< Ebandeli 34 >

1 Nzokande, Dina, mwana mwasi oyo Lea abotelaki Jakobi, abimaki mpo na kokende kotala basi ya mokili wana.
ותצא דינה בת לאה אשר ילדה ליעקב לראות בבנות הארץ
2 Tango Sishemi, mokambi ya mokili wana mpe mwana mobali ya Amori, moto ya Evi, amonaki ye, akangaki ye mpe asangisaki na ye nzoto na makasi.
וירא אתה שכם בן חמור החוי--נשיא הארץ ויקח אתה וישכב אתה ויענה
3 Motema na ye emipesaki mobimba epai ya Dina, mwana mwasi ya Jakobi, alingaki ye mpe akomaki koloba na ye maloba ya bolingo.
ותדבק נפשו בדינה בת יעקב ויאהב את הנער וידבר על לב הנער
4 Sishemi alobaki na Amori, tata na ye: « Balela ngai elenge mwasi oyo. »
ויאמר שכם אל חמור אביו לאמר קח לי את הילדה הזאת לאשה
5 Tango Jakobi ayokaki ete lokumu ya Dina, mwana na ye ya mwasi, ebebisami, abatelaki kimia kino bana na ye ya mibali bazongaki na ndako, pamba te bazalaki na esobe elongo na bibwele.
ויעקב שמע כי טמא את דינה בתו ובניו היו את מקנהו בשדה והחרש יעקב עד באם
6 Boye, Amori, tata na Sishemi, akendeki kosolola na Jakobi.
ויצא חמור אבי שכם אל יעקב לדבר אתו
7 Tango bana mibali ya Jakobi bazongaki wuta na esobe, bayokaki sango ya makambo oyo esalemaki. Bongo, bayokaki pasi mingi na mitema mpe basilikaki makasi, pamba te Sishemi asalaki likambo ya soni na Isalaele, wana asangisaki nzoto na makasi na mwana mwasi ya Jakobi. Likambo ya bongo esengelaki kosalema te.
ובני יעקב באו מן השדה כשמעם ויתעצבו האנשים ויחר להם מאד כי נבלה עשה בישראל לשכב את בת יעקב וכן לא יעשה
8 Kasi Amori alobaki na bango: « Motema ya Sishemi, mwana na ngai ya mobali ezali kopela na bolingo mpo na mwana na bino ya mwasi. Nabondeli bino, bopesa ye na libala mpo na Sishemi.
וידבר חמור אתם לאמר שכם בני חשקה נפשו בבתכם--תנו נא אתה לו לאשה
9 Na bongo, bokoki kosala elongo na biso boyokani na nzela ya libala: bokobalisa biso bana na bino ya basi mpe biso tokobalisa bino bana na biso ya basi,
והתחתנו אתנו בנתיכם תתנו לנו ואת בנתינו תקחו לכם
10 bokovanda elongo na biso. Mboka ezali liboso na bino, bovanda, bosala mombongo mpe bokoma bankolo mabele. »
ואתנו תשבו והארץ תהיה לפניכם--שבו וסחרוה והאחזו בה
11 Boye, Sishemi alobaki na tata mpe na bandeko mibali ya Dina: — Tika ete nazwa ngolu na miso na bino mpe nakopesa bino nyonso oyo bokosenga ngai.
ויאמר שכם אל אביה ואל אחיה אמצא חן בעיניכם ואשר תאמרו אלי אתן
12 Bokatela ngai motuya makasi ya mbongo ya libala mpe biloko ebele ya libala; nakofuta bino eloko nyonso oyo bokosenga ngai. Kasi bopesa ngai kaka elenge mwasi oyo na libala.
הרבו עלי מאד מהר ומתן ואתנה כאשר תאמרו אלי ותנו לי את הנער לאשה
13 Lokola lokumu ya Dina, ndeko mwasi na bango, ebebaki, bana mibali ya Jakobi basalelaki mayele mabe mpo na kopesa eyano epai ya Sishemi mpe tata na ye Amori.
ויענו בני יעקב את שכם ואת חמור אביו במרמה--וידברו אשר טמא את דינה אחתם
14 Balobaki na bango: — Tokoki kosala likambo ya boye te, tokoki te kopesa na libala ndeko na biso ya mwasi epai ya mobali oyo akatama ngenga te, pamba te ezali likambo ya soni mpo na biso.
ויאמרו אליהם לא נוכל לעשות הדבר הזה--לתת את אחתנו לאיש אשר לו ערלה כי חרפה הוא לנו
15 Tokoki kondima yango kaka soki bokomi lokola biso, soki bana na bino nyonso ya mibali bakatisi ngenga.
אך בזאת נאות לכם אם תהיו כמנו להמל לכם כל זכר
16 Boye biso tokopesa na libala bana na biso ya basi mpe tokozwa bana na bino ya basi na libala. Tokovanda elongo na bino mpe tokokoma libota moko.
