< Ebandeli 4 >

1 Adamu asangisaki nzoto na mwasi na ye Eva; mpe Eva akomaki na zemi, bongo abotaki Kayina. Alobaki: « Nasali moto na lisungi ya Yawe. »
And the man knew Eve his wife; and she conceived and bore Cain, and said: 'I have gotten a man with the help of the LORD.'
2 Sima na yango, abotaki lisusu Abele, ndeko ya Kayina. Abele akomaki kobokola bibwele mpe Kayina akomaki kosala bilanga.
And again she bore his brother Abel. And Abel was a keeper of sheep, but Cain was a tiller of the ground.
3 Sima na mwa tango, Kayina amemaki mbuma ya mabele mpo na kobonzela Yawe.
And in process of time it came to pass, that Cain brought of the fruit of the ground an offering unto the LORD.
4 Abele, ye mpe amemaki bibwele oyo ebotamaki liboso kati na etonga na ye mpe biteni oyo eleki mafuta. Yawe asepelaki na Abele mpe na makabo na ye,
And Abel, he also brought of the firstlings of his flock and of the fat thereof. And the LORD had respect unto Abel and to his offering;
5 kasi asepelaki te na Kayina mpe na makabo na ye. Bongo, Kayina asilikaki makasi mpe elongi na ye ekomaki mawa-mawa.
but unto Cain and to his offering He had not respect. And Cain was very wroth, and his countenance fell.
6 Yawe alobaki na Kayina: — Mpo na nini osiliki? Mpo na nini elongi na yo ekomi mawa-mawa?
And the LORD said unto Cain: 'Why art thou wroth? and why is thy countenance fallen?
7 Boni, soki osali malamu, bakondima yo te? Kasi soki osali malamu te, lisumu elali penza na ekuke na yo, mpe posa na yango ezali kobenda yo makasi; kasi yo, longa yango.
If thou doest well, shall it not be lifted up? and if thou doest not well, sin coucheth at the door; and unto thee is its desire, but thou mayest rule over it.'
8 Kayina alobaki na Abele, ndeko na ye. Wana bazalaki kati na bilanga, Kayina akangaki Abele, ndeko na ye, mpe abomaki ye.
And Cain spoke unto Abel his brother. And it came to pass, when they were in the field, that Cain rose up against Abel his brother, and slew him.
9 Yawe atunaki Kayina: — Wapi ndeko na yo Abele? Kayina azongisaki: — Nayebi te. Boni, ngai nazali mokengeli ya ndeko na ngai?
And the LORD said unto Cain: 'Where is Abel thy brother?' And he said: 'I know not; am I my brother's keeper?'
10 Nzambe alobaki: — Osali nini? Likambo nini penza osali? Makila ya ndeko na yo ezali koganga wuta na mabele kino epai na Ngai.
And He said: 'What hast thou done? the voice of thy brother's blood crieth unto Me from the ground.
11 Sik’oyo, olakelami mabe mpe obwakami mosika ya mabele oyo efungolaki monoko na yango mpo na komela makila ya ndeko na yo, oyo maboko na yo esopaki.
And now cursed art thou from the ground, which hath opened her mouth to receive thy brother's blood from thy hand.
12 Tango okobalola mabele, ekobotela yo mbuma te. Okozala koyengayenga mpe kotelengana na mokili.
When thou tillest the ground, it shall not henceforth yield unto thee her strength; a fugitive and a wanderer shalt thou be in the earth.'
13 Kayina alobaki na Yawe: — Etumbu na ngai eleki pasi mpo na komema!
And Cain said unto the LORD: 'My punishment is greater than I can bear.
14 Tala, obwaki ngai lelo mosika ya mabele; nasengeli sik’oyo kobombama liboso na Yo, nakokoma koyengayenga mpe kotelengana na mokili, mpe moto nyonso oyo akomona ngai akoboma ngai.
