< Ebandeli 50 >

1 Jozefi amibwakaki na nzoto ya tata na ye, alelaki ye mpe apesaki ye beze.
Then Joseph hugged his father's face, and wept over him, and kissed him.
2 Bongo Jozefi apesaki mitindo na minganga oyo bazalaki kosala epai na ye ete bakawusa nzoto ya Isalaele, tata na ye. Boye minganga bakawusaki nzoto ya Isalaele,
Joseph commanded his servants the physicians to embalm his father. So the physicians embalmed Israel.
3 bakokisaki mikolo tuku minei oyo esengelaki mpo na kokawusa nzoto ya mowei. Bato ya Ejipito basalelaki ye matanga mikolo tuku sambo.
Forty days were required for it, for that is how many the days it takes for embalming. The Egyptians mourned for him for seventy days.
4 Tango mikolo ya matanga esilaki, Jozefi alobaki na bakonzi oyo basalaka na ndako ya Faraon: — Soki nazwi ngolu na miso na bino, bolobela ngai epai ya Faraon. Boyebisa ye
When the days for mourning for him had passed, Joseph spoke to the house of Pharaoh, saying, "If now I have found favor in your sight, please speak in the ears of Pharaoh, saying,
5 ete tata na ngai alapisaki ngai ndayi: « Nakomi pembeni ya kokufa, bokunda ngai kati na kunda oyo natobolaki na libanga, na mokili ya Kanana. » Mpe sik’oyo, tika ete apesa ngai nzela mpo ete nakende kokunda tata na ngai, bongo na sima nde nakozonga.
'My father made me take an oath, saying, "Look, I am dying. Bury me in the tomb that I dug for myself in the land of Canaan." Now therefore, please let me go up and bury my father, and I will return again.'"
6 Faraon azongisaki: — Kende mpe kunda tata na yo ndenge alapisaki yo ndayi.
And Pharaoh said, "Go up, and bury your father, in keeping with your oath."
7 Boye Jozefi akendeki kokunda tata na ye; bakalaka nyonso ya lokumu ya Faraon bakendeki elongo na ye: bakonzi oyo bazalaki kosala na ndako na ye mpe bakonzi nyonso ya Ejipito
So Joseph went up to bury his father, and all the officials of Pharaoh went up with him, the elders of his household, and all the elders of the land of Egypt,
8 elongo na bato nyonso ya ndako ya Jozefi, bandeko na ye ya mibali mpe bato nyonso oyo bazalaki na ndako ya tata na ye. Bana na bango kaka nde batikalaki na Gosheni na bameme, bantaba mpe bangombe na bango.
all the household of Joseph, his brothers, and his father's household. Only their little ones, and their flocks, and their herds, they left in the land of Goshen.
9 Jozefi atambolaki lisusu elongo na bashareti mpe bato oyo batambolaka likolo ya bampunda. Ezalaki mobembo ya bato ebele penza.
And there went up with him both chariots and horsemen. It was a very large company.
10 Tango bakomaki na etando ya Atadi, pembeni ya Yordani, basalaki matanga ya monene penza. Jozefi asalaki mikolo sambo ya matanga mpo na tata na ye.
Then they came to the threshing floor of Atad which is across the Jordan, and they mourned there with a great and very bitter lamentation. And he observed seven days of mourning for his father.
11 Bongo tango bato ya Kanana oyo bazalaki kovanda kuna bamonaki matanga wana na etando ya Atadi, balobaki: « Bato ya Ejipito bazali na milulu minene ya matanga. » Yango wana babengaki esika yango Abele-Mitsirayimi, oyo ezali pembeni ya Yordani.
When the inhabitants of the land, the Canaanites, saw the mourning at the threshing floor of Atad, they said, "This is a deep mourning by the Egyptians." Therefore, its name was called Abel Mizraim, which is across the Jordan.
12 Bana mibali ya Jakobi basalaki ndenge tata na bango atindaki bango.
So his sons did to him just as he commanded them,
13 Bamemaki ye na mokili ya Kanana mpe bakundaki ye na lidusu ya mabanga oyo ezali na elanga ya Makipela, pembeni ya Mamire, elanga oyo Abrayami asombaki epai ya Efroni, moto ya Iti, mpo ete akomisa yango lilita na ye.
for his sons carried him into the land of Canaan and buried him in the cave of the field of Machpelah near Mamre, which Abraham bought along with the field as a burial site from Ephron the Hethite.
