< Ebandeli 45 >

1 Jozefi akokaki lisusu komikanga te liboso ya bato nyonso oyo bazalaki liboso na ye, agangaki: « Bobimisa bato nyonso! » Boye, moto moko te azalaki pembeni na ye tango amimonisaki epai ya bandeko na ye ya mibali.
若瑟在眾侍從前不能再抑制自己,就喊說:「叫眾人離開我出去! 」這樣,若瑟使兄弟認出自己來時,沒有別人在場。
2 Lokola alelaki na mongongo makasi, bato ya Ejipito bayokaki ye; mpe sango ekendeki kino na ndako ya Faraon.
他便放聲大哭,埃及人都聽到了,法郎朝廷也聽到了。
3 Jozefi alobaki na bandeko na ye ya mibali: — Nazali Jozefi! Tata na ngai azali nanu na bomoi? Kasi bandeko na ye bakokaki koyanola ye te, pamba te bazalaki kolenga liboso na ye.
若瑟對兄弟們說:「我就是若瑟,我父親還在嗎﹖」他的兄弟們不能回答,因為在他面前都嚇呆了。
4 Jozefi alobaki na bango: — Bopusana pembeni na ngai! Tango bapusanaki, alobaki: — Nazali Jozefi, ndeko na bino ya mobali oyo botekaki mpo ete bamema ngai na Ejipito.
若瑟又對兄弟們說:「請你們近前來。」他們就上前去。若瑟說:「我就是你們賣到埃及的弟弟若瑟。
5 Kasi sik’oyo, bomitungisa te mpe bozala na mawa te na ndenge botekaki ngai awa. Ezali mpo na kobikisa bomoi na bino nde Nzambe atindaki ngai liboso na bino.
現在你們不要因為將我賣到這裏便自憂自責;這原是天主派遣我在你們以先來,為保全你們的性命。
6 Oyo ezali mobu ya mibale wuta nzala makasi ekotaki na mokili; mpe na mibu mitano oyo ezali koya, bakolona te mpe bakobuka te.
地方上的饑荒纔過了第二年,還有五年,不能耕種,不能收割。
7 Kasi Nzambe atindaki ngai liboso na bino mpo ete bowumela na mokili mpe bobikisa bomoi na bino na nzela ya kokangolama monene.
天主派遣我在你們以先來,是為給你們在地上留下後裔,給你們保全多人的性命。
8 Ezali bino te bato botindaki ngai awa, kasi ezali nde Nzambe. Akomisaki ngai tata ya Faraon, nkolo ya ndako na ye mpe moyangeli ya mokili mobimba ya Ejipito.
所以叫我到這裏來的並不是你們,而是天主;是他立我作法郎之父,作他全家的主人,作全埃及地的總理。
9 Bozonga noki epai ya tata na ngai mpe boloba na ye: « Mwana na yo, Jozefi, alobi: ‹ Nzambe akomisa ngai nkolo ya Ejipito mobimba; yaka epai na ngai, kowumela te.
你們急速上到我父親那裏,對他說:你的兒子若瑟這樣說:天主立我作了全埃及的主人,請你下到我這裏來,不要遲延。
10 Okovanda na etuka ya Gosheni mpe okozala pembeni na ngai: yo, bana na yo mpe bakitani na yo, bameme na yo, bantaba na yo, bangombe na yo mpe biloko nyonso oyo ozali na yango.
你和你的兒孫,以及你的羊群牲畜,並你一切所有,都可住在哥笙地,離我不遠,
11 Kuna, nakokokisa baposa na yo nyonso, pamba te mibu mitano ya nzala makasi ezali koya; soki te, yo elongo na bana na yo mpe bibwele na yo nyonso, bokokoma na pasi.
我好在那裏奉養你,免得你和你的眷屬,並你一切所有陷於貧乏,因為尚有五年饑荒。
12 Bino moko bozali komona! Ndeko na ngai, Benjame, akoki mpe komona yango, ete ezali ngai moto nazali koloba na bino.
看你們和我的弟弟本雅明都親眼見到,是我親口在對你們說話。
13 Boyebisa tata na ngai lokumu nyonso oyo nazali na yango awa na Ejipito, boyebisa ye makambo nyonso oyo bosili komona mpe bomemela ngai ye awa na lombangu. › »
