< Ebandeli 29 >
1 Jakobi akobaki mobembo na ye mpe akomaki na mokili ya bato ya este.
Then Jacob went on in his journey, and came into the east country.
2 Kuna, amonaki libulu ya mayi kati na elanga mpe bitonga misato ya bameme elali pembeni ya libulu, pamba te bameme ezalaki komela mayi na libulu yango. Libanga moko ya monene ezipaki monoko ya libulu.
And he saw a well in the field, and three flocks of sheep lying by it: for the beasts were watered out of it, and the mouth thereof was closed with a great stone.
3 Tango bibwele nyonso ezalaki kosangana wana, babateli bibwele bazalaki kolongola libanga na monoko ya libulu ya mayi mpe komelisa bameme. Mpe na sima, bazalaki kozongisa libanga na esika na yango, na monoko ya libulu.
And the custom was, when all the sheep were gathered together to roll away the stone, and after the sheep were watered, to put it on the mouth of the well again.
4 Jakobi atunaki babateli bibwele: — Bandeko na ngai ya mibali, bowuti wapi? Bazongisaki: — Towuti na Arani.
And he said to the shepherds: Brethren, whence are you? They answered: Of Haran.
5 Atunaki bango lisusu: — Boyebi Labani, koko ya Naori? Bazongisaki: — Iyo, toyebi ye.
And he asked them, saying: Know you Laban the son of Nachor? They said: We know him.
6 Jakobi abakisaki lisusu: — Boni, azali malamu? Bazongisaki: — Iyo, azali malamu. Tala kutu Rasheli, mwana na ye ya mwasi, azali koya elongo na bameme.
He said: Is he in health? He is in health, say they: and behold Rachel his daughter cometh with his flock.
7 Kasi Jakobi alobaki: — Tala, moyi ezali nanu makasi; tango ekoki nanu te mpo na kozongisa bibwele. Bomelisa bameme mpe bozonga lisusu koleisa yango matiti.
And Jacob said: There is yet much day remaining, neither is it time to bring the flocks into the folds again: first give the sheep drink, and so lead them back to feed.
8 Bazongisaki: — Tokoki kosala yango kaka soki bibwele nyonso esangani; bongo tokolongola libanga na monoko ya libulu mpe tokomelisa bameme mayi.
They answered: We cannot, till all the cattle be gathered together, and we remove the stone from the well’s mouth, that we may water the flocks.
9 Wana azalaki nanu kosolola na bango, Rasheli ayaki elongo na bameme ya tata na ye, pamba te azalaki mwasi mobateli bibwele.
They were yet speaking, and behold Rachel came with her father’s sheep: for she fed the flock.
10 Tango Jakobi amonaki Rasheli, mwana mwasi ya noko na ye Labani, elongo na bibwele ya Labani, apusanaki, alongolaki libanga na monoko ya libulu ya mayi mpe amelisaki yango mayi.
And when Jacob saw her, and knew her to be his cousin-german, and that they were the sheep of Laban, his uncle: he removed the stone wherewith the well was closed.
11 Jakobi apesaki Rasheli beze mpe alelaki makasi.
And having watered the flock, he kissed her: and lifting up his voice, wept.
12 Jakobi ayebisaki Rasheli: « Nazali mwana ya Rebeka mpe moto ya libota ya tata na yo. » Bongo Rasheli akimaki mbangu mpo na koyebisa tata na ye.
And he told her that he was her father’s brother, and the son of Rebecca: but she went in haste and told her father.
13 Tango kaka Labani ayokaki sango na tina na Jakobi, mwana ya ndeko na ye ya mwasi, akendeki mbangu kokutana na ye. Ayambaki ye, apesaki ye beze mpe amemaki ye na ndako na ye; mpe kuna, Jakobi ayebisaki ye makambo nyonso oyo elekaki.
Who, when he heard that Jacob his sister’s son was come, ran forth to meet him; and embracing him, and heartily kissing him, brought him into his house. And when he had heard the causes of his journey,
14 Labani alobaki na ye: « Solo, ozali penza makila na ngai, moto ya libota na ngai penza! » Jakobi avandaki elongo na ye sanza mobimba.
He answered: Thou art my bone and my flesh. And after the days of one month were expired,
15 Labani alobaki na Jakobi: — Boni, osalela ngai mosala ya ofele mpo ete ozali moto ya libota na ngai? Yebisa ngai: olingi ete lifuti na yo ezala nini?
He said to him: Because thou art my brother, shalt thou serve me without wages? Tell me what wages thou wilt have.
16 Nzokande, Labani azalaki na bana basi mibale ya mikolo: Lea mpe leki na ye Rasheli.
Now he had two daughters, the name of the elder was Lia: and the younger was called Rachel.
17 Lea azalaki na miso elala kasi Rasheli azalaki na nzoto kitoko mpe elongi kitoko.
But Lia was blear eyed: Rachel was well favoured, and of a beautiful countenance.
