< Ebandeli 44 >
1 Jozefi apesaki mitindo epai ya moto oyo azalaki na mokumba ya kobatela bozwi ya ndako na ye: « Tondisa biloko ya kolia na basaki ya bato oyo kolanda kilo oyo bakoki komema mpe tia mbongo ya moko na moko na moto ya saki na ye.
Then commanded he him who was over his house saying—Fill the sacks of the men, with food, as much as they can carry, and put each man’s silver in the mouth of his sack;
2 Okotia kopo na ngai oyo ya palata na moto ya saki ya leki na bango ya suka elongo na mbongo na ye ya ble. » Moto yango asalaki ndenge kaka Jozefi alobaki na ye.
and my cup—the cup of silver, shalt thou put in the mouth of the sack of the youngest, with his corn-silver. So he did, according to the word of Joseph, which he had spoken.
3 Na tongo-tongo, batikaki bandeko ya Jozefi kozonga elongo na ba-ane na bango.
By the time, the morning, was light, the men, had been sent away, they, and their asses.
4 Wana babimaki na engumba, bamikomelaki nanu mosika te, Jozefi alobaki na moto oyo azalaki na mokumba ya kobatela bozwi ya ndako na ye: « Telema, landa bato wana! Mpe tango okokanga bango, tuna bango: mpo na nini bozongisi mabe na malamu?
They themselves, had gone out of the city—they had not gone far, when Joseph said to him who was over his house, Rise chase after the men, —so shalt thou overtake them and shalt say unto them, Wherefore have ye requited evil for good?
5 Mpo na nini boyibi kopo oyo nkolo na ngai amelelaka mayi mpe asalelaka mpo na koyeba makambo oyo ekoya? Likambo oyo bosali ezali penza mabe. »
Is not this that in which my lord drinketh, and whereby, he himself, doth divine? Ye have done evil in what ye have done.
6 Mokambi ya ndako ya Jozefi akangaki bango mpe alobelaki bango lolenge nkolo na ye atindaki ye.
So he overtook them, —and spake unto them these words.
7 Kasi bazongiselaki ye: — Mpo na nini nkolo na biso alobi makambo ya boye? Basali na yo bakoki kosala makambo ya boye te.
And they said unto him, Wherefore should my lord speak such words as these? Far be thy servants, from doing such a thing as this!
8 Tomemelaki yo mbongo oyo tomonaki tango tofungolaki basaki na biso wuta na mokili ya Kanana. Ndenge nini tokoki lisusu koyiba wolo to palata kati na ndako ya nkolo na yo?
Lo! the silver that we found in the mouth of our sacks, we brought back unto thee out of the land of Canaan, —how then could we steal out of the house of thy lord, silver or gold?
9 Soki moko kati na basali na yo amonani ete azali na yango, akokufa; mpe biso bamosusu oyo totikali, tokokoma bawumbu ya nkolo na biso.
With whomsoever of thy servants it can be found, he shall die, —and, we also, will become my lord’s servants.
10 Moto oyo azalaki na mokumba ya kobatela bozwi ya ndako ya Jozefi alobaki: — Malamu mingi! Tika ete ezala ndenge bolobi! Moto oyo akomonana ete azali na yango, akokoma mowumbu na ngai. Bino ba-oyo botikali, bokozala na likambo te.
And he said, Yea, now, according to your words, so, let it be, —he with whom it is found, shall be my servant, Ye, however, shall be clear.
11 Moko na moko akitisaki saki na ye na lombangu na mabele mpe afungolaki yango.
So they hastened and took down each man his sack to the ground, —and opened each man his sack.
12 Moto oyo azalaki na mokumba ya kobatela bozwi ya Jozefi abandaki koluka kobanda na kulutu kino na leki. Mpe kopo emonanaki na saki ya Benjame.
Then made he thorough search, with the eldest, he began, and with the youngest, he ended, —and the cup was found in the sack of Benjamin!
13 Tango bamonaki bongo, bapasolaki bilamba na bango; bazongisaki biloko na ba-ane na bango mpe bazongaki bango nyonso na engumba.
And they rent their mantles, —and laded each man his ass, and returned to the city.
14 Jozefi azalaki kaka na ndako. Tango Yuda na bandeko na ye ya mibali bakotaki na ndako, bagumbamaki kino na se liboso na ye.
And Judah and his brethren came into the house of Joseph, he, yet being there, —and fell down before him to the earth.
15 Jozefi alobaki na bango: — Likambo nini oyo bosali? Boyebi te ete moto lokola ngai nazali na makoki ya komona makambo na bosoloka?
And Joseph said to them, What is this deed which ye have done? Know ye not that such a man as I, can even divine?
16 Yuda azongisaki: — Likambo nini tokoki koloba na nkolo na ngai? Tokoloba lisusu nini? Ndenge nini tokoki kotalisa ete toyebi likambo te? Nzambe alakisi polele mbeba ya basali na yo. Tokomi sik’oyo bawumbu ya nkolo na ngai, biso nyonso elongo na ye oyo amonani ete azalaki na kopo kati na saki na ye.
Then said Judah—What shall we say to my lord, how shall we speak and how shall we justify ourselves, —when, God himself, hath found out the iniquity of thy servants? Behold us! my lord’s servants, both we, and he in whose hand the cup hath been found.
17 Kasi Jozefi alobaki: — Nakoki kosala likambo ya boye te! Kaka moto oyo amonani ete azalaki na kopo kati na saki na ye nde akozala mowumbu na ngai. Bino ba-oyo botikali, bozonga na kimia epai ya tata na bino.
