< Ebandeli 30 >

1 Tango Rasheli amonaki ete azali kobotela Jakobi bana te, akomaki na zuwa mpo na ndeko na ye ya mwasi. Boye alobaki na Jakobi: — Pesa ngai bana, noki te nakokufa.
A Rahilja vidjevši gdje ne raða djece Jakovu, pozavidje sestri svojoj; i reèe Jakovu: daj mi djece, ili æu umrijeti.
2 Jakobi asilikaki makasi mpo na Rasheli mpe alobaki: — Boni, ngai nakomi nde Nzambe oyo akangi yo mabota?
A Jakov se rasrdi na Rahilju, i reèe: zar sam ja a ne Bog koji ti ne da poroda?
3 Rasheli alobaki: — Tala Bila, mwasi mowumbu na ngai; sangisa na ye nzoto mpo ete abotela ngai bana, mpe na nzela na ye, ngai mpe nakoka kotonga libota.
A ona reèe: eto robinje moje Vale, lezi s njom, neka rodi na mojim koljenima, pa æu i ja imati djece od nje.
4 Rasheli apesaki ye Bila, mwasi mosali na ye, mpo ete akoma mwasi na ye. Jakobi asangisaki na ye nzoto,
I dade mu Valu robinju svoju za ženu, i Jakov leže s njom.
5 mpe Bila akomaki na zemi. Abotelaki Jakobi mwana mobali.
I zatrudnje Vala, i rodi Jakovu sina.
6 Rasheli alobaki: « Nzambe alongisi ngai, ayoki kolela na ngai mpe apesi ngai mwana mobali. » Boye apesaki ye kombo « Dani. »
A Rahilja reèe: Gospod mi je sudio i èuo glas moj, te mi dade sina. Zato mu nadjede ime Dan.
7 Sima na yango, Bila, mwasi mosali ya Rasheli, azwaki lisusu zemi mpe abotelaki Jakobi mwana mobali ya mibale.
I Vala robinja Rahiljina zatrudnje opet, i rodi drugoga sina Jakovu;
8 Rasheli alobaki: « Nabundisi ndeko na ngai ya mwasi bitumba ya Nzambe mpe nalongi. » Boye apesaki ye kombo « Nefitali. »
A Rahilja reèe: borah se žestoko sa sestrom svojom, ali odoljeh. I nadjede mu ime Neftalim.
9 Tango Lea amonaki ete azali kobota lisusu te, azwaki Zilipa, mwasi mosali na ye, mpe apesaki ye epai ya Jakobi mpo ete akoma mwasi na ye.
A Lija vidjevši gdje presta raðati uze Zelfu robinju svoju i dade je Jakovu za ženu.
10 Zilipa, mwasi mosali ya Lea, abotelaki Jakobi mwana mobali.
I rodi Zelfa robinja Lijina Jakovu sina;
11 Lea alobaki: « Oyo nde esengo! » Boye apesaki ye kombo « Gadi. »
I Lija reèe: doðe èeta. I nadjede mu ime Gad.
12 Sima na yango, Zilipa, mwasi mosali ya Lea, abotelaki Jakobi mwana mobali ya mibale.
Opet rodi Zelfa robinja Lijina drugoga sina Jakovu;
13 Lea alobaki: « Oyo esengo ya ndenge nini nakomi na yango! Pamba te basi bakobenga ngai moto ya esengo. » Boye apesaki ye kombo « Aseri. »
I reèe Lija: blago meni, jer æe me blaženom zvati žene. Zato mu nadjede ime Asir.
14 Na eleko ya kokata ble, Ribeni akendeki na bilanga mpe amonaki bambuma ya mandragore; amemelaki yango Lea, mama na ye. Bongo Rasheli alobaki na Lea: — Nabondeli yo, pesa ngai ndambo ya bambuma ya mandragore oyo mwana na yo amemaki.
A Ruvim izide u vrijeme žetve pšeniène i naðe mandragoru u polju, i donese je Liji materi svojoj. A Rahilja reèe Liji: daj mi mandragoru sina svojega.
15 Kasi Lea azongiselaki ye: — Boni, ndenge ozwi mobali na ngai, ekoki te? Olingi lisusu kozwa bambuma ya mandragore ya mwana na ngai? Rasheli alobaki na ye: — Malamu! Soki opesi ngai bambuma ya mandragore ya mwana na yo, Jakobi akolala epai na yo na butu ya lelo.
A ona joj reèe: malo li ti je što si mi uzela muža? hoæeš da mi uzmeš i mandragoru sina mojega? A Rahilja joj reèe: neka noæas spava s tobom za mandragoru sina tvojega.
16 Na pokwa, wana Jakobi awutaki bilanga, Lea akendeki kokutana na ye mpe alobaki na ye: « Okolala epai na ngai, pamba te napesi bambuma ya mandragore ya mwana na ngai mpo na yo. » Boye Jakobi asangisaki na ye nzoto na butu wana.
