< Ebandeli 33 >

1 Tango Jakobi atombolaki miso na ye, amonaki na mosika Ezawu koya elongo na bato nkama minei. Boye Jakobi akabolaki bana na ye: ndambo epai ya Lea, ndambo epai ya Rasheli mpe ndambo mosusu epai ya basali mibale ya basi.
Jacob leva les yeux et regarda. Et voici, Ésaü arrivait, et avec lui quatre cents hommes. Il partagea les enfants entre Léa, Rachel et les deux serviteurs.
2 Atiaki basali ya basi elongo na bana na bango na liboso; Lea mpe bana na ye na sima; mpe Rasheli na Jozefi na suka.
Il plaça les serviteurs et leurs enfants en avant, Léa et ses enfants après, et Rachel et Joseph en arrière.
3 Ye moko alekaki liboso na bango mpe afukamaki na mabele mbala sambo wana azalaki kopusana liboso ya ndeko na ye ya mobali.
Lui-même passa devant eux, et se prosterna sept fois à terre, jusqu'à ce qu'il s'approche de son frère.
4 Ezawu akimaki mbangu mpo na kokutana na ye; ayambaki ye, amibwakaki na nzoto na ye mpo na koyamba ye mpe apesaki ye beze; bongo bakomaki kolela.
Ésaü courut à sa rencontre, l'embrassa, se jeta à son cou, le baisa, et ils pleurèrent.
5 Tango atombolaki miso na ye, amonaki na mosika basi mpe bana. Atunaki: — Banani wana bazali elongo na yo? Jakobi azongisaki: — Ezali bana oyo Nzambe apesi, na bolingo na Ye, epai ya mosali na yo.
Il leva les yeux, et vit les femmes et les enfants; il dit: « Qui sont ceux-ci avec toi? » Il dit: « Les enfants que Dieu a gracieusement donnés à votre serviteur. »
6 Boye, basali ya basi elongo na bana na bango bapusanaki mpe bafukamaki.
Alors les serviteurs s'approchèrent avec leurs enfants, et ils se prosternèrent.
7 Na sima, Lea elongo na bana na ye bayaki kofukama. Bongo na suka, Jozefi elongo na Rasheli bayaki mpe kofukama.
Léa et ses enfants s'approchèrent aussi, et se prosternèrent. Après eux, Joseph s'approcha avec Rachel, et ils se prosternèrent.
8 Ezawu atunaki: — Ngulupa nyonso oyo nakutani na yango, tina na yango nini? Jakobi azongisaki: — Ezali mpo ete nazwa ngolu na miso na yo, nkolo na ngai.
Ésaü dit: « Que veux-tu dire par toute cette compagnie que j'ai rencontrée? » Jacob a dit: « Pour trouver grâce aux yeux de mon seigneur. »
9 Kasi Ezawu azongisaki: — Ndeko na ngai, biloko nyonso oyo, nazali na yango ebele; bomba biloko na yo mpo na yo moko.
Ésaü dit: « J'ai assez, mon frère; que ce que tu as soit à toi. »
10 Jakobi alobaki: — Nabondeli yo: soki nazwi ngolu na miso na yo, ndima kozwa biloko oyo lokola kado kowuta na maboko na ngai; pamba te ndenge namoni yo, ezali lokola namoni Nzambe, mpo ete oyambi ngai na boboto.
Jacob dit: « Je t'en prie, non, si j'ai maintenant trouvé grâce à tes yeux, alors reçois mon présent de ma main, car j'ai vu ton visage, comme on voit le visage de Dieu, et tu as été satisfait de moi.
11 Nabondeli yo penza, ndima makabo oyo namemeli yo; pamba te Nzambe nde apesaki ngai yango na ngolu na Ye mpe nazali na nyonso. Lokola Jakobi azalaki kaka kotia molende, Ezawu andimaki kozwa yango.
Je te prie de prendre le présent que je t'ai apporté, parce que Dieu m'a fait grâce, et parce que j'en ai assez. » Il le pressa, et il le prit.
12 Ezawu alobaki: — Telema tokende, nakotambola na yo nzela moko.
Ésaü dit: « Prenons notre route, partons, et je te précéderai. »
13 Kasi Jakobi azongiselaki ye: — Oh nkolo na ngai! Oyebi malamu ete bana bazwi nanu makasi te, mpe nazali lisusu na bameme, bangombe mpe bantaba ya basi oyo ezali nanu komelisa mabele. Soki tomeki kotambolisa yango mbangu makasi kaka na mokolo moko, bibwele nyonso ekokufa.
Jacob lui dit: « Mon seigneur sait que les enfants sont tendres, et que les troupeaux qui sont avec moi ont leurs petits, et que s'ils les surmènent un jour, tous les troupeaux mourront.
14 Boye, tika ete nkolo na ngai akende liboso, wana ngai nakotambola malembe-malembe na sima, kolanda etamboli ya bibwele oyo ezali liboso na ngai, mpe kolanda etamboli ya bana, kino nakokoma epai ya nkolo na ngai, na Seiri.
Je vous prie de laisser mon seigneur passer devant son serviteur, et je continuerai doucement, au rythme du bétail qui est devant moi et au rythme des enfants, jusqu'à ce que j'arrive auprès de mon seigneur en Séir. »
15 Ezawu alobaki: — Nabondeli yo, ndima ete natikela yo ndambo ya bato na ngai. Kasi Jakobi atunaki: — Mpo na nini kosala bongo? Tika ete nazwa kaka ngolu na miso ya nkolo na ngai!
Ésaü dit: « Laisse-moi maintenant laisser avec toi quelques-uns des gens qui sont avec moi. » Il a dit: « Pourquoi? Que je trouve grâce aux yeux de mon seigneur. »
16 Boye, kaka na mokolo wana, Ezawu azwaki nzela mpe azongaki na Seiri.
Ce jour-là, Ésaü s'en retourna en direction de Séir.
17 Nzokande, Jakobi akendeki na Sukoti. Atongaki kuna ndako mpo na ye moko mpe mpo na bibwele na ye; yango wana babengi esika yango Sukoti.
Jacob se rendit à Succoth, se construisit une maison et fit des abris pour son bétail. C'est pourquoi le nom de ce lieu est appelé Succoth.
18 Longwa na mokili ya Padani-Arami, Jakobi akomaki na kimia na engumba Sishemi oyo ezali na mokili ya Kanana; mpe atelemisaki ndako na ye ya kapo liboso ya engumba.
Jacob arriva en paix à la ville de Sichem, qui est dans le pays de Canaan, lorsqu'il vint de Paddan Aram, et il campa devant la ville.
19 Na motuya ya bibende ya palata nkama moko, asombaki na maboko ya bana mibali ya Amori, tata ya Sishemi, eteni ya mabele epai wapi atongaki ndako na ye ya kapo.
Il acheta la parcelle de terrain où il avait étendu sa tente, de la main des fils de Hamor, père de Sichem, pour cent pièces d'argent.
20 Atongaki kuna etumbelo moko oyo abengaki: « El, Nzambe ya Isalaele. »
Il y dressa un autel, et l'appela El Elohe Israël.

< Ebandeli 33 >