< Ebandeli 49 >

1 Jakobi abengaki bana na ye ya mibali mpe alobaki: — Bosangana mpo ete nakoka koyebisa bino makambo oyo ekokomela bino na mikolo oyo ekoya.
و یعقوب، پسران خود را خوانده، گفت: «جمع شوید تا شما را از آنچه درایام آخر به شما واقع خواهد شد، خبر دهم.۱
2 Bosangana mpe boyoka, bana mibali ya Jakobi! Boyoka oyo tata na bino Isalaele akoloba:
‌ای پسران یعقوب جمع شوید و بشنوید! و به پدرخود، اسرائیل، گوش گیرید.۲
3 « Ribeni, ozali mwana na ngai ya liboso, makasi na ngai, elembo ya liboso ya makasi na ngai; oleki na lokumu mpe na nguya.
«ای روبین! تو نخست زاده منی، توانایی من وابتدای قوتم، فضیلت رفعت و فضیلت قدرت.۳
4 Mobulu lokola mayi, okokende liboso te, pamba te omataki na mbeto ya tata na yo, esika oyo ngai nalalaka, mpe okomisi yango mbindo.
جوشان مثل آب، برتری نخواهی یافت، زیرا که بر بستر پدر خود برآمدی. آنگاه آن را بی‌حرمت ساختی، به بستر من برآمد.۴
5 Simeoni mpe Levi bazali bandeko, mipanga na bango ezali bibundeli mpo na kotia mobulu.
«شمعون و لاوی برادرند. آلات ظلم، شمشیرهای ایشان است.۵
6 Molimo na ngai, kosangana te na mabongisi na bango ya kosala mabe! Lokumu na ngai, kokota te na lisanga na bango! Pamba te na kanda na bango, babomaki bato; mpe na esengo na bango, basepelaki kokata misisa ya makolo ya bangombe ya mibali.
‌ای نفس من به مشورت ایشان داخل مشو، و‌ای جلال من به محفل ایشان متحد مباش زیرا در غضب خودمردم را کشتند. و در خودرایی خویش گاوان راپی کردند.۶
7 Tika ete kanda na bango elakelama mabe, pamba te ezali makasi! Tika ete kotomboka na bango elakelama mabe, pamba te ezanga mawa! Nakokabola bango na Jakobi mpe nakopanza bango kati na Isalaele.
ملعون باد خشم ایشان، که سخت بود، و غضب ایشان زیرا که تند بود! ایشان را دریعقوب متفرق سازم و در اسرائیل پراکنده کنم.۷
8 Yuda, bandeko na yo ya mibali bakokumisa yo, loboko na yo ekozala na kingo ya banguna na yo; bana mibali ya tata na yo bakogumbama liboso na yo.
«ای یهودا تو را برادرانت خواهند ستود. دستت بر گردن دشمنانت خواهد بود، و پسران پدرت، تو را تعظیم خواهند کرد.۸
9 Yuda, ozali mwana ya nkosi; mwana na ngai ya mobali, owuti na bokila. Agunzami mpe alali lokola nkosi ya mobali; mpe lokola nkosi ya mwasi, nani akomeka kotelemisa ye?
یهوداشیربچه‌ای است، ای پسرم از شکار برآمدی. مثل شیر خویشتن را جمع کرده، در کمین می‌خوابد وچون شیرماده‌ای است. کیست او را برانگیزاند؟۹
10 Nzete ya bokonzi ekolongwa te na Yuda, lingenda mpe ekolongwa te kati na makolo na ye, kino tango nkolo na ye akoya, nkolo oyo bikolo nyonso ekotosa.
عصا از یهودا دور نخواهد شد. و نه فرمان فرمایی از میان پایهای وی تا شیلو بیاید. ومر او را اطاعت امتها خواهد بود.۱۰
11 Akokanga ane na ye na nzete ya vino, mpe mwana ya ane na etape oyo ye akopona; akosukola bilamba na ye na vino; mpe kazaka na ye, na masanga ya vino ya motane.
کره خود رابه تاک و کره الاغ خویش را به مو بسته. جامه خودرا به شراب، و رخت خویش را به عصیر انگورمی شوید.۱۱
12 Miso na ye ekozala motane koleka vino, mpe minu na ye ekozala pembe koleka miliki.
چشمانش به شراب سرخ و دندانش به شیر سفید است.۱۲
13 Zabuloni akowumela pene ya ebale monene, eteni ya mabele na ye ekozala libongo ya masuwa, mpe mabele na ye ekokende kino na Sidoni.
«زبولون، بر کنار دریا ساکن شود، و نزدبندر کشتیها. و حدود او تا به صیدون خواهدرسید.۱۳
14 Isakari azali ane ya makasi oyo elali kati na mapango mibale.
یساکار حمار قوی است در میان آغلهاخوابیده.۱۴
15 Amonaki ete bopemi ezali malamu, mpe mokili na ye ezali kitoko; boye mapeka na ye ekomema mikumba mpe abongi mpo na misala ya bowumbu.
چون محل آرمیدن را دید که پسندیده است، و زمین را دلگشا یافت، پس گردن خویش را برای بار خم کرد، و بنده خراج گردید.۱۵
16 Dani akokamba bato na ye lokola moko kati na bikolo ya Isalaele.
«دان، قوم خود را داوری خواهد کرد، چون یکی از اسباط اسرائیل.۱۶
17 Dani akozala lokola nyoka na balabala to lokola etupa na nzela, oyo eswaka litindi ya mpunda mpo ete motambolisi na yango akweya.
