< Ebandeli 37 >

1 Jakobi avandaki na mokili ya Kanana epai wapi tata na ye azalaki kovanda.
Et Jacob habita dans le pays où son père avait séjourné, dans le pays de Canaan.
2 Tala molongo ya libota ya Jakobi. Elenge mobali Jozefi azalaki na mibu zomi na sambo ya mbotama mpe azalaki kobatela bibwele. Azalaki kosala mosala yango elongo na bandeko na ye ya mibali, bana ya Bila mpe ya Zilipa, basi ya tata na ye. Jozefi azalaki koyebisa tata na bango makambo mabe ya bandeko na ye.
Ce sont ici les générations de Jacob: Joseph, âgé de 17 ans, paissait le menu bétail avec ses frères, et, [encore] jeune garçon, il était avec les fils de Bilha et les fils de Zilpa, femmes de son père; et Joseph rapporta à leur père leur mauvaise renommée.
3 Isalaele azalaki kolinga Jozefi mingi koleka bana na ye nyonso, pamba te abotaki ye na kimobange. Asalelaki ye elamba ya kitoko mpe ya talo.
Et Israël aimait Joseph plus que tous ses fils, parce qu’il était pour lui le fils de sa vieillesse, et il lui fit une tunique bigarrée.
4 Tango bandeko na ye ya mibali bamonaki ete tata na bango azali kolinga ye koleka bango nyonso, bayinaki ye mpe bakokaki lisusu te koloba na ye na motema malamu.
Et ses frères virent que leur père l’aimait plus que tous ses frères; et ils le haïssaient, et ne pouvaient lui parler paisiblement.
5 Jozefi alotaki ndoto mpe tango ayebisaki yango epai ya bandeko na ye ya mibali, bayinaki ye lisusu makasi.
Et Joseph songea un songe, et le raconta à ses frères, et ils le haïrent encore davantage.
6 Alobaki na bango: — Boyoka ndoto oyo nalotaki:
Et il leur dit: Écoutez, je vous prie, ce songe que j’ai songé:
7 « Tozalaki kokanga maboke ya ble kati na bilanga. Mbala moko, liboke na ngai elamuki mpe etelemi ngwi; bongo maboke na bino, oyo ezalaki zingazinga ya liboke na ngai, egumbamaki liboso ya liboke na ngai. »
Voici, nous étions à lier des gerbes au milieu des champs; et voici, ma gerbe se leva, et elle se tint debout; et voici, vos gerbes l’entourèrent, et se prosternèrent devant ma gerbe.
8 Bandeko na ye ya mibali balobaki na ye: — Okanisi ete okokoma mokonzi na biso mpe okokonza biso? Bongo bayinaki ye lisusu koleka likolo ya ndoto na ye mpe likolo ya makambo oyo alobaki.
Et ses frères lui dirent: Est-ce que tu dois donc régner sur nous? Domineras-tu sur nous? Et ils le haïrent encore davantage, à cause de ses songes et de ses paroles.
9 Alotaki lisusu ndoto mosusu mpe ayebisaki yango epai ya bandeko na ye ya mibali. Alobaki: — Boyoka, naloti lisusu ndoto mosusu: « Namonaki moyi, sanza mpe minzoto zomi na moko kogumbama liboso na ngai. »
Et il songea encore un autre songe, et le raconta à ses frères. Et il dit: Voici, j’ai encore songé un songe; et voici, le soleil, et la lune, et onze étoiles, se prosternaient devant moi.
10 Tango ayebisaki tata na ye ndenge ayebisaki bandeko na ye ya mibali, tata na ye agangelaki ye mpe alobaki: — Ndoto nini wana yo osili kolota? Okanisi ete ngai, mama na yo mpe bandeko na yo ya mibali, tokoya mpe tokogumbama na mabele liboso na yo?
Et il le conta à son père et à ses frères. Et son père le reprit, et lui dit: Qu’est-ce que ce songe que tu as songé? Est-ce que moi, et ta mère, et tes frères, nous viendrons nous prosterner en terre devant toi?
11 Bandeko na ye ya mibali bakomaki na motema likunya epai na ye, kasi tata na ye abombaki kaka likambo yango na motema.
Et ses frères furent jaloux de lui; mais son père gardait cette parole.
12 Bandeko mibali ya Jozefi bakendeki koleisa bibwele ya tata na bango pembeni ya Sishemi.
Et ses frères allèrent paître le menu bétail de leur père à Sichem.