ונתנו את בנתינו לכם ואת בנתיכם נקח לנו וישבנו אתכם והיינו לעם אחד
17 Kasi soki boboyi kokatisa ngenga ndenge biso tolobi, tokozwa ndeko na biso ya mwasi mpe tokokende na biso.
ואם לא תשמעו אלינו להמול--ולקחנו את בתנו והלכנו
18 Likanisi na bango emonanaki malamu epai ya Amori mpe Sishemi, mwana na ye ya mobali.
וייטבו דבריהם בעיני חמור ובעיני שכם בן חמור
19 Lokola elenge mobali, oyo azalaki na lokumu koleka bato nyonso ya ndako ya tata na ye, alingaki mwana mwasi ya Jakobi, akokisaki na lombangu likambo oyo bayebisaki ye.
ולא אחר הנער לעשות הדבר כי חפץ בבת יעקב והוא נכבד מכל בית אביו
20 Boye, Amori mpe Sishemi, mwana na ye ya mobali, bakendeki na ekuke ya engumba na bango mpo na koloba na bana mboka na bango:
ויבא חמור ושכם בנו אל שער עירם וידברו אל אנשי עירם לאמר
21 « Bato oyo bazali na boboto epai na biso; tika ete bavanda elongo na biso mpe basala mombongo, mpo ete mboka ezali na yango monene! Tokoki na biso kobala bana na bango ya basi, mpe bango bakoki na bango kobala bana na biso ya basi.
האנשים האלה שלמים הם אתנו וישבו בארץ ויסחרו אתה והארץ הנה רחבת ידים לפניהם את בנתם נקח לנו לנשים ואת בנתינו נתן להם
22 Kasi mibali bakondima kovanda elongo na biso lokola bandeko ya libota moko soki kaka mibali nyonso kati na biso bakatisi ngenga lokola bango.
אך בזאת יאתו לנו האנשים לשבת אתנו--להיות לעם אחד בהמול לנו כל זכר כאשר הם נמלים
23 Bibwele na bango, bomengo na bango, banyama na bango nyonso; boni ekokoma ya biso te soki kaka tondimi ete bavanda elongo na biso? »
מקנהם וקנינם וכל בהמתם הלוא לנו הם אך נאותה להם וישבו אתנו
24 Boye, bato nyonso oyo bazalaki kobima na ekuke ya engumba bandimaki Amori mpe mwana na ye ya mobali, Sishemi; mpe mibali nyonso bakatisaki ngenga.
וישמעו אל חמור ואל שכם בנו כל יצאי שער עירו וימלו כל זכר--כל יצאי שער עירו
25 Sima na mikolo misato, wana mibali nyonso kati na bango bazalaki nanu na pasi ya bapota, bana mibali mibale ya Jakobi, bandeko mibali ya Dina, Simeoni mpe Levi, bakamataki mipanga na bango, bakotaki na pwasa kati na engumba mpe babomaki mibali nyonso.
ויהי ביום השלישי בהיותם כאבים ויקחו שני בני יעקב שמעון ולוי אחי דינה איש חרבו ויבאו על העיר בטח ויהרגו כל זכר
26 Babomaki na mopanga Amori mpe mwana na ye ya mobali Sishemi. Bakamataki Dina wuta na ndako ya Sishemi mpe bazongaki na ye.
ואת חמור ואת שכם בנו הרגו לפי חרב ויקחו את דינה מבית שכם ויצאו
27 Bana mibali mosusu ya Jakobi bayaki kosasa mibali oyo bazalaki na bapota mpe kobebisa engumba mpo ete babebisaki lokumu ya ndeko na bango ya mwasi.
בני יעקב באו על החללים ויבזו העיר--אשר טמאו אחותם
28 Babotolaki bangombe na bango, bameme mpe bantaba na bango, ba-ane na bango, biloko nyonso oyo ezalaki kati na engumba mpe na bilanga.
את צאנם ואת בקרם ואת חמריהם ואת אשר בעיר ואת אשר בשדה לקחו
29 Bakamataki bomengo na bango nyonso: bana, basi mpe biloko nyonso oyo ezalaki kati na bandako na bango.
ואת כל חילם ואת כל טפם ואת נשיהם שבו ויבזו ואת כל אשר בבית
30 Boye, Jakobi alobaki na Simeoni mpe na Levi: — Bopesi ngai pasi mpe bobimisi ngai moto mabe na miso ya bato ya Kanana mpe ya Perizi oyo bazali kovanda na mboka oyo. Biso tozali kaka moke; mpe soki basangisi makasi na bango mpo na kobundisa ngai, bakoboma ngai elongo na ndako na ngai mobimba.
ויאמר יעקב אל שמעון ואל לוי עכרתם אתי להבאישני בישב הארץ בכנעני ובפרזי ואני מתי מספר ונאספו עלי והכוני ונשמדתי אני וביתי
31 Bango bazongisaki: — Boni, esengelaki bazwa ndeko na biso lokola mwasi ya ndumba?
ויאמרו הכזונה יעשה את אחותנו

< Ebandeli 34 >