, bapumbwaka lokola mpongo soki ezali kokita na elulu mpo na kokanga nyama ya kolia.
Ses chevaux sont plus légers que les léopards, plus ardents que les loups du soir, et ses cavaliers s'avancent fièrement; ses cavaliers viennent de loin, ils volent comme l'aigle qui fond sur sa proie.
9 Bango nyonso bayaka nzela moko mpo na kotia mobulu, bakendaka kaka liboso lokola mopepe ya este, bazwaka bakangami ebele ndenge balokotaka mbuma ya zelo.
Tous ils viennent pour la violence, leurs faces sont tendues en avant; ils amassent les prisonniers comme du sable.
10 Batiolaka bakonzi mpe basekaka bakambi, basekaka bingumba batonga makasi, batondisaka mabele pembeni ya bamir mpo ete bamata likolo na yango mpe bakota na engumba mpo na kobotola yango,
Ce peuple se moque des rois, et les princes sont l'objet de ses railleries; il se rit de toutes les forteresses; il amoncelle de la terre, et il s'en empare.
11 balekaka lokola mopepe mpe bakobaka nzela na bango, basepelaka kosala mabe, mpe makasi na bango nde ezali nzambe na bango.
Alors il traverse comme le vent, il passe outre et se rend coupable, car sa force est son dieu.
12 Boni, ozali Yawe te wuta na ebandeli? Ozali Nzambe na ngai, Mosantu na ngai, okufaka te. Oh Yawe, oponaki bango mpo na kosambisa biso; mpe Yo Libanga na ngai, olendisaki bango mpo na kopesa biso etumbu.
N'es-tu pas de toute éternité, ô Éternel mon Dieu, mon Saint! Nous ne mourrons point! Éternel, tu as mis ce peuple pour exercer un jugement; ô mon rocher, tu l'as établi pour châtier.
13 Miso na Yo ezali peto koleka, okoki kotala mabe te. Mpo na nini ozali kotala makambo mabe? Mpo na nini ozali kotala bato mabe na miso? Mpo na nini ovandi kimia wana bato mabe bazali konyokola bato oyo baleki bango na bosembo?
Tu as les yeux trop purs pour voir le mal, et tu ne peux pas regarder l'iniquité. Pourquoi regarderais-tu les perfides, et te tairais-tu, quand le méchant dévore celui qui est plus juste que lui?
14 Okomisi bato lokola bambisi ya ebale, lokola banyama oyo etambolaka na libumu mpe ezanga mokonzi.
Aurais-tu fait les hommes comme les poissons de la mer, comme les reptiles qui n'ont point de maître?
15 Moto mabe azwaka yango nyonso na ndobo, akangaka yango na monyama mpe atiaka yango na kitunga. Yango wana asepelaka mpe atondaka na esengo.
Il les fait tous monter avec l'hameçon, il les enlève dans son filet, il les assemble dans ses rets; c'est pourquoi il se réjouit et triomphe;
16 Bongo abonzelaka monyama na ye mbeka, atumbelaka kitunga na ye ansa; pamba te na nzela ya monyama mpe ya kitunga na ye, azwaka bambisi ebele mpe bilei ya kitoko.
C'est pourquoi il sacrifie à son filet, et il offre le parfum à ses rets, car par leur moyen sa portion est grasse, et sa nourriture succulente.
17 Boni, akosepela solo kotika ete monyama na ye ezanga mbisi na kokoba koboma bato na mawa te?
Videra-t-il pour cela son filet, pour égorger toujours les nations sans pitié?