13 Isalaele alobaki na Jozefi: — Oyebi ete bandeko na yo bazali koleisa bibwele pembeni ya Sishemi; yaka, pamba te nalingi kotinda yo epai na bango. Jozefi azongisaki: — Malamu!
Et Israël dit à Joseph: Tes frères ne paissent-ils pas [le troupeau] à Sichem? Viens, et je t’enverrai vers eux. Et il lui dit: Me voici.
14 Tata na ye alobaki na ye: — Kende mpe tala soki makambo nyonso ezali kotambola malamu mpo na bandeko na yo mpe mpo na bibwele, bongo omemela ngai sango. Boye, atindaki ye wuta na lubwaku ya Ebron. Wana Jozefi akomaki na Sishemi,
Et il lui dit: Va, je te prie; vois si tes frères se portent bien, et si le bétail est en bon état, et rapporte-m’en des nouvelles. Et il l’envoya de la vallée de Hébron; et il vint à Sichem.
15 moto moko amonaki ye tango azalaki koyengayenga na bilanga. Atunaki ye: — Ozali koluka nini?
Et un homme le trouva, et voici, il errait dans les champs. Et l’homme lui demanda, disant: Que cherches-tu?
16 Jozefi azongisaki: — Nazali koluka bandeko na ngai. Okoki koyebisa ngai esika nini bazali koleisa bibwele na bango?
Et il dit: Je cherche mes frères; indique-moi, je te prie, où ils paissent [le troupeau].
17 Moto yango azongisaki: — Balongwaki awa mpe nayokaki bango koloba: « Tokende na Dotani. » Boye Jozefi alandaki bandeko na ye mpe amonaki bango pembeni ya Dotani.
Et l’homme dit: Ils sont partis d’ici, car j’ai entendu qu’ils disaient: Allons à Dothan. Et Joseph alla après ses frères, et il les trouva en Dothan.
18 Tango bango bamonaki ye na mosika liboso ete akoma pene na bango, bayokanaki mpo ete baboma ye.
Et ils le virent de loin; et avant qu’il soit proche d’eux, ils complotèrent contre lui pour le faire mourir.
19 Balobanaki bango na bango: — Tala moloti bandoto azali koya.
Et ils se dirent l’un à l’autre: Le voici, il vient, ce maître songeur!
20 Sik’oyo, boya mpo ete toboma ye mpe tobwaka ye na moko kati na mabulu oyo. Tokoloba ete nyama mabe eliaki ye. Bongo tokotala oyo ekoya sima na bandoto na ye.
Et maintenant, venez, tuons-le, et jetons-le dans une des citernes, et nous dirons: Une mauvaise bête l’a dévoré; et nous verrons ce que deviendront ses songes.
21 Tango Ribeni ayokaki bongo, alukaki nzela ya kokangola ye na maboko na bango. Alobaki: — Toboma ye te!
Et Ruben entendit [cela], et le délivra de leurs mains; et il dit: Ne le frappons pas à mort.
22 Bosopa makila na ye te! Bobwaka ye kaka na libulu oyo ezali kati na esobe, kasi bosala ye mabe te. Ribeni alobaki bongo pamba te azalaki na makanisi ya kokangola ye na maboko na bango mpe kozongisa ye na maboko ya tata na ye.
Et Ruben leur dit: Ne versez pas le sang. Jetez-le dans cette citerne qui est dans le désert, et ne mettez pas la main sur lui. [C’était] afin de le délivrer de leurs mains, pour le faire retourner vers son père.
23 Tango kaka Jozefi akomaki epai ya bandeko na ye ya mibali, balongolaki ye elamba na ye ya kitoko mpe ya talo oyo alataki.
Et il arriva, lorsque Joseph fut venu auprès de ses frères, qu’ils dépouillèrent Joseph de sa tunique, de la tunique bigarrée qui était sur lui;
24 Bakangaki ye mpe babwakaki ye na libulu. Libulu yango ezalaki na eloko te, ezalaki mpe na mayi te na kati.
et ils le prirent et le jetèrent dans la citerne; or la citerne était vide: il n’y avait point d’eau dedans.
25 Wana bavandaki mpo na kolia, batombolaki miso mpe bamonaki bato ya libota ya Isimaeli elongo na bashamo na bango koya wuta na Galadi. Bashamo na bango ezalaki komema na Ejipito: biloko ya mike-mike ya solo kitoko oyo balambelaka, mafuta ya solo kitoko mpe mire.
