< Ebandeli 9 >

1 Nzambe apambolaki Noa mpe bana na ye ya mibali. Alobaki na bango: « Bobota bana, bokoma ebele mpe botondisa mokili.
天主祝福諾厄和他的兒子們說:「你們要滋生繁殖,充滿大地。
2 Banyama nyonso ya mokili, bandeke nyonso ya likolo mpe bikelamu oyo etambolaka na mokili elongo na mbisi ya ebale, ekobanga bino makasi; nyonso epesami na maboko na bino.
地上的各種野獸,天空的各種飛鳥,地上的各種爬蟲和水中的各種游魚,都要對你們表示驚恐畏懼:這一切都已交在你們手中。
3 Bikelamu nyonso oyo ezali na bomoi mpe oyo etambolaka, ekozala bilei na bino. Ndenge kaka napesaki bino matiti, sik’oyo napesi bino biloko nyonso.
凡有生命的動物,都可作你們的食物;我將這一切賜給你們,有如以前賜給你們蔬菜一樣;
4 Kasi bokolia te mosuni oyo ezali na makila, pamba te makila ezali bomoi.
凡有生命,帶血的肉,你們不可吃;
5 Bongo lokola makila na bino ezali bomoi na bino, nakosambisa oyo nyonso akotangisa yango, ezala nyama to moto. Nakosambisa moto nyonso mpo na bomoi ya moninga na ye.
並且,我要追討害你們生命的血債:向一切野獸追討,向人,向為弟兄的人,追討人命。
6 Yango wana, soki moto asopi makila ya moto, bakosopa mpe makila na ye epai ya moto, pamba te Nzambe asalaki moto na elilingi na Ye.
凡流人血的,他的血也要為人所流,因為人是照天主的肖像造的。
7 Kasi bino, bobota bana, bokoma ebele mpe botondisa mokili. »
你們要生育繁殖,在地上滋生繁衍。」
8 Boye, Nzambe alobaki na Noa mpe na bana na ye ya mibali:
天主對諾厄和他的兒子們說:「
9 « Nasali sik’oyo boyokani elongo na yo mpe na bakitani na yo sima na yo,
看,我現在與你們和你們未來的後裔立約,
10 na bikelamu nyonso ya bomoi oyo ezali elongo na yo: bandeke, bibwele mpe banyama ya zamba, banyama nyonso oyo ebimaki na masuwa elongo na yo, bikelamu nyonso ya bomoi oyo ezali na mokili.
並與同你們在一起的一切生物:飛鳥、牲畜和一切地上野獸,即凡由方舟出來的一切地上生物立約。
11 Nasali boyokani elongo na yo: bikelamu nyonso oyo ezali na bomoi ekobebisama te na mayi ya mpela. Mpe mpela ekozala lisusu te mpo na kobebisa mokili. »
我與你們立約:凡有血肉的,以後決不再受洪水湮滅,再沒有洪水來毀滅大地。」
12 Nzambe alobaki lisusu: « Tala elembo ya boyokani oyo natie kati na Ngai mpe bino, mpe bikelamu nyonso ya bomoi oyo ezali na bino elongo. Ezali boyokani mpo na milongo nyonso oyo ekoya:
天主說:「這是我在我與你們以及同你們在一起的一切生物之間,立約的永遠標記:
13 natie monama na Ngai na mapata, mpe yango ekozala elembo ya boyokani kati na Ngai mpe mokili.
我把虹霓放在雲間,作我與大地之間立約的標記。
14 Tango nyonso nakosangisa mapata na likolo ya mokili mpe monama ekobima na mapata,
幾時我興雲遮蓋大地,雲中要出現虹霓,
15 nakokanisa boyokani na Ngai elongo na bino mpe na bikelamu ya lolenge nyonso oyo ezali na bomoi. Mpe mayi ekokoma lisusu mpela te mpo na kobebisa nyonso oyo ezali na bomoi.
那時我便想起我與你們以及各種屬血肉的生物之間所立的盟約:這樣水就不會再成為洪水,毀滅一切血肉的生物。
16 Tango nyonso monama ekobima na mapata, nakomona yango mpe nakokanisa boyokani ya seko kati na Nzambe mpe bikelamu nyonso ya bomoi oyo ezali na mokili. »
幾時虹霓在雲間出現,我一看見,就想起在天主與地上各種屬血肉的生物之間所立的永遠盟約。」
17 Nzambe alobaki lisusu na Noa: « Yango nde ezali elembo ya boyokani oyo natie kati na Ngai mpe bikelamu nyonso ya bomoi oyo ezali kati na mokili. »
天主對諾厄說:「這就是我在我與地上一切有血肉的生物之間,所立的盟約的標記。」
18 Tala bana mibali ya Noa oyo babimaki na masuwa: Semi, Cham mpe Jafeti. Cham azalaki tata ya Kanana.
諾厄的兒子由方舟出來的,有閃、含、和耶斐特。含是客納罕的父親。
19 Bango misato bazalaki bana ya Noa mpe na nzela na bango nde mokili etondaki lisusu na bato.
這三人是諾厄的兒子;人類就由這三人分布天下。
20 Noa azalaki mosali bilanga mpe alonaki elanga ya vino.
諾厄原是農夫,遂開始種植葡萄園。
21 Tango amelaki masanga ya vino oyo ewutaki na elanga na ye, alangwaki mpe atikalaki bolumbu kati na ndako na ye ya kapo.
一天他喝酒喝醉了,就在自己的帳幕內脫去了衣服。
22 Cham, tata ya Kanana, amonaki bolumbu ya tata na ye mpe ayebisaki bandeko na ye ya mibali oyo bazalaki na libanda.
客納罕的父親含看見了父親赤身露體,遂去告訴外面的兩個兄弟。
23 Kasi Semi mpe Jafeti bazwaki elamba mpe batiaki yango na mapeka na bango. Bazongaki sima-sima mpe bazipaki bolumbu ya tata na bango. Lokola bilongi na bango etalaki na ngambo mosusu, bamonaki bolumbu ya tata na bango te.
閃和耶斐特二人於是拿了件外衣,搭在肩上,倒退著走進去,蓋上父親的裸體。他們的臉背著,沒有看見父親的裸體。
24 Tango milangwa ya Noa esilaki, ayokaki likambo oyo mwana na ye ya suka asalaki.
諾厄醒了後,知道了小兒對他作的事,
25 Alobaki: « Tika ete Kanana alakelama mabe, azala mowumbu ya suka ya bandeko na ye! »
就說:「客納罕是可咒罵的,給兄弟當最下賤的奴隸。」
26 Alobaki lisusu: « Tika ete Yawe, Nzambe ya Semi, apambolama! Tika ete Kanana azala mowumbu ya Semi!
又說:「上主,閃的天主,應受讚美,客納罕應作他的奴隸。
27 Tika ete Nzambe ayeisa monene mabele ya Jafeti! Tika ete Jafeti avanda na bandako ya kapo ya Semi, mpe Kanana azala mowumbu na ye! »
願天主擴展耶斐特,使他住在閃的帳幕內;客納罕應作他的奴隸。」
28 Sima na mpela, Noa awumelaki na bomoi mibu nkama misato na tuku mitano.
洪水以後,諾厄又活了三百五十年。
29 Mibu nyonso ya bomoi ya Noa ezalaki nkama libwa na tuku mitano, sima akufaki.
諾厄共活了九百五十歲死了。

< Ebandeli 9 >