< Ebandeli 31 >

1 Jakobi ayokaki bana mibali ya Labani koloba: « Jakobi azwi biloko nyonso ya tata na biso mpe ezali na nzela ya biloko yango nde akomi na bozwi oyo nyonso. »
Y OÍA él las palabras de los hijos de Labán, que decían: Jacob ha tomado todo lo que era de nuestro padre; y de lo que era de nuestro padre ha adquirido toda esta grandeza.
2 Jakobi amonaki lisusu ete ezaleli ya Labani epai na ye etikalaki lisusu te ndenge ezalaki liboso.
Miraba también Jacob el semblante de Labán, y veía que no era para con él como ayer y antes de ayer.
3 Yawe ayebisaki Jakobi: « Zonga na mboka ya batata na yo, epai ya bandeko na yo, mpe nakozala na yo elongo. »
También Jehová dijo á Jacob: Vuélvete á la tierra de tus padres, y á tu parentela; que yo seré contigo.
4 Boye Jakobi abengisaki Rasheli mpe Lea na bilanga epai wapi azalaki elongo na bibwele.
Y envió Jacob, y llamó á Rachêl y á Lea al campo á sus ovejas,
5 Alobaki na bango: — Namoni ete ezaleli ya tata na bino epai na ngai etikali lisusu te ndenge ezalaki liboso; kasi Nzambe ya tata na ngai azalaki elongo na ngai.
Y díjoles: Veo que el semblante de vuestro padre no es para conmigo como ayer y antes de ayer: mas el Dios de mi padre ha sido conmigo.
6 Boyebi bino moko ete nasalelaki tata na bino na makasi na ngai nyonso.
Y vosotras sabéis que con todas mis fuerzas he servido á vuestro padre:
7 Kasi ye asakanaki na ngai na kobongola lifuti na ngai mbala zomi. Atako bongo, Nzambe apesaki ye nzela te ya kosala ngai mabe.
Y vuestro padre me ha engañado, y me ha mudado el salario diez veces: pero Dios no le ha permitido que me hiciese mal.
8 Tango azalaki koloba: « Bibwele ya nzela-nzela ekozala lifuti na yo, » bibwele nyonso ezalaki kobota bana ya nzela-nzela. Mpe tango azalaki koloba: « Bibwele ya madodo-madodo nde lifuti na yo, » bibwele nyonso ezalaki kobota bana ya madodo-madodo.
Si él decía así: Los pintados serán tu salario; entonces todas las ovejas parían pintados: y si decía así: Los listados serán tu salario; entonces todas las ovejas parían listados.
9 Ezalaki bongo nde Nzambe azalaki kobotola bibwele ya tata na bino mpe kopesa ngai yango.
Así quitó Dios el ganado de vuestro padre, y diómelo á mí.
10 Bongo, na tango oyo bibwele esengelaki kosangisa nzoto, namonaki na ndoto ete bantaba ya mibali, oyo ezalaki kosangisa nzoto na bantaba ya basi, ezalaki ya madodo-madodo, ya banzela-nzela ya mwindo mpe ya banzela-nzela ya pembe.
Y sucedió que al tiempo que las ovejas se recalentaban, alcé yo mis ojos y vi en sueños, y he aquí los machos que cubrían á las hembras [eran] listados, pintados y abigarrados.
11 Anjelu na Nzambe alobaki na ngai kati na ndoto: « Jakobi! » Mpe ngai nazongisaki: « Ngai oyo, nazali awa. »
Y díjome el ángel de Dios en sueños: Jacob. Y yo dije: Heme aquí.
12 Alobaki na ngai: « Tombola miso mpe tala: bantaba nyonso ya mibali, oyo ezali kosangisa nzoto na bantaba ya basi, ezali na madodo-madodo, na banzela-nzela ya mwindo mpe na banzela-nzela ya pembe; pamba te namoni makambo nyonso oyo Labani asali yo.
Y él dijo: Alza ahora tus ojos, y verás todos los machos que cubren á las ovejas listados, pintados y abigarrados; porque yo he visto todo lo que Labán te ha hecho.
13 Nazali Nzambe ya Beteli epai wapi osopaki mafuta na likolo ya libanga oyo otelemisaki lokola elembo mpe olapaki ndayi liboso na Ngai. Sik’oyo, telema, wuta na mokili oyo, mpe zonga na mokili na yo epai wapi obotama. »
Yo soy el Dios de Beth-el, donde tú ungiste el título, y donde me hiciste un voto. Levántate ahora, y sal de esta tierra, y vuélvete á la tierra de tu naturaleza.
14 Rasheli mpe Lea bazongisaki: — Boni, tozali lisusu na eloko to na libula kati na ndako ya tata na biso?
Y respondió Rachêl y Lea, y dijéronle: ¿Tenemos ya parte ni heredad en la casa de nuestro padre?