And he said, Far be it from me to do this thing! The man in whose hand the cup hath been found, he, shall be my servant, but as for you, go ye up in peace unto your father.
18 Yuda apusanaki pembeni na ye mpe alobaki: — Nabondeli yo, nkolo na ngai! Tika ete mosali na yo aloba liloba moko epai ya nkolo na ngai. Kosilikela mosali na yo te, pamba te ndenge Faraon azali, ndenge wana mpe yo ozali.
Then Judah drew near unto him, and said—Pardon my lord! Pray let thy servant speak a word in the ears of my lord, and do not let thine anger be kindled against thy servant, —for, thus, art, thou as Pharaoh!
19 Nkolo na ngai atunaki basali na ye: « Bozali na tata to na ndeko mosusu ya mobali? »
It was, my lord, who asked his servants, saying, —Have ye a father, or a brother?
20 Tozongiselaki nkolo na ngai: « Tozali na tata oyo akomi mobange mpe ndeko mobali ya leki oyo babotelaki tata na biso na kimobange. Ndeko na ye ya mobali akufa mpe atikala kaka ye moko mwana mobali na libumu ya mama na ye, mpe tata na ye alingaka ye mingi. »
So we said unto my lord, We have an aged father, and the child of his old age a youth, —his brother, being dead, he alone, is left of his mother and, his father, loveth him.
21 Bongo olobaki na basali na yo: « Bomemela ngai ye mpo ete nakoka komona ye na miso na ngai. »
So then thou saidst unto thy servants, Bring him down unto me, —that I may set mine eyes upon him.
22 Tozongiselaki nkolo na ngai: « Elenge mobali akoki kotika tata na ye te; soki atiki ye, tata na ye akokufa. »
And we said unto my lord, The lad cannot leave his father, —as surely as he leaveth his father, so surely will he, die.
23 Kasi olobaki na basali na yo: « Soki leki na bino ya mobali ayei elongo na bino te, bokomona lisusu elongi na ngai te. »
And thou saidst unto thy servants, Except your youngest brother do come down with you, ye shall not again behold my face.
24 Tango tozongaki epai ya mosali na yo, tata na ngai, toyebisaki ye makambo nyonso oyo nkolo na ngai alobaki.
So it came to pass when we had gone up unto thy servant, my father, that we told him the words of my lord.
25 Bongo tata na biso alobaki: « Bozonga mpe bosomba ndambo ya biloko ya kolia. »
Then said our father, —Go again buy us a little food,
26 Kasi tozongisaki: « Tokoki kokende te. Tokokende kaka soki leki na biso ya mobali azali elongo na biso. Tokoki komona elongi ya moto wana te soki leki na biso ya mobali azali elongo na biso te. »
And we said, We cannot go down, —If our youngest brother be with us, then will we go down, for we cannot see the face of the man if, our youngest brother, is not with us.
27 Mosali na yo, tata na biso, alobaki na biso: « Boyebi ete mwasi na ngai, Rasheli, abotelaki ngai bana mibale ya mibali.
Then said thy servant my father, unto us, —Ye yourselves, know, that, two, did my wife bear to me,
28 Moko na bango akenda mosika na ngai. Nakanisi ete ezali ya solo, nyama moko ya mabe esila kolia ye. Banda tango wana, natikala komona ye lisusu te.
and the one went forth from me, and I said—Certainly he hath been, torn in pieces, —And I have never seen him since.
29 Soki bozwi ngai lisusu mwana oyo mpe soki likama ekweyeli ye, bokoboma ngai na pasi, na kimobange na ngai. » (Sheol )
As surely as ye take, this one also, away from before my face and there befall him any mischief, so surely shall ye bring down my grey hairs, with misfortune to hades. (Sheol )
30 Sik’oyo, soki elenge mobali azali elongo na biso te tango nakozonga epai ya tata na ngai, mosali na yo, mpe soki tata na ngai, oyo motema na ye ekangama makasi na motema ya elenge mobali oyo,
Now, therefore, as surely as I go in unto thy servant my father, and, the lad, is not with us, —seeing that his soul is bound up with the lad’s soul,
31 amoni ete elenge mobali azali elongo na biso te, wana akokufa. Basali na yo bakoboma tata na biso na pasi na kimobange na ye. (Sheol )
so surely shall it come to pass that when he seeth that the lad is not with us, then will he die. So shall thy servants bring down the grey hairs of thy servant our father, with sorrow to hades. (Sheol )
32 Pamba te ngai mosali na yo, nandimaki, na miso ya tata na ngai, kobatela elenge mobali oyo. Nalobaki: « Soki nazongiseli yo ye te, nakozala na ngambo liboso na yo tata na ngai, bomoi na ngai mobimba. »
For thy servant, became surety for the lad, while away from my father saying, —If I bring him not unto thee, then will I count myself a sinner against my father all the days.
33 Yango wana sik’oyo, nabondeli yo, tika ete mosali na yo akoma mowumbu ya nkolo na ngai na esika ya elenge mobali oyo mpe tika ete elenge mobali azonga elongo na bandeko na ye ya mibali.
Now, therefore, I pray thee let thy servant remain instead of the lad, as servant to my lord, —but as for the lad, let him go up with his brethren.
34 Ndenge nini nakoki kozonga epai ya tata na ngai soki elenge mobali azali elongo na ngai te? Kotika te ete namona pasi oyo ekokomela tata na ngai!
For how can I go up unto my father, should the lad, not be with me? lest I look on the calamity, that shall find out my father,