< Ebandeli 42 >

1 Tango Jakobi ayokaki ete ble ezali na Ejipito, alobaki na bana na ye ya mibali: « Mpo na nini bozali kotalana bino na bino?
Now Jacob became aware that there was grain in Egypt. He said to his sons, “Why do you look at one another?”
2 Nayoki ete ble ezali na Ejipito. Bokende kuna mpe bosomba ndambo mpo na biso mpo ete towumela na bomoi mpe tokufa te na nzala. »
He said, “See here, I have heard that there is grain in Egypt. Go down there and buy for us from there so we may live and not die.”
3 Bandeko mibali zomi ya Jozefi bakendeki na Ejipito mpo na kosomba ble.
Joseph's ten brothers went down to buy grain from Egypt.
4 Kasi Jakobi atikaki te Benjame, ndeko ya Jozefi ya mobali, ete akende elongo na bango, pamba te azalaki kobanga ete likama ekweyela ye.
But Benjamin, Joseph's brother, Jacob did not send with his brothers, for he feared that harm might come to him.
5 Kati na bato oyo bakendeki kosomba ble na Ejipito, bana mibali ya Isalaele mpe bazalaki; pamba te nzala makasi ekotaki mpe na mokili ya Kanana.
The sons of Israel came to buy among those who came, for the famine was in the land of Canaan.
6 Jozefi azalaki moyangeli ya mokili. Ye nde azalaki koteka ble epai ya bato na ye nyonso. Bongo tango bandeko ya Jozefi bakomaki, bagumbamaki liboso na ye mpe bakitisaki mito na se.
Now Joseph was the governor over the land. He was the one who sold to all the people of the land. Joseph's brothers came and bowed down to him with their faces to the ground.
7 Tango kaka Jozefi amonaki bango, asosolaki mbala moko ete bazali bandeko na ye. Kasi asalaki lokola nde azali mopaya liboso na bango mpe azalaki na maloba makasi epai na bango. Atunaki bango: — Bowuti wapi? Bazongisaki: — Towuti na mokili ya Kanana; toyei nde kosomba biloko ya kolia.
Joseph saw his brothers and recognized them, but he disguised himself to them and spoke harshly with them. He said to them, “Where have you come from?” They said, “From the land of Canaan to buy food.”
8 Atako Jozefi asosolaki ete bazali bandeko na ye, kasi bango basosolaki ye te.
Joseph recognized his brothers, but they did not recognize him.
9 Bongo Jozefi akanisaki ndoto oyo alotaki na tina na bango mpe alobaki na bango: — Bino bozali penza banongi! Boyei nde kotala bisika nini mokili na biso ebatelami malamu te!
Then Joseph remembered the dreams he had dreamed about them, and he said to them, “You are spies! You have come to see the undefended parts of the land.”
10 Bazongisaki: — Te nkolo na ngai, basali na yo bayei nde kosomba biloko ya kolia.
They said to him, “No, my master. Your servants have come to buy food.
11 Tozali biso nyonso bana ya moto moko. Basali na yo bazali bato ya sembo, kasi bazali banongi te.
We are all one man's sons. We are honest men. Your servants are not spies.”
12 Alobaki na bango: — Te! Boyei na mokili na biso mpo na kotala bisika oyo ebatelami malamu te!
He said to them, “No, you have come to see the undefended parts of the land.”
13 Kasi bango bazongisaki: — Basali na yo bazalaki bandeko mibali zomi na mibale; tozali bana ya moto moko oyo azali kovanda na mokili ya Kanana. Mwana ya suka azali sik’oyo elongo na tata na biso, mpe mosusu azalaka lisusu te.
They said, “We your servants are twelve brothers, the sons of one man in the land of Canaan. See, the youngest is this day with our father, and one brother is no longer alive.”
14 Kasi Jozefi alobaki na bango: — Ezali ndenge kaka nalobaki na bino: bozali banongi.
Joseph said to them, “It is what I said to you; you are spies.
15 Tala ndenge nakomeka bino: Na kombo ya Faraon, bokolongwa na esika oyo te soki leki na bino ya suka akomi awa te!
By this you will be tested. By the life of Pharaoh, you will not leave here, unless your youngest brother comes here.
16 Botinda moko kati na bino ete akende kozwa ndeko na bino ya mobali; mpe bino oyo bokotikala, bokozala na boloko mpo na komeka maloba na bino mpe kotala soki bolobi solo. Soki te, na kombo ya Faraon, bozali banongi!
Send one of yourselves and let him get your brother. You will remain in prison, that your words may be tested, whether there is truth in you.”
17 Atiaki bango nyonso na boloko mikolo misato.
He put them all in custody for three days.
18 Na mokolo ya misato, Jozefi ayebisaki bango: — Nazali moto oyo abangaka Nzambe. Bosala oyo nazali koloba mpe bokozala na bomoi.
Joseph said to them on the third day, “Do this and live, for I fear God.
19 Soki bozali bato ya sembo, tika ete moko kati na bino atikala awa kati na boloko; bongo bino bamosusu bokende, bomema ble oyo esengeli mpo na mabota na bino, oyo ezali na nzala makasi.
If you are honest men, let one of your brothers be confined in this prison, but you go, carry grain for the famine of your houses.
20 Kasi bomemela ngai leki na bino ya suka. Yango ekolakisa ete bolobaki solo mpe bokokufa te. Basalaki bongo.
Bring your youngest brother to me so your words will be verified and you will not die.” So they did so.
21 Balobanaki bango na bango: — Solo, tozwi etumbu mpo na makambo oyo tosalaki ndeko na biso; pamba te tomonaki pasi na ye tango azalaki kobondela biso, kasi toyokaki ye te. Yango wana pasi oyo ekomeli biso.