15 Azalaki komona biso lokola bapaya, pamba te atekaki biso mpe aliaki mbongo na mito na biso.
¿No nos tiene ya como por extrañas, pues que nos vendió, y aun se ha comido del todo nuestro precio?
16 Yango wana, bozwi nyonso oyo Nzambe abotolaki tata na biso ekomi ya biso na bana na biso. Sik’oyo, sala makambo nyonso oyo Nzambe ayebisaki yo.
Porque toda la riqueza que Dios ha quitado á nuestro padre, nuestra es y de nuestros hijos: ahora pues, haz todo lo que Dios te ha dicho.
17 Boye Jakobi amatisaki bana na ye mpe basi na ye likolo ya bashamo.
Entonces se levantó Jacob, y subió sus hijos y sus mujeres sobre los camellos.
18 Amemaki bibwele na ye nyonso mpe biloko nyonso oyo azwaki, bibwele oyo azwaki tango avandaki na Padani-Arami, mpo na kozonga epai ya Izaki, tata na ye, na mokili ya Kanana.
Y puso en camino todo su ganado, y toda su hacienda que había adquirido, el ganado de su ganancia que había obtenido en Padan-aram, para volverse á Isaac su padre en la tierra de Canaán.
19 Nzokande tango Labani akendeki kolongola bapwale ya bameme na ye, Rasheli ayibaki banzambe ya bikeko ya tata na ye.
Y Labán había ido á trasquilar sus ovejas: y Rachêl hurtó los ídolos de su padre.
20 Boye Jakobi akosaki Labani, moto ya Arami, pamba te atikalaki koyebisa ye te ete akokende.
Y recató Jacob el corazón de Labán Arameo, en no hacerle saber que se huía.
21 Akimaki elongo na nyonso oyo ezalaki ya ye, akatisaki ebale mpe akendeki na mokili ya bangomba ya Galadi.
Huyó, pues, con todo lo que tenía; y levantóse, y pasó el río, y puso su rostro al monte de Galaad.
22 Sima na mikolo misato, bayebisaki Labani ete Jakobi asili kokima.
Y fué dicho á Labán al tercero día como Jacob se había huído.
23 Boye Labani azwaki elongo na ye bandeko na ye ya mibali, alandaki Jakobi mikolo sambo mpe akangaki ye na mokili ya bangomba ya Galadi.
Entonces tomó á sus hermanos consigo, y fué tras él camino de siete días, y alcanzóle en el monte de Galaad.
24 Na butu, Nzambe ayaki epai ya Labani, moto ya Arami, kati na ndoto; alobaki na ye: « Keba! Komeka koloba ata likambo moko te ya malamu to ya mabe epai ya Jakobi. »
Y vino Dios á Labán Arameo en sueños aquella noche, y le dijo: Guárdate que no hables á Jacob descomedidamente.
25 Labani akangaki Jakobi, sima na Jakobi kotonga ndako na ye ya kapo kati na mokili ya bangomba ya Galadi. Boye Labani elongo na bandeko na ye ya mibali bavandaki mpe wana.
Alcanzó pues Labán á Jacob, y éste había fijado su tienda en el monte: y Labán plantó[la] con sus hermanos en el monte de Galaad.
26 Labani alobaki na Jakobi: — Makambo nini osali ngai? Okosi ngai mpe omemi bana na ngai ya basi lokola bakangami ya bitumba!
Y dijo Labán á Jacob: ¿Qué has hecho, que me hurtaste el corazón, y has traído á mis hijas como prisioneras de guerra?
27 Mpo na nini okimi na nkuku mpe okosi ngai? Mpo na nini oyebisaki ngai te? Nalingaki kutu kotika yo kokende na esengo elongo na banzembo, na makelele ya bambunda mpe ya lindanda.
¿Por qué te escondiste para huir, y me hurtaste, y no me diste noticia, para que yo te enviara con alegría y con cantares, con tamborín y vihuela?
28 Otikeli ngai ata tango te ya kopesa beze na bakoko na ngai mpe na bana na ngai ya basi! Osali penza lokola moto ya liboma!
Que aun no me dejaste besar mis hijos y mis hijas. Ahora locamente has hecho.
29 Tala, nazali na makoki ya kosala yo mabe, kasi na butu oyo eleki, Nzambe ya tata na yo alobaki na ngai: « Keba! Komeka koloba ata likambo moko te ya malamu to ya mabe epai ya Jakobi. »
Poder hay en mi mano para haceros mal: mas el Dios de vuestro padre me habló anoche diciendo: Guárdate que no hables á Jacob descomedidamente.
30 Sik’oyo, lokola okeyi mpo ete ozalaki na posa ya ndako ya tata na yo, mpo na nini oyibi banzambe na ngai?
Y ya que te ibas, porque tenías deseo de la casa de tu padre, ¿por qué me hurtaste mis dioses?