14 Sima na kokunda tata na ye, Jozefi azongaki na Ejipito elongo na bandeko na ye ya mibali mpe bato nyonso oyo balandaki ye mpo na kokunda tata na ye.
Then after he had buried his father, Joseph returned to Egypt, he and his brothers and all that went up with him to bury his father.
15 Tango bandeko mibali ya Jozefi bamonaki ete tata na bango asili kokufa, balobaki: « Tango mosusu Jozefi akoyina biso mpe akozongisela biso mabe nyonso oyo tosalaki ye! »
When Joseph's brothers saw that their father was dead, they said, "It may be that Joseph will hate us, and will pay us back in full for all of the evil that we did to him."
16 Boye batindelaki Jozefi maloba oyo: « Liboso ete tata na yo akufa, atikaki maloba oyo: ‹ Tala makambo oyo bokoyebisa Jozefi:
So they sent a message to Joseph, saying, "Your father gave this command before he died, saying,
17 ‘Nasengi ete olimbisa masumu ya bandeko na yo mpe mabe oyo basalaki yo! Sik’oyo, nabondeli yo, limbisa masumu ya basali ya Nzambe ya tata na yo!’ › » Tango Jozefi ayokaki maloba yango, alelaki.
Thus you are to tell Joseph, "Now please forgive the transgression of your brothers and their sin, because they did evil to you."' And now, please forgive the transgression of the servants of the God of your father." And Joseph wept when they spoke to him.
18 Bandeko na ye bayaki, bamibwakaki liboso na ye mpe balobaki: — Tozali bawumbu na yo.
Then his brothers also went and fell down in front of him, and they said, "Look, we are your slaves."
19 Kasi Jozefi alobaki na bango: — Bobanga te! Boni, ngai nazali na esika ya Nzambe?
But Joseph said to them, "Do not be afraid, for am I in the place of God?
20 Bino bokanisaki kosala ngai mabe, kasi Nzambe abongolaki yango bolamu mpo na kokokisa, ndenge ezali kosalema sik’oyo, lobiko ya bomoi ya bato ebele.
As for you, you meant evil against me, but God turned it into good in order to bring about this present result, to save the lives of many people.
21 Yango wana, bobanga te! Nakokokisa posa na bino mpe ya bana na bino. Akitisaki bango mitema mpe alobelaki bango na boboto nyonso.
So therefore, do not be afraid. I will provide for you and your little ones." And he consoled them and spoke kindly to them.
22 Jozefi avandaki na Ejipito elongo na libota nyonso ya tata na ye. Awumelaki na bomoi mibu nkama moko na zomi.
So Joseph lived in Egypt, he, and his father's household. And Joseph lived one hundred ten years.
23 Amonaki bakitani ya Efrayimi kino na molongo ya misato. Amonaki lisusu bana ya Makiri, mwana mobali ya Manase, ba-oyo babotamaki na mabolongo ya Jozefi.
Joseph saw Ephraim's descendants to the third generation. The children also of Makir, the son of Manasseh, were counted as Joseph's own.
24 Jozefi alobaki na bandeko na ye ya mibali: « Nakomi pene ya kokufa. Kasi ya solo, Nzambe akosalisa bino mpe akobimisa bino na mokili oyo, mpo na kokotisa bino na mokili oyo alakaki epai ya Abrayami, ya Izaki mpe ya Jakobi tango alapaki ndayi. »
And Joseph said to his brothers, "I am about to die, but God will surely take care of you and bring you up out of this land to the land which he promised to Abraham, to Isaac, and to Jacob."
25 Jozefi alapisaki bana mibali ya Isalaele ndayi mpe alobaki na bango: « Tango Nzambe akosunga bino, bokolongola mikuwa na ngai na esika oyo. »
Then Joseph made the sons of Israel take an oath, saying, "God will surely take care of you. Then you must carry up my bones from here."
26 Bongo Jozefi akufaki tango akokisaki mibu ya mbotama nkama moko na zomi. Tango basilisaki kokawusa nzoto na ye, batiaki ye na sanduku na Ejipito.
So Joseph died, being one hundred ten years old, and they embalmed him and placed him in a coffin in Egypt.

< Ebandeli 50 >