دان، ماری خواهد بود به‌سر راه، و افعی بر کنار طریق که پاشنه اسب رابگزد تا سوارش از عقب افتد.۱۷
18 Oh Yawe, nazali na elikya ete okobikisa ngai!
‌ای یهوه منتظرنجات تو می‌باشم.۱۸
19 Gadi, banguna ebele bakobundisa ye, kasi ye mpe akobundisa bango kino kobengana bango.
«جاد، گروهی بر وی هجوم خواهند‌آورد، و او به عقب ایشان هجوم خواهد آورد.۱۹
20 Bilei oyo ekobima na mokili ya Aseri ekozala ebele penza; mabele na ye ekobota biloko oyo ebongi mpo na bakonzi.
اشیر، نان او چرب خواهد بود، و لذات ملوکانه خواهدداد.۲۰
21 Nefitali azali lokola mboloko ya nsomi, oyo ebotaka bana kitoko.
نفتالی، غزال آزادی است، که سخنان حسنه خواهد داد.۲۱
22 Jozefi azali lokola nzete oyo ebotaka mbuma mingi, nzete oyo ezalaka pembeni ya etima, mpe oyo bitape na yango elekaka bosanda ya mir.
«یوسف، شاخه باروری است. شاخه باروربر سر چشمه‌ای که شاخه هایش از دیوار برآید.۲۲
23 Banguna batumbolaki ye, babwakelaki ye makonga mpe babundisaki ye;
تیراندازان او را رنجانیدند، و تیر انداختند واذیت رسانیدند.۲۳
24 kasi ye asimbaki kaka makasi tolotolo na ye, mpe maboko na ye etikalaki kolenga te mpo na loboko ya Elombe ya Jakobi, oyo azali Mobateli mpate, Libanga ya Isalaele.
لیکن کمان وی در قوت قایم ماند. و بازوهای دستش به‌دست قدیر یعقوب مقوی گردید که از آنجاست شبان و صخره اسرائیل.۲۴
25 Mpo na Nzambe ya tata na yo, tika ete asungaka yo! mpo na Nkolo-Na-Nguya-Nyonso, tika ete apambola yo, apambola yo na mapamboli ya Lola, wuta na likolo; na mapamboli ya bozindo, na se; na mapamboli ya mabele mpe ya libumu.
از خدای پدرت که تو را اعانت می‌کند، و از قادرمطلق که تو را برکت می‌دهد، به برکات آسمانی از اعلی و برکات لجه‌ای که دراسفل واقع است، و برکات پستانها و رحم.۲۵
26 Mapamboli ya tata na yo ezali na motuya koleka mapamboli ya bangomba ya kala, koleka bomengo ya bangomba mike ya kala; tika ete mapamboli nyonso ekita na moto ya Jozefi, ekitela ye oyo atombolami kati na bandeko na ye!
برکات پدرت بر برکات جبال ازلی فایق آمد، وبر حدود کوههای ابدی و بر سر یوسف خواهدبود، و بر فرق او که از برادرانش برگزیده شد.۲۶
27 Benjame azali lokola mbwa ya zamba; na tongo, apasolaka mosuni na ye; na pokwa, akabolaka bomengo ya bitumba. »
«بنیامین، گرگی است که می‌درد. صبحگاهان شکار را خواهد خورد، و شامگاهان غارت را تقسیم خواهد کرد.»۲۷
28 Bango nyonso nde basali bikolo zomi na mibale ya Isalaele; mpe oyo ezali maloba oyo tata na bango alobaki na bango tango apambolaki bango. Apesaki na moko na moko lipamboli oyo ekoki na ye.
همه اینان دوازده سبط اسرائیلند، و این است آنچه پدرایشان، بدیشان گفت و ایشان را برکت داد، و هریک را موافق برکت وی برکت داد.۲۸
29 Jakobi apesaki bango malako oyo: « Nakomi pene ya kokende kokutana na batata na ngai. Bokunda ngai esika moko na bango, na lilita oyo ezali na elanga ya Efroni, moto ya Iti,
پس ایشان را وصیت فرموده، گفت: «من به قوم خود ملحق می‌شوم، مرا با پدرانم در مغاره‌ای که در صحرای عفرون حتی است، دفن کنید.۲۹
30 kati na lidusu ya mabanga ya Makipela, pembeni ya Mamire, na mokili ya Kanana, elanga oyo Abrayami asombaki na Efroni, moto ya Iti, lokola lilita.
در مغاره‌ای که در صحرای مکفیله است، که درمقابل ممری در زمین کنعان واقع است، که ابراهیم آن را با آن صحرا از عفرون حتی برای ملکیت مقبره خرید.۳۰
31 Ezalaki kuna nde bakundaki Abrayami mpe Sara, mwasi na ye; Izaki mpe Rebeka, mwasi na ye. Ezali kuna nde ngai nakundaki Lea.
آنجا ابراهیم و زوجه‌اش، ساره رادفن کردند؛ آنجا اسحاق و زوجه او رفقه را دفن کردند؛ و آنجا لیه را دفن نمودم.۳۱
32 Elanga mpe lidusu ya mabanga oyo ezali kati na yango esombamaki epai ya bato ya Iti. »
خرید آن صحرا و مغاره‌ای که در آن است از بنی حت بود.»۳۲
33 Tango Jakobi asilisaki kopesa malako epai ya bana na ye, asembolaki makolo na ye na mbeto, akataki motema mpe akendeki kokutana na batata na ye.
و چون یعقوب وصیت را با پسران خود به پایان برد، پایهای خود را به بستر کشیده، جان بداد و به قوم خویش ملحق گردید.۳۳

< Ebandeli 49 >