I uveèe kad se Jakov vraæaše iz polja, izide mu Lija na susret i reèe: spavaæeš kod mene, jer te kupih za mandragoru sina svojega. I spava kod nje onu noæ.
17 Nzambe ayokelaki Lea mawa, akomaki na zemi mpe abotelaki Jakobi mwana mobali ya mitano.
A Bog usliši Liju, te ona zatrudnje, i rodi Jakovu petoga sina.
18 Lea alobaki: « Nzambe apesi ngai lifuti na ngai lokola napesaki mosali na ngai ya mwasi epai ya mobali na ngai. » Boye apesaki ye kombo « Isakari. »
I reèe Lija: Gospod mi dade platu moju što dadoh robinju svoju mužu svojemu. I nadjede mu ime Isahar.
19 Lea azwaki lisusu zemi mpe abotelaki Jakobi mwana mobali ya motoba.
I zatrudnje Lija opet, i rodi Jakovu šestoga sina;
20 Lea alobaki: « Nzambe apesi ngai likabo ya motuya. Sik’oyo, mobali na ngai akopesa ngai lokumu mpo ete naboteli ye bana mibali motoba. » Boye apesaki ye kombo « Zabuloni. »
I reèe Lija: dariva me Gospod darom dobrijem; da ako se sada veæ priljubi k meni muž moj, jer mu rodih šest sinova. Zato mu nadjede ime Zavulon.
21 Sima na mikolo, abotaki lisusu mwana mwasi mpe apesaki ye kombo « Dina. »
Najposlije rodi kæer, i nadjede joj ime Dina.
22 Nzambe akaniselaki Rasheli, ayokaki kolela na ye mpe afungolaki ye mabota.
Ali se Gospod opomenu Rahilje; i uslišiv je otvori joj matericu;
23 Akomaki na zemi, abotaki mwana mobali mpe alobaki: « Nzambe alongoli soni na ngai. »
I zatrudnje, i rodi sina, i reèe: uze Bog sramotu moju.
24 Apesaki ye kombo « Jozefi, » mpe alobaki: « Tika ete Yawe abakisela ngai mwana mosusu ya mobali! »
I nadjede mu ime Josif, govoreæi: neka mi doda Gospod još jednoga sina.
25 Sima na Rasheli kobota Jozefi, Jakobi alobaki na Labani: — Pesa ngai nzela mpo ete nazonga na mboka na ngai.
A kad Rahilja rodi Josifa, reèe Jakov Lavanu: pusti me da idem u svoje mjesto i u svoju zemlju.
26 Pesa ngai mpe basi mpe bana na ngai, ba-oyo mpo na bango nasaleli yo; bongo nakokende na ngai. Pamba te oyebi malamu mosala makasi oyo nasaleli yo.
Daj mi žene moje, za koje sam ti služio, i djecu moju, da idem, jer znaš kako sam ti služio.
27 Kasi Labani alobaki na ye: — Soki nazwi ngolu na miso na yo, nabondeli yo, kokende te; pamba te nasosoli na bosoloka ete Yawe apamboli ngai na nzela na yo.
A Lavan mu reèe: nemoj, ako sam našao milost pred tobom; vidim da me je blagoslovio Gospod tebe radi.
28 Abakisaki: — Katela ngai lifuti na yo mpe nakofuta yo yango.
I još reèe: išti koliko hoæeš plate, i ja æu ti dati.
29 Jakobi alobaki na ye: — Oyebi yo moko ndenge nini ngai nasaleli yo mpe ndenge nini, na nzela na ngai, bibwele na yo ekomi ebele.
A Jakov mu odgovori: ti znaš kako sam ti služio i kakva ti je stoka postala kod mene.
30 Moke oyo ozalaki na yango, liboso ete ngai naya, ekomi ebele penza. Yawe apamboli yo na nzela na ngai. Kasi sik’oyo, nakosala tango nini mpo na libota na ngai moko?
Jer je malo bilo što si imao dokle ja ne doðoh; ali se umnoži veoma, jer te Gospod blagoslovi kad ja doðoh. Pa kad æu i ja tako sebi kuæu kuæiti?
31 Labani atunaki ye: — Nasengeli kopesa yo nini? Jakobi azongisaki: — Okopesa ngai eloko te. Kasi soki olingi kosala likambo oyo mpo na ngai, nakokoba koleisa mpe kobatela bibwele na yo.
I reèe mu Lavan: šta hoæeš da ti dam? A Jakov odgovori: ne treba ništa da mi daš; nego æu ti opet pasti stoku i èuvati, ako æeš mi uèiti ovo:
32 Lelo, nakoleka na kati-kati ya bibwele na yo, nakolongola kati na bana meme, bameme nyonso ya madodo-madodo mpe oyo ezali ya banzela-nzela ya mwindo; mpe lisusu kati na bantaba nyonso ya madodo-madodo mpe ya banzela-nzela ya pembe. Wana nde ezala lifuti na ngai.