31 Jakobi azongiselaki Labani: — Nabangaki, pamba te nakanisaki ete okobotola ngai bana na yo ya basi na makasi.
Y Jacob respondió, y dijo á Labán: Porque tuve miedo; pues dije, que quizá me quitarías por fuerza tus hijas.
32 Kasi tika ete moto oyo okokuta awa na banzambe na yo akufa. Na miso ya bandeko na biso ya mibali, luka epai na ngai nyonso oyo ezali ya yo mpe zwa yango. Nzokande, Jakobi ayebaki te ete ezalaki Rasheli nde moto ayibaki banzambe yango.
En quien hallares tus dioses, no viva: delante de nuestros hermanos reconoce lo que yo tuviere tuyo, y llévatelo. Jacob no sabía que Rachêl los había hurtado.
33 Labani akotaki na ndako ya kapo ya Jakobi, na ndako ya kapo ya Lea, mpe na ndako ya kapo ya basi bawumbu mibale; kasi amonaki eloko te. Sima na ye kobima na ndako ya kapo ya Lea, akotaki na oyo ya Rasheli.
Y entró Labán en la tienda de Jacob, y en la tienda de Lea, y en la tienda de las dos siervas, y no los halló, y salió de la tienda de Lea, y vino á la tienda de Rachêl.
34 Nzokande Rasheli azwaki banzambe ya Labani, abombaki yango likolo ya shamo mpe avandaki na likolo na yango. Labani alukaki kati na ndako mobimba ya kapo, kasi amonaki eloko moko te.
Y tomó Rachêl los ídolos, y púsolos en una albarda de un camello, y sentóse sobre ellos: y tentó Labán toda la tienda, y no los halló.
35 Rasheli alobaki na tata na ye: — Tika ete nkolo na ngai asilika te soki nakoki kotelema te na miso na yo, pamba te nazali na mikolo ya sanza oyo ekomelaka basi nyonso. Labani alukaki, kasi amonaki banzambe yango te.
Y ella dijo á su padre: No se enoje mi señor, porque no me puedo levantar delante de ti; pues estoy con la costumbre de las mujeres. Y él buscó, pero no halló los ídolos.
36 Bongo Jakobi asilikaki mpe aswanisaki Labani. Alobaki na ye: — Mbeba nini nasalaki? Lisumu nini nasalaki mpo ete olanda ngai na kanda boye?
Entonces Jacob se enojó, y regañó con Labán; y respondió Jacob y dijo á Labán: ¿Qué prevaricación es la mía? ¿cuál es mi pecado, que con tanto ardor has venido en seguimiento mío?
37 Tango oluki kati na biloko na ngai nyonso, eloko nini ya ndako na yo omoni? Tia yango awa liboso ya bandeko na yo ya mibali mpe ya ngai mpo bakatela biso mibale likambo.
Pues que has tentado todos mis muebles, ¿qué has hallado de todas las alhajas de tu casa? Ponlo aquí delante de mis hermanos y tuyos, y juzguen entre nosotros ambos.
38 Nasalaki epai na yo mibu tuku mibale; bameme na yo mpe bantaba na yo elongwaki zemi te, mpe natikalaki te kolia bameme ya mibali kati na bibwele na yo.
Estos veinte años he estado contigo: tus ovejas y tus cabras nunca abortaron, ni yo comí carnero de tus ovejas.
39 Namemelaki yo nyama moko te oyo banyama ya zamba ebomaki. Ngai moko nazalaki kofuta yango. Ozalaki kofutisa ngai oyo bazalaki koyiba ngai na moyi to na butu.
Nunca te traje lo arrebatado por las fieras; yo pagaba el daño; lo hurtado así de día como de noche, de mi mano lo requerías.
40 Moyi ezalaki kobeta ngai na mokolo, malili ezalaki kokanga ngai na butu, mpe pongi ezalaki kokima ngai na miso.
De día me consumía el calor, y de noche la helada, y el sueño se huía de mis ojos.
41 Navandi na ndako na yo mibu tuku mibale: nasalelaki yo mibu zomi na minei mpo na bana na yo mibale ya basi, mpe mibu motoba mpo na bibwele na yo; mbala zomi obongolaki lifuti na ngai.
Así he estado veinte años en tu casa: catorce años te serví por tus dos hijas, y seis años por tu ganado; y has mudado mi salario diez veces.
42 Soki Nzambe ya tata na ngai, Nzambe ya Abrayami mpe oyo Izaki abangaka, azalaki elongo na ngai te, ya solo, olingaki kozongisa ngai lelo maboko pamba. Kasi Nzambe amonaki minyoko na ngai mpe pasi ya mosala ya maboko na ngai, yango wana apamelaki yo na butu oyo eleki.
