< Ebandeli 27 >

1 Tango Izaki akomaki mobange mpe miso na ye ezalaki komona lisusu malamu te, abengaki Ezawu, mwana na ye ya liboso ya mobali. Alobaki na ye: — Mwana na ngai! Ezawu azongisaki: — Ngai oyo!
Isaac was old and going blind. He called for Esau, his oldest son, and said, “My son.” “I'm here,” Esau replied.
2 Izaki alobaki: — Nakomi mobange mpe nayebi mokolo ya kufa na ngai te.
“I'm old now,” said Isaac, “I may die soon, who knows?
3 Yango wana, zwa sik’oyo mandoki na yo ya bokila, saki ya bokila mpe tolotolo; kende na zamba mpe bomela ngai nyama.
So please take your bow and arrows and go hunting in the countryside for some meat for me.
4 Okolambela ngai elubu ya kitoko ndenge nalingaka mpe okomemela ngai yango; nakolia mpo ete napambola yo liboso ete nakufa.
Make me that tasty food that I love and bring it to me to eat, so I can bless you before I die.”
5 Nzokande, Rebeka azalaki koyoka makambo oyo Izaki azalaki koyebisa mwana na ye Ezawu. Tango Ezawu akendeki na zamba mpo na koboma nyama mpe kozonga na yango,
Rebekah heard what Isaac told his son Esau. So when Esau left to go hunting in the countryside for wild game,
6 Rebeka ayebisaki Jakobi, mwana na ye ya mibale: — Tala, nayokaki tata na yo koyebisa Ezawu, ndeko na yo:
Rebekah told her son Jacob, “Listen! I heard your father tell your brother,
7 « Memela ngai nyama! Okolambela ngai elubu ya kitoko, mpe nakolia yango mpo ete napambola yo na miso ya Yawe liboso ete nakufa. »
‘Get me some wild game and make me some tasty food so I can eat it and then bless you in the presence of the Lord before I die.’
8 Mwana na ngai, yoka ngai malamu sik’oyo mpe sala makambo oyo nakoyebisa yo:
Now then, my son, listen to me and do exactly what I tell you.
9 Kende na etonga ya bibwele mpe pona bana ntaba mibale mpe memela ngai yango mpo ete nalambela tata na yo elubu ya kitoko ndenge alingaka.
Go to the flock and bring me two nice young goats. I'll cook them and make the tasty food your father loves.
10 Bongo, okomemela yango tata na yo; akolia yango mpo ete apambola yo liboso ete akufa.
Then you take it to your father to eat, so he can bless you in the presence of the Lord before he dies.”
11 Jakobi azongiselaki Rebeka, mama na ye: — Ezawu, ndeko na ngai, azali na bapwale ebele na nzoto, kasi ngai nazali na yango te.
“But listen,” Jacob replied to his mother Rebekah, “my brother Esau is a hairy man, and I'm a smooth man.
12 Soki tata na ngai asimbi ngai, akososola ete nalingi kokosa ye; wana nakomibendela bilakeli mabe na esika ete napambolama.
Maybe my father will notice when he touches me. Then it will look like I'm deceiving him and I'll bring a curse down on myself instead of a blessing.”
13 Mama na ye alobaki: — Mwana na ngai, tika ete bilakeli mabe yango ekweya likolo na ngai; yo, sala kaka makambo oyo ngai nayebisi yo.
“Let the curse fall on me, my son,” his mother replied. “Just do what I tell you. Go and get the young goats for me.”
14 Boye Jakobi akendeki, azwaki bana ntaba mpe amemaki yango epai ya mama na ye, mpe mama na ye alambaki elubu ya kitoko ndenge tata na ye azalaki kolinga.
So Jacob went and got them and took them to his mother, and she made some tasty food, the way his father loved.
15 Bongo Rebeka azwaki na ndako, bilamba oyo elekaki kitoko kati na bilamba ya Ezawu, mwana na ye ya liboso, mpe alatisaki yango Jakobi, mwana na ye ya suka.