你們要將我在埃及的一切光榮,和你們親見的一切,都告訴我父親,儘速將我父親下到這裏來。」
14 Sima, amibwakaki na kingo ya ndeko na ye Benjame mpe alelaki; Benjame mpe akangaki ye na kingo, bongo alelaki.
說畢,便撲在他弟弟本雅明的頸上哭起來了,本雅明也伏在他頸上哭泣。
15 Apesaki bandeko na ye nyonso beze mpe alelaki. Sima na yango, basololaki.
然後與眾兄弟親吻,抱著他們痛哭。這以後,他的兄弟們纔敢與他交談。
16 Tango sango ekomaki na ndako ya Faraon ete bandeko ya Jozefi bayei, Faraon elongo na bakambi na ye nyonso basepelaki.
法郎朝廷聽說若瑟兄弟來了的消息,法郎和他的臣僕都很高興。
17 Faraon alobaki na Jozefi: — Yebisa bandeko na yo: « Botia biloko likolo ya banyama na bino mpe bozonga na mokili ya Kanana.
法郎便對若瑟說:「你對你的兄弟們說:你們應這樣做:備好牲口,立即往客納罕地去,
18 Boyela ngai tata na bino mpe mabota na bino; nakopesa bino mabele oyo eleki kitoko kati na Ejipito mpe bokolia biloko na yango oyo eleki kitoko. »
接你們的父親和家眷到我這裏來,我願賜給你們埃及地最好的出產,使你們享受本地的肥物。
19 Okoyebisa bango lisusu: « Bozwa ndambo ya bashario ya Ejipito mpo na bana mpe basi na bino; bongo bozwa tata na bino mpe bozonga awa.
你再吩咐他們說:你們應這樣做:從埃及帶些車輛去接你們的子女和妻子,並把你們的父親接來;
20 Boyoka mawa te mpo na oyo bokotika na Kanana, pamba te biloko nyonso ya kitoko oyo ezali na Ejipito ekozala mpo na bino. »
不要顧惜你們的物品,因為全埃及地最好的出品都歸你們享用。」
21 Bana ya Isalaele basalaki makambo oyo bayebisaki bango. Jozefi apesaki bango bashario ndenge Faraon apesaki mitindo mpe apesaki bango bilei mosusu mpo na mobembo na bango.
以色列的兒子們就這樣做了。若瑟依照法郎的吩咐,給了他們一些車輛和路上用的食糧;
22 Jozefi apesaki epai ya moko na moko kati na bango bilamba ya sika; apesaki Benjame mbongo ya bibende, nkama misato, elongo na bilamba ya sika.
又給了每人一套新衣,至於本雅明,卻給了他三百銀錢和五套新衣;
23 Atindelaki tata na ye biloko oyo: ba-ane zomi etonda na bilamba ya kitoko ya Ejipito mpe bampunda zomi ya basi etonda na ble, mapa mpe bilei mpo na mobembo na ye.
同樣,給他父親送去十匹公驢,滿載埃及最好的出品,十匹母驢,滿載糧食麵餅,和為父親路上用的食品。
24 Jozefi atikaki bandeko na ye kokende. Tango bazali kolongwa, alobaki na bango: — Boswana te na nzela.
隨後打發他的兄弟們走了;當他們離別時,對他們說:「路上不要爭吵! 」
25 Balongwaki na Ejipito mpe bakendeki epai ya tata na bango Jakobi, na mokili ya Kanana.
若瑟的兄弟們由埃及上到客納罕,他們父親雅各伯那裏,
26 Balobaki na ye: — Jozefi azali nanu na bomoi. Ye nde moto azali koyangela Ejipito mobimba. Jakobi ayokaki nzoto malili mpe andimelaki bango te.
告訴他說:「若瑟還活著,而且做了全埃及國的總理。」雅各伯聽了心中淡然,並不相信。
27 Kasi tango bayebisaki ye makambo nyonso oyo Jozefi alobaki mpo na bango mpe tango amonaki bashario oyo Jozefi atindaki mpo na komema ye na Ejipito, molimo ya tata na bango Jakobi ezongaki.
及至他們將若瑟對他們所說的話,全講給他聽,他又看了若瑟打發來接他的車輛,他們的父親雅各伯的心神才甦醒過來。
28 Mpe Isalaele alobaki: — Ya solo, nandimi ete mwana na ngai Jozefi azali nanu na bomoi; nakokende mpe nakomona ye liboso ete nakufa.
以色列於是說:「只要我兒若瑟還在,我就心滿意足了;在我未死以前,我該去見他一面。」

< Ebandeli 45 >