Si el Dios de mi padre, el Dios de Abraham, y el temor de Isaac, no fuera conmigo, de cierto me enviarías ahora vacío: vió Dios mi aflicción y el trabajo de mis manos, y reprendióte anoche.
43 Labani azongiselaki Jakobi: — Basi oyo bazali bana na ngai ya basi, bana oyo bazali bana na ngai, bibwele oyo ezali ya ngai mpe nyonso oyo ozali komona ezali ya ngai. Bongo lelo, eloko nini nakoki kosala mpo na bana na ngai ya basi mpe mpo na bana oyo bango baboti?
Y respondió Labán, y dijo á Jacob: Las hijas son hijas mías, y los hijos, hijos míos son, y las ovejas son mis ovejas, y todo lo que tú ves es mío: ¿y qué puedo yo hacer hoy á estas mis hijas, ó á sus hijos que ellas han parido?
44 Sik’oyo Jakobi, tosala boyokani kati na yo mpe ngai, mpe tika ete yango ezala litatoli kati na biso.
Ven pues ahora, y hagamos alianza yo y tú; y sea en testimonio entre mí y entre ti.
45 Boye Jakobi azwaki libanga mpe atelemisaki yango lokola elembo.
Entonces Jacob tomó una piedra, y levantóla por título.
46 Jakobi alobaki na bandeko na ye ya mibali: « Bolokota mabanga! » Balokotaki mabanga, batiaki yango liboke, mpe bango nyonso baliaki wana na likolo ya liboke ya mabanga.
Y dijo Jacob á sus hermanos: Coged piedras. Y tomaron piedras é hicieron un majano; y comieron allí sobre aquel majano.
47 Labani abengaki esika yango Yegari-Saduta mpe Jakobi abengaki yango Galedi.
Y llamólo Labán Jegar Sahadutha: y lo llamó Jacob Galaad.
48 Labani alobaki: — Lelo, liboke oyo ya mabanga ezali litatoli kati na yo mpe ngai. Yango wana babengaki yango Galedi.
Porque Labán dijo: Este majano es testigo hoy entre mí y entre ti; por eso fué llamado su nombre Galaad;
49 Babengaki yango lisusu Mitsipa; pamba te Labani alobaki lisusu: « Tika ete Yawe akengelaka kati na yo mpe ngai tango tokomonana lisusu te.
Y Mizpa, por cuanto dijo: Atalaye Jehová entre mí y entre ti, cuando nos apartáremos el uno del otro.
50 Soki onyokoli bana na ngai ya basi mpe soki ozwi basi mosusu likolo na bana na ngai ya basi, atako moto moko te akozala kati na biso, kasi yeba ete Nzambe nde azali motatoli kati na yo mpe ngai. »
Si afligieres mis hijas, ó si tomares otras mujeres además de mis hijas, nadie está con nosotros; mira, Dios es testigo entre mí y entre ti.
51 Labani alobaki lisusu na Jakobi: — Tala liboke oyo ya mabanga mpe libanga ya elembo oyo natelemisi kati na ngai mpe yo.
Dijo más Labán á Jacob: He aquí este majano, y he aquí este título, que he erigido entre mí y ti.
52 Liboke oyo ya mabanga ezali motatoli, mpe libanga oyo ya elembo ezali motatoli. Nasengeli te kokatisa liboke oyo ya mabanga mpe libanga oyo ya elembo mpo ete naya kosala yo mabe na ngambo na yo; mpe yo osengeli te kokatisa liboke ya mabanga mpe libanga ya elembo mpo na koya kosala ngai mabe na ngambo na ngai.
Testigo sea este majano, y testigo sea este título, que ni yo pasaré contra ti este majano, ni tú pasarás contra mí este majano ni este título, para mal.
53 Tika ete Nzambe ya Abrayami mpe Nzambe ya Naori, Nzambe ya tata na bango, azala Mosambisi kati na biso! Bongo Jakobi alapaki ndayi na Kombo ya Nzambe oyo tata na ye, Izaki, azalaki kobanga.
El Dios de Abraham, y el Dios de Nachôr juzgue entre nosotros, el Dios de sus padres. Y Jacob juró por el temor de Isaac su padre.
54 Jakobi abonzaki mbeka likolo ya ngomba mpe abengisaki bandeko na ye ya mibali mpo na kolia bilei. Tango basilisaki kolia, balekisaki butu na esika wana, likolo ya ngomba.
Entonces Jacob inmoló víctimas en el monte, y llamó á sus hermanos á comer pan: y comieron pan, y durmieron aquella noche en el monte.
55 Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, Labani apesaki bakoko na ye mpe bana na ye ya basi beze; apambolaki bango mpe azongaki na ndako na ye.
Y levantóse Labán de mañana, y besó sus hijos y sus hijas, y los bendijo; y retrocedió y volvióse á su lugar.

< Ebandeli 31 >