Then Rebekah went and got her older son Esau's best clothes that she had at home and put them on Jacob her younger son.
16 Azipaki ye maboko mpe kingo na poso ya bana ntaba.
She put the goatskins on his hands and on the smooth part of his neck.
17 Bongo Rebeka apesaki na maboko ya Jakobi, mwana na ye, elubu ya kitoko mpe lipa oyo alambaki.
Then she handed her son Jacob the tasty food and the bread she'd made.
18 Jakobi akendeki epai ya tata na ye mpe alobaki: — Tata na ngai! Izaki azongisaki: — Ngai oyo, mwana na ngai; yo nani?
He went in to see his father, and called out, “My father, I'm here.” “Which son are you?” Isaac asked.
19 Jakobi alobaki na tata na ye: — Nazali Ezawu, mwana na yo ya liboso. Nasali ndenge oyebisaki ngai. Nabondeli yo, lamuka, vanda mpe lia nyama, mpo ete opambola ngai.
“It's me Esau, your firstborn son,” Jacob told his father. “I did what you told me. So please sit up and eat some of my wild game meat so you can bless me.”
20 Izaki atunaki mwana na ye: — Mwana na ngai, osali ndenge nini mpo ete ozwa nyama noki? Jakobi azongisaki: — Ezali Yawe, Nzambe na yo, nde atindaki yango na nzela na ngai.
“How did you find an animal so fast, my son?” Isaac asked. “Because the Lord your God sent it my way,” Jacob replied.
21 Izaki alobaki na Jakobi: — Mwana na ngai, pusana pembeni na ngai mpo ete nasimba yo mpe nayeba soki ozali solo mwana na ngai Ezawu.
“Come over here so I can touch you, my son,” Isaac told Jacob, “so I can tell if you're really my son Esau or not.”
22 Jakobi akendeki pembeni na ye, bongo Izaki asimbaki ye mpe alobaki: — Mongongo ezali ya Jakobi, kasi maboko ezali ya Ezawu.
Jacob went over to his father Isaac, who touched him and said, “It's Jacob's voice but Esau's hands.”
23 Tata na ye ayebaki ye te, pamba te maboko ya Jakobi ezalaki na bapwale lokola ya Ezawu, ndeko na ye; boye apambolaki ye.
Isaac didn't realize it was really Jacob because his hands were hairy like his brother Esau's, so Isaac got ready to bless him.
24 Kasi liboso, atunaki ye: — Ozali penza mwana na ngai Ezawu? Jakobi azongisaki: — Iyo, ezali ngai solo.
“It's really you, my son Esau?” he asked again. “Yes, it's me,” Jacob replied.
25 Izaki alobaki: — Mwana na ngai, memela ngai nyama na yo mpo ete nalia mpe napambola yo. Jakobi amemelaki ye nyama, mpe Izaki aliaki. Amemelaki ye lisusu masanga ya vino mpe amelaki.
Then he said, “My son, bring me some of your wild game to eat, so that I may give you my blessing.” Jacob brought some for him to eat, as well as some wine for him to drink.
26 Sima, tata na ye, Izaki, alobaki na ye: — Mwana na ngai, yaka awa mpe pesa ngai beze.
Afterwards he said to Isaac, “Come here and kiss me, my son.”
27 Jakobi akendeki mpe apesaki ye beze. Tango Izaki ayokaki solo ya bilamba na ye, apambolaki ye na maloba oyo: « Ah! Solo ya mwana na ngai ezali lokola solo ya bilanga oyo Yawe apamboli.
So Jacob went over and kissed him, and Isaac could smell the clothes Jacob was wearing. So he went ahead with the blessing, saying to himself, “See—the smell of my son is like the smell of a field that the Lord has blessed.”
28 Tika ete Nzambe apesa yo mvula