Behold, Thou hast driven me out this day from the face of the land; and from Thy face shall I be hid; and I shall be a fugitive and a wanderer in the earth; and it will come to pass, that whosoever findeth me will slay me.'
15 Kasi Yawe alobaki na ye: — Ezali bongo te! Soki moto abomi Kayina, bakozongisa mabe mpo na Kayina mbala sambo. Mpe Yawe atiaki elembo na nzoto ya Kayina na tina ete moto oyo akokutana na ye aboma ye te.
And the LORD said unto him: 'Therefore whosoever slayeth Cain, vengeance shall be taken on him sevenfold.' And the LORD set a sign for Cain, lest any finding him should smite him.
16 Kayina alongwaki liboso ya Yawe, akendeki kovanda na mokili ya Nodi, na este ya Edeni.
And Cain went out from the presence of the LORD, and dwelt in the land of Nod, on the east of Eden.
17 Kayina asangisaki nzoto na mwasi na ye; mpe mwasi na ye akomaki na zemi, bongo abotaki Enoki. Kayina atongaki engumba. Apesaki yango kombo « Enoki, » kombo ya mwana na ye ya mobali.
And Cain knew his wife; and she conceived, and bore Enoch; and he builded a city, and called the name of the city after the name of his son Enoch.
18 Enoki abotaki Iradi; Iradi abotaki Mewuyayeli; Mewuyayeli abotaki Metusaeli; Metusaeli abotaki Lemeki.
And unto Enoch was born Irad; and Irad begot Mehujael; and Mehujael begot Methushael; and Methushael begot Lamech.
19 Lemeki abalaki basi mibale: moko, kombo na ye ezalaki « Ada, » mpe mosusu, « Tsila. »
And Lamech took unto him two wives; the name of one was Adah, and the name of the other Zillah.
20 Ada abotaki Yabali, koko ya bavandi ya bandako ya kapo mpe ya babokoli bibwele.
And Adah bore Jabal; he was the father of such as dwell in tents and have cattle.
21 Ndeko na ye ya mobali, Yubali, azalaki koko ya bato oyo babetaka lindanda mpe flite.
And his brother's name was Jubal; he was the father of all such as handle the harp and pipe.
22 Tsila mpe abotaki mwana mobali, Tubali-Kayina, oyo azalaki kosala bisalelo nyonso ya bronze mpe ya bibende. Tubali-Kayina azalaki na ndeko mwasi, kombo na ye ezalaki « Naama. »
And Zillah, she also bore Tubal-cain, the forger of every cutting instrument of brass and iron; and the sister of Tubal-cain was Naamah.
23 Lemeki alobaki na basi na ye: « Ada mpe Tsila, boyoka ngai malamu; bino basi ya Lemeki, bolanda ngai malamu: Solo, likolo ya pota moko, ngai nabomaki moto; mpe likolo ya mwa pota, nabomaki elenge mobali!
And Lamech said unto his wives: Adah and Zillah, hear my voice; ye wives of Lamech, hearken unto my speech; for I have slain a man for wounding me, and a young man for bruising me;
24 Solo, bakozongisa mbala sambo mabe oyo basali Kayina; kasi mpo na Lemeki, ekozala mbala tuku sambo na sambo! »
If Cain shall be avenged sevenfold, truly Lamech seventy and sevenfold.
25 Adamu asangisaki lisusu nzoto na mwasi na ye, bongo mwasi na ye abotaki Seti, pamba te alobaki: « Nzambe apesi ngai mwana mosusu na esika ya Abele oyo Kayina abomaki. »
And Adam knew his wife again; and she bore a son, and called his name Seth: 'for God hath appointed me another seed instead of Abel; for Cain slew him.'
26 Seti mpe abotaki mwana mobali, apesaki ye kombo « Enoshi. » Ezalaki na tango wana nde bato bakomaki kobelela Kombo ya Yawe.
And to Seth, to him also there was born a son; and he called his name Enosh; then began men to call upon the name of the LORD.

< Ebandeli 4 >