18 Jakobi alingaki Rasheli mpe alobaki: — Nakosalela yo mibu sambo mpe okopesa ngai Rasheli, mwana na yo ya mwasi oyo ya leki, mpo ete azala mwasi na ngai.
And Jacob being in love with her, said: I will serve thee seven years for Rachel thy younger daughter.
19 Labani alobaki: — Eleki malamu ete napesa ye epai na yo na esika ete napesa ye epai ya mobali mosusu. Vanda awa elongo na ngai.
Laban answered: It is better that I give her to thee than to another man; stay with me.
20 Jakobi asalaki mibu sambo mpo na kozwa Rasheli na libala, mpe mibu yango emonanaki kaka lokola mwa mikolo epai na ye, pamba te alingaki Rasheli.
So Jacob served seven years for Rachel: and they seemed but a few days, because of the greatness of his love.
21 Sima, Jakobi alobaki na Labani: — Mikolo na ngai ekoki; pesa ngai mwasi na ngai, pamba te nalingi kozala na ye.
And he said to Laban: Give me my wife; for now the time is fulfilled, that I may go in unto her.
22 Na boye, Labani abengisaki bato nyonso ya esika wana mpe asalisaki feti.
And he, having invited a great number of his friends to the feast, made the marriage.
23 Tango pokwa ekomaki, Labani azwaki Lea, mwana na ye ya mwasi, apesaki ye epai ya Jakobi mpe Jakobi asangisaki na ye nzoto.
And at night he brought in Lia his daughter to him,
24 Labani apesaki Zilipa, mwasi mosali na ye, epai ya Lea, mwana na ye ya mwasi, lokola mwasi mosali na ye.
Giving his daughter a handmaid, named Zelpha. Now when Jacob had gone in to her according to custom when morning was come he saw it was Lia:
25 Tango tongo etanaki, Jakobi amonaki ete ezalaki nde Lea. Bongo alobaki na Labani: — Likambo nini oyo osali ngai? Boni, ezali mpo na Rasheli te nde ngai nasalelaki yo? Mpo na nini okosi ngai?
And he said to his father in law: What is it that thou didst mean to do? did not I serve thee for Rachel? why hast thou deceived me?
26 Labani azongisaki: — Na bokoko na biso awa, topesaka te leki na libala liboso ya kulutu.
Laban answered: It is not the custom in this place, to give the younger in marriage first.
27 Silisa nanu poso ya babalani elongo na ye. Bongo sima, oyo ya leki mpe akopesamela yo soki osaleli ngai lisusu mibu sambo.
Make up the week of days of this match: and I will give thee her also, for the service that thou shalt render me other seven years.
28 Jakobi asalaki bongo: asilisaki poso wana elongo na Lea, sima Labani apesaki ye mwana na ye ya mwasi Rasheli mpo ete azala mwasi na ye.
He yielded to his pleasure: and after the week was past, he married Rachel:
29 Labani apesaki Bila, mwasi mosali na ye, epai ya Rasheli, mwana na ye ya mwasi, lokola mwasi mosali na ye.
To whom her father gave Bala for her servant.
30 Jakobi asangisaki lisusu nzoto na Rasheli. Alingaki ye mingi koleka Lea. Bongo asalelaki lisusu Labani mibu sambo.
And having at length obtained the marriage he wished for, he preferred the love of the latter before the former, and served with him other seven years.
31 Lokola Yawe amonaki ete Jakobi alingaka Lea te, afungolaki ye mabota; kasi Rasheli azalaki kobota te.
And the Lord seeing that he despised Lia, opened her womb, but her sister remained barren.
32 Boye Lea azwaki zemi mpe abotaki mwana mobali. Apesaki ye kombo « Ribeni; » alobaki: « Yawe amoni pasi na ngai; mpe sik’oyo, mobali na ngai akolinga ngai. »
And she conceived and bore a son, and called his name Ruben, saying: The Lord saw my affliction: now my husband will love me.
33 Sima, azwaki lisusu zemi mpe abotaki mwana mobali. Alobaki: « Yawe amoni ete nalingami te, mpe apesi ngai lisusu mwana. » Boye apesaki ye kombo « Simeoni. »
And again she conceived and bore a son, and said: Because the Lord heard that I was despised, he hath given this also to me: and she called his name Simeon.
34 Azwaki lisusu zemi mpe abotaki mwana mobali. Alobaki: « Na mbala oyo, mobali na ngai akokangama na ngai, pamba te naboteli ye bana mibali misato. » Boye bapesaki ye kombo « Levi. »
And she conceived the third time, and bore another son: and said: Now also my husband will be joined to me, because I have borne him three sons: and therefore she called his name Levi.
35 Azwaki lisusu zemi mpe abotaki mwana mobali. Agangaki: « Na mbala oyo, nakokumisa Yawe. » Yango wana apesaki ye kombo « Yuda. » Mpe akataki kobota.
The fourth time she conceived and bore a son, and said: now will I praise the Lord: and for this she called him Juda. And she left bearing.