< Ebandeli 28 >

1 Bongo Izaki abengaki Jakobi, apambolaki ye mpe apesaki ye mitindo oyo: « Okobala mwasi te kati na bana basi ya Kanana.
以撒叫了雅各来,给他祝福,并嘱咐他说:“你不要娶迦南的女子为妻。
2 Telema! Kende mbala moko na Padani-Arami, na ndako ya koko na yo, Betweli, tata ya mama na yo. Zwa mwasi kuna kati na bana basi ya Labani, ndeko ya mama na yo.
你起身往巴旦·亚兰去,到你外祖彼土利家里,在你母舅拉班的女儿中娶一女为妻。
3 Tika ete Nzambe-Na-Nguya-Nyonso apambola yo, apesa yo bana, akomisa bana na yo ebele mpe okoma lisanga monene ya bato.
愿全能的 神赐福给你,使你生养众多,成为多族,
4 Tika ete apesa na yo mpe na bakitani na yo lipamboli oyo apesaki na Abrayami mpo ete okamata mokili oyo ozali kovanda lokola mopaya, mokili oyo Nzambe apesaki na Abrayami. »
将应许亚伯拉罕的福赐给你和你的后裔,使你承受你所寄居的地为业,就是 神赐给亚伯拉罕的地。”
5 Izaki atindaki Jakobi na nzela na ye, mpe Jakobi akendeki na Padani-Arami epai ya Labani, mwana mobali ya moto ya Arami, Betweli, mpe ndeko mobali ya Rebeka, mama ya Ezawu mpe Jakobi.
以撒打发雅各走了,他就往巴旦·亚兰去,到亚兰人彼土利的儿子拉班那里。拉班是雅各、以扫的母舅。
6 Ezawu ayokaki ete Izaki apambolaki Jakobi mpe atindaki ye na Padani-Arami mpo na kobala mwasi; ayokaki mpe ete, tango apambolaki ye, apesaki ye mitindo oyo: « Okobala mwasi te kati na bana basi ya Kanana. »
以扫见以撒已经给雅各祝福,而且打发他往巴旦·亚兰去,在那里娶妻,并见祝福的时候嘱咐他说:“不要娶迦南的女子为妻”,
7 Jakobi atosaki tata na ye mpe mama na ye, mpe akendeki na Padani-Arami.
又见雅各听从父母的话往巴旦·亚兰去了,
8 Bongo Ezawu asosolaki ete Izaki, tata na ye, azalaki kosepela te na bana basi ya Kanana.
以扫就晓得他父亲以撒看不中迦南的女子,
9 Boye Ezawu akendeki epai ya Isimaeli, mwana mobali ya Abrayami, mpe abalaki, kobakisa na basi oyo azalaki na bango, Maalati, ndeko mwasi ya Nebayoti.
便往以实玛利那里去,在他二妻之外又娶了玛哈拉为妻。她是亚伯拉罕儿子以实玛利的女儿,尼拜约的妹子。
10 Jakobi alongwaki na Beri-Sheba mpe akendeki na Arani.
雅各出了别是巴,向哈兰走去;
11 Tango akomaki na esika moko, apemaki mpo na kolekisa butu. Azwaki libanga moko kati na mabanga oyo ezalaki na esika yango, atiaki yango na se ya moto na ye mpe alalaki.
到了一个地方,因为太阳落了,就在那里住宿,便拾起那地方的一块石头枕在头下,在那里躺卧睡了,
12 Na se ya pongi, alotaki ndoto: Amonaki ematelo moko ebanda na mabele mpe songe na yango etutaki likolo. Ba-anjelu ya Nzambe bazalaki komata mpe kokita na ematelo yango.
梦见一个梯子立在地上,梯子的头顶着天,有 神的使者在梯子上,上去下来。
13 Mpe Yawe atelemaki likolo ya ematelo mpe alobaki na ye: « Nazali Yawe, Nzambe ya koko na yo Abrayami mpe Nzambe ya Izaki. Nakopesa epai na yo mpe na bana na yo mabele oyo, esika olali.
耶和华站在梯子以上,说:“我是耶和华—你祖亚伯拉罕的 神,也是以撒的 神;我要将你现在所躺卧之地赐给你和你的后裔。
14 Bana na yo bakozala ebele lokola putulu ya mabele, bakopanzana na bangambo nyonso: wuta na weste kino na este, wuta na nor kino na sude. Mabota nyonso ya mokili ekomipambola mpo na yo mpe mpo na bakitani na yo.
你的后裔必像地上的尘沙那样多,必向东西南北开展;地上万族必因你和你的后裔得福。
15 Nazali elongo na yo, nakobatela yo bisika nyonso oyo okokende mpe nakozongisa yo na mabele oyo, nakotika yo te kino nakokokisa makambo nyonso oyo nalakaki yo. »
我也与你同在。你无论往哪里去,我必保佑你,领你归回这地,总不离弃你,直到我成全了向你所应许的。”
16 Tango Jakobi alamukaki na pongi, alobaki: « Ya solo penza, Yawe azali na esika oyo mpe ngai nayebaki yango te! »
雅各睡醒了,说:“耶和华真在这里,我竟不知道!”
17 Jakobi abangaki mpe abakisaki: « Oyo esika ya somo boye! Ekoki kozala eloko mosusu te, bobele Ndako ya Nzambe. Awa nde ekuke ya lola. »
就惧怕,说:“这地方何等可畏!这不是别的,乃是 神的殿,也是天的门。”
18 Na tongo-tongo, Jakobi azwaki libanga oyo atiaki moto, atelemisaki yango lokola elembo mpe asopaki mafuta na songe na yango.
雅各清早起来,把所枕的石头立作柱子,浇油在上面。
19 Apesaki esika yango kombo « Beteli. » Na kala, bazalaka kobenga esika yango « Luze. »
他就给那地方起名叫伯特利;但那地方起先名叫路斯。
20 Bongo Jakobi akataki ndayi na koloba: « Soki Nzambe akozala elongo na ngai mpe akobatela ngai na mobembo oyo nazali kosala, mpe soki akopesa ngai bilei mpe bilamba ya kolata;
雅各许愿说:“神若与我同在,在我所行的路上保佑我,又给我食物吃,衣服穿,
21 soki nazongi na kimia na ndako ya tata na ngai, wana Yawe akozala Nzambe na ngai,
使我平平安安地回到我父亲的家,我就必以耶和华为我的 神。
22 libanga oyo natelemisi lokola elembo ekokoma Ndako ya Nzambe mpe nakopesa Ye eteni ya zomi ya biloko nyonso oyo akopesa ngai. »
我所立为柱子的石头也必作 神的殿;凡你所赐给我的,我必将十分之一献给你。”

< Ebandeli 28 >