They said to one another, “We are truly guilty concerning our brother in that we saw the distress of his soul when he pleaded with us and we would not listen. Therefore this distress has come upon us.”
22 Ribeni alobaki na bango: — Nayebisaki bino ete bosala mwana wana mabe te? Kasi boyokelaki ngai te. Sik’oyo tosengeli kofuta makila na ye!
Reuben answered them, “Did I not tell you, 'Do not sin against the boy,' but you would not listen? Now, see, his blood is required of us.”
23 Bayebaki te ete Jozefi akokaki kososola maloba na bango, mpo ete azalaki kosalela molimboli mpo na kosolola na bango.
They did not know that Joseph understood them, for there was an interpreter between them.
24 Jozefi apesaki mokongo, apusanaki mosika mpe abandaki kolela. Bongo azongelaki bango mpe asololaki lisusu na bango. Azwaki Simeoni kati na bango mpe akangaki ye na miso na bango.
He turned from them and wept. He returned to them and spoke to them. He took Simeon from among them and bound him before their eyes.
25 Jozefi apesaki mitindo ete batondisa ble na basaki na bango, bazongisa mbongo ya moto na moto na saki na ye mpe bapesa bango bilei mpo na nzela. Esalemelaki bango bongo.
Then Joseph commanded his servants to fill his brothers' bags with grain, and to put every man's money back into his sack, and to give them provisions for the journey. It was done for them.
26 Batiaki ble na bango likolo ya ba-ane na bango mpe bakendeki.
The brothers loaded their donkeys with their grain and departed from there.
27 Na esika oyo batelamaki mpo na kolekisa butu, moko na bango afungolaki saki na ye mpo na koleisa ane na ye mpe amonaki mbongo na ye na moto ya saki na ye.
As one of them opened his sack to give his donkey feed in the lodging place, he saw his money. Behold, it was in the opening of his sack.
28 Ayebisaki bandeko na ye: — Bazongiseli ngai mbongo na ngai, tala yango oyo na saki na ngai! Mitema na bango ebetaki mpe babandaki kolenga, balobanaki bango na bango: — Likambo nini oyo Nzambe asali biso!
He said to his brothers, “My money has been put back. Look at it; it is in my sack.” Their hearts sank and they turned trembling to one another, saying, “What is this that God has done to us?”
29 Tango bakomaki epai ya tata na bango Jakobi na mokili ya Kanana, bayebisaki ye makambo nyonso oyo ekomelaki bango. Balobaki:
They went to Jacob, their father in the land of Canaan and told him all that had happened to them. They said,
30 — Moto oyo azali mokonzi ya mokili alobelaki biso na maloba makasi. Azwaki biso lokola banongi.
“The man, the lord of the land, spoke roughly with us and thought that we were spies in the land.
31 Kasi tolobaki na ye: « Tozali bato ya sembo, tozali banongi te.
We said to him, 'We are honest men. We are not spies.
32 Tozalaki bandeko mibali zomi na mibale, bana ya tata moko. Moko azalaka lisusu te mpe oyo ya suka azali sik’oyo elongo na tata na biso, na mokili ya Kanana. »
We are twelve brothers, sons of our father. One is no longer alive, and the youngest is this day with our father in the land of Canaan.'
33 Na boye, moto oyo azali mokonzi ya mokili azongiselaki biso: « Tala lolenge nakoyeba ete bozali bato ya sembo: ‹ Botikela ngai awa ndeko moko kati na bino. Bozwa biloko ya kolia oyo esengeli mpo na mabota na bino oyo ezali na nzala makasi mpe bokende.
The man, the lord of the land, said to us, 'By this I will know that you are honest men. Leave one of your brothers with me, take grain for the famine in your houses, and go your way.
34 Boyela ngai leki na bino ya suka. Na bongo, nakoyeba ete bozali banongi te, kasi bato ya sembo; mpe ngai nakozongisela bino ndeko na bino, sima nakotika bino mpo ete bokoka kosala mombongo na mokili. › »
Bring your youngest brother to me. Then I will know that you are not spies, but that you are honest men. Then I will release your brother to you, and you will trade in the land.'”
35 Tango bafungolaki basaki na bango, moko na moko amonaki mbongo na ye na saki. Bango na tata na bango bamonaki mbongo mpe bango nyonso babangaki.
It came about as they emptied their sacks, that, behold, every man's bag of silver was in his sack. When they and their father saw their bags of silver, they were afraid.
36 Tata na bango Jakobi alobaki na bango: — Bozangisi ngai bana na ngai mibale ya mibali: Jozefi azali lisusu te, Simeoni mpe azali lisusu te. Mpe sik’oyo bolingi kozwa lisusu Benjame! Makambo oyo nyonso ezali kokweyela kaka ngai!
Jacob their father said to them, “You have bereaved me of my children. Joseph is no longer alive, Simeon is gone, and you will take Benjamin away. All these things are against me.”
37 Ribeni alobaki na tata na ye: — Pesa ngai Benjame, mpe nakomemela yo ye. Soki namemeli yo ye te, boma bana na ngai mibale ya mibali.
Reuben spoke to his father, saying, “You may kill my two sons if I do not bring Benjamin back to you. Put him in my hands, and I will bring him to you again.”
38 Jakobi azongisaki: — Te! Mwana na ngai akokende elongo na bino te. Ndeko na ye ya mobali akufa; natikala kaka na ye. Soki likama ekweyeli ye na mobembo oyo bozali kokende, wana bokoboma ngai na pasi, na kimobange na ngai! (Sheol h7585)
Jacob said, “My son will not go down with you. For his brother is dead and he alone is left. If harm comes to him on the road in which you go, then you will bring down my gray hair with sorrow to Sheol.” (Sheol h7585)

< Ebandeli 42 >