Et ils s’assirent pour manger le pain; et ils levèrent les yeux et regardèrent, et voici, une caravane d’Ismaélites venait de Galaad; et leurs chameaux portaient des épices, du baume, et de la myrrhe, qu’ils allaient porter en Égypte.
26 Boye Yuda alobaki na bandeko na ye ya mibali: « Litomba nini tokozwa soki tobomi ndeko na biso mpe tozipi makila na ye?
Et Juda dit à ses frères: Quel profit aurons-nous à tuer notre frère et à cacher son sang?
27 Malamu toteka ye epai ya bato ya ekolo ya Isimaeli, kasi toboma ye te; pamba te azali kaka ndeko na biso mpe tozali na ye makila moko. » Boye bandeko na ye bandimaki.
Venez, vendons-le aux Ismaélites; et que notre main ne soit pas sur lui; car il est notre frère, notre chair. Et ses frères l’écoutèrent.
28 Nzokande tango bato ya mombongo ya mokili ya Madiani balekaki wana, babimisaki Jozefi wuta na libulu mpe batekaki ye epai ya bato ya ekolo ya Isimaeli, na motuya ya mbongo ya bibende, tuku mibale; mpe bango bamemaki ye na Ejipito.
Et les hommes madianites, des marchands, passèrent. Et ils tirèrent Joseph de la citerne et le firent remonter; et ils vendirent Joseph pour 20 pièces d’argent aux Ismaélites; et ceux-ci emmenèrent Joseph en Égypte.
29 Tango Ribeni azongaki na libulu mpe amonaki ete Jozefi azali lisusu kuna te, apasolaki bilamba na ye,
Et Ruben retourna à la citerne; et voici, Joseph n’était pas dans la citerne; et il déchira ses vêtements,
30 azongaki epai ya bandeko na ye mpe alobaki: « Elenge mobali azali lisusu kuna te! Sik’oyo ngai, nakosuka wapi? »
et retourna vers ses frères, et dit: L’enfant n’y est pas, et moi, où irai-je?
31 Boye babomaki ntaba, bazwaki elamba ya Jozefi mpe bazindisaki yango na makila ya ntaba.
Et ils prirent la tunique de Joseph, et tuèrent un bouc, et plongèrent la tunique dans le sang;
32 Sima, bazongisaki elamba yango ya kitoko mpe ya talo epai ya tata na bango. Balobaki: — Tala eloko oyo tomoni; tala yango malamu soki ezali penza elamba ya mwana na yo to te!
et ils envoyèrent la tunique bigarrée, et la firent parvenir à leur père, et dirent: Nous avons trouvé ceci; reconnais si c’est la tunique de ton fils, ou non.
33 Jakobi asosolaki ete ezali elamba ya Jozefi mpe agangaki: — Ezali elamba ya mwana na ngai! Nyama moko ya mabe elie ye! Solo, bakati-kati Jozefi na biteni!
Et il la reconnut, et dit: C’est la tunique de mon fils; une mauvaise bête l’a dévoré: Joseph a certainement été déchiré!
34 Jakobi apasolaki bilamba na ye, alataki saki mpe asalaki matanga mpo na mwana na ye mikolo ebele.
Et Jacob déchira ses vêtements, et mit un sac sur ses reins, et mena deuil sur son fils plusieurs jours.
35 Bana na ye nyonso ya mibali mpe ya basi bayaki kobondisa ye; kasi aboyaki kobondisama. Alobaki: « Te; nakozala na matanga kino nakolanda mwana na ngai na mboka ya bakufi epai wapi mwana na ngai azali. » Boye, tata na ye alelaki ye. (Sheol h7585)
Et tous ses fils se levèrent, et toutes ses filles, pour le consoler; mais il refusa de se consoler, et dit: Certainement je descendrai, menant deuil, vers mon fils, au shéol. Et son père le pleura. (Sheol h7585)
36 Bato ya mokili ya Madiani batekaki Jozefi na Ejipito epai ya Potifari, kalaka ya lokumu ya Faraon mpe mokonzi ya bakengeli ya mokonzi.
Et les Madianites le vendirent en Égypte à Potiphar, officier du Pharaon, chef des gardes.

< Ebandeli 37 >