Da zaðem danas po svoj stoci tvojoj, i odluèim sve što je šareno i s biljegom, i sve što je crno izmeðu ovaca, i što je s biljegom i šareno izmeðu koza, pa što poslije bude tako, ono da mi je plata.
33 Boye bosembo na ngai ekomonana sima na mikolo tango okoya kotala lifuti na ngai. Soki omoni epai na ngai ntaba ezanga madodo to ezanga banzela ya pembe to mwana meme ezanga madodo to ezanga banzela ya mwindo, wana ekozala lokola nayibi yango.
Tako æe mi se poslije posvjedoèiti pravda moja pred tobom kad doðeš da vidiš zaslugu moju: što god ne bude šareno ni s biljegom ni crno izmeðu ovaca i koza u mene, biæe kradeno.
34 Labani alobaki: — Iyo! Tika ete ezala ndenge olobi.
A Lavan reèe: eto, neka bude kako si kazao.
35 Kaka na mokolo wana, Labani alongolaki kati na bibwele, bantaba ya mibali ya madodo-madodo mpe ya banzela-nzela ya pembe, bantaba nyonso ya basi ya madodo-madodo mpe ya banzela-nzela ya pembe, mpe bibwele nyonso oyo ezalaki mwa pembe mpe mwa mwindo kati na bana meme. Apesaki yango na maboko ya bana na ye ya mibali.
I odluèi Lavan isti dan jarce s biljegom i šarene i sve koze s biljegom i šarene, i sve na èem bijaše što bijelo, i sve crno izmeðu ovaca, i predade sinovima svojim.
36 Sima, Labani atambolaki mikolo misato mpo na kokabwana na Jakobi, wana Jakobi akobaki kobatela ndambo ya bibwele ya Labani oyo etikalaki.
I ostavi daljine tri dana hoda izmeðu sebe i Jakova. I Jakov pasijaše ostalu stoku Lavanovu.
37 Jakobi azwaki bitape ya mobesu ya nzete ya pepiliye, ya amande mpe ya platane.
I uze Jakov zelenijeh prutova topolovijeh i ljeskovijeh i kestenovijeh, i naguli ih do bjeline koja bješe na prutovima.
38 Bongo atiaki kati na basani mpe kati na bimelelo, liboso ya bibwele, bitape oyo apalolaki, na esika oyo bibwele ezalaki koya komela mayi. Wana bibwele ya basi ezalaki koyoka posa ya mayi, ezalaki mpe koyoka posa ya kosangisa nzoto na bibwele ya mibali.
I metaše naguljene prutove pred stoku u žljebove i korita kad dolažaše stoka da pije, da bi se upaljivala kad doðe da pije.
39 Boye, bibwele ezalaki koya kosangisa nzoto liboso ya bitape wana; mpe tango ezalaki kobota, bana na yango ezalaki na banzela-nzela ya pembe, banzela-nzela ya mwindo mpe madodo-madodo.
I upaljivaše se stoka gledajuæi u prutove, i što se mlaðaše bijaše s biljegom, prutasto i šareno.
40 Jakobi atiaki pembeni bana meme mpe atindaki yango na esika oyo bana meme ya nzela-nzela mpe ya mwa mwindo ezalaki; pamba te yango ezalaki kobotama mingi kati na bibwele ya Labani. Ezali boye nde akomaki na bibwele ya ye moko oyo asangisaki te na bibwele ya Labani.
I Jakov odluèivaše mlad, i obraæaše stado Lavanovo da gleda u šarene i u sve crne; a svoje stado odvajaše i ne obraæaše ga prema stadu Lavanovu.
41 Tango nyonso bibwele ya basi, oyo ezalaki na nzoto minene, ezalaki na posa ya kosangisa nzoto, Jakobi azalaki kotia liboso ya bibwele yango bitape ya nzete kati na basani oyo yango ezalaki komelela mayi mpo ete esangisa nzoto pembeni ya bitape wana.
I kad se god upaljivaše stoka rana, metaše Jakov prutove u korita pred oèi stoci da bi se upaljivala gledajuæi u prutove;
42 Kasi, na esika yango, azalaki kotia te bibwele oyo ekonda. Boye bibwele oyo ekonda ezalaki ya Labani, mpe oyo ya minene ezalaki ya Jakobi.
A kad se upaljivaše pozna stoka, ne metaše; tako pozne bivahu Lavanove a rane Jakovljeve.
43 Na nzela wana nde moto oyo akomaki na bozwi mingi koleka. Azwaki bibwele ebele, basali ya basi mpe ya mibali, bashamo mpe ba-ane.
I tako se taj èovjek obogati vrlo, te imaše mnogo stoke i sluga i sluškinja i kamila i magaraca.

< Ebandeli 30 >