< Ebandeli 6 >

1 Tango bato babandaki kokoma ebele na mokili mpe babotaki bana basi,
当人在世上多起来、又生女儿的时候,
2 milimo emonaki ete bana basi ya bato bazali kitoko; boye ekomisaki ba-oyo eponaki basi na yango.
神的儿子们看见人的女子美貌,就随意挑选,娶来为妻。
3 Yango wana, Yawe alobaki: « Pema na Ngai ekowumela libela te kati na moto, pamba te abengami na kokufa; mibu ya bomoi na ye ekozala kaka nkama moko na tuku mibale. »
耶和华说:“人既属乎血气,我的灵就不永远住在他里面;然而他的日子还可到一百二十年。”
4 Na tango wana, ezalaki na bingambe kati na mokili; mpe lisusu, milimo esangisaki nzoto na bana basi ya bato, bongo bana basi babotelaki yango bana. Bana yango bazalaki bilombe na tango ya kala, bato oyo bakenda sango.
那时候有伟人在地上,后来 神的儿子们和人的女子们交合生子;那就是上古英武有名的人。
5 Yawe amonaki ndenge nini mabe ya moto ekomaki mingi kati na mokili, mpe tango nyonso, makanisi ya motema ya moto ezalaki kaka mabe.
耶和华见人在地上罪恶很大,终日所思想的尽都是恶,
6 Boye Yawe ayokaki mawa na ndenge akelaki moto kati na mokili mpe abongolaki makanisi na Ye.
耶和华就后悔造人在地上,心中忧伤。
7 Boye Yawe alobaki: « Nakosilisa koboma kati na mokili bato oyo nakelaki; solo, nakosilisa koboma bato kino na bibwele, na bandeke ya likolo mpe na bikelamu oyo etambolaka na libumu kati na mokili, pamba te nabongoli makanisi na Ngai na ndenge nakelaki bango. »
耶和华说:“我要将所造的人和走兽,并昆虫,以及空中的飞鸟,都从地上除灭,因为我造他们后悔了。”
8 Kasi Noa azwaki ngolu na miso ya Yawe.
惟有挪亚在耶和华眼前蒙恩。
9 Tala lisolo ya libota ya Noa. Noa azalaki moto ya sembo mpe azanga pamela kati na bato ya tango na ye; azalaki kosala mokano ya Nzambe.
挪亚的后代记在下面。挪亚是个义人,在当时的世代是个完全人。挪亚与 神同行。
10 Noa azalaki na bana mibali misato: Semi, Cham mpe Jafeti.
挪亚生了三个儿子,就是闪、含、雅弗。
11 Mokili ebebaki na miso ya Nzambe mpe etondaki na makambo ya mobulu.
世界在 神面前败坏,地上满了强暴。
12 Nzambe amonaki ndenge mokili ebebaki, pamba te bato nyonso ya mokili babebisaki banzela na bango.
神观看世界,见是败坏了;凡有血气的人在地上都败坏了行为。
13 Boye, Nzambe alobaki na Noa: « Nazwi mokano ya koboma bikelamu nyonso ya bomoi, pamba te mokili etondi na mabe likolo na bango. Solo, nakobebisa bango elongo na mokili.
神就对挪亚说:“凡有血气的人,他的尽头已经来到我面前;因为地上满了他们的强暴,我要把他们和地一并毁灭。
14 Sala masuwa ya mabaya ya goferi mpo na lobiko na yo; kabola yango na bashambre. Okopakola gudron na kati mpe na libanda na yango.
你要用歌斐木造一只方舟,分一间一间地造,里外抹上松香。
15 Tala ndenge okotonga yango: molayi na yango ekozala na bametele pene nkama moko na tuku mitano, bametele pene tuku mibale na mitano na mokuse mpe bametele pene zomi na mitano na bosanda.
方舟的造法乃是这样:要长三百肘,宽五十肘,高三十肘。
16 Okotia likolo na yango lidusu ya basantimetele pene tuku mitano, okotia ekuke na mopanzi na yango; mpe na kati, okosala etaje ya liboso, ya mibale mpe ya misato.
方舟上边要留透光处,高一肘。方舟的门要开在旁边。方舟要分上、中、下三层。
17 Nakotinda mpela na mokili mpo na koboma nyonso oyo ezali na bomoi na se na moyi: ekelamu nyonso ya bomoi oyo ezali na mabele ekokufa.
看哪,我要使洪水泛滥在地上,毁灭天下;凡地上有血肉、有气息的活物,无一不死。
18 Kasi nasali boyokani elongo na yo, yango wana okokota na masuwa: yo, bana na yo ya mibali, mwasi na yo mpe basi ya bana na yo.
我却要与你立约;你同你的妻,与儿子儿妇,都要进入方舟。
19 Okokotisa mpe kati na masuwa, mibale-mibale, bikelamu nyonso ya bomoi, mwasi mpe mobali, mpo ete obatela yango na bomoi elongo na yo.
凡有血肉的活物,每样两个,一公一母,你要带进方舟,好在你那里保全生命。
20 Bikelamu mibale ya lolenge moko na moko ya bandeke, ya bibwele mpe ya bikelamu nyonso oyo etambolaka na libumu; nyonso ekoya epai na yo mpo ete obatela yango na bomoi.
飞鸟各从其类,牲畜各从其类,地上的昆虫各从其类,每样两个,要到你那里,好保全生命。
21 Okozwa biloko ya kolia ya lolenge na lolenge mpe okobomba yango mpo ete ezala bilei na yo elongo na yango. »
你要拿各样食物积蓄起来,好作你和它们的食物。”
22 Noa asalaki makambo nyonso ndenge kaka Nzambe atindaki ye.
挪亚就这样行。凡 神所吩咐的,他都照样行了。

< Ebandeli 6 >

The World is Destroyed by Water
The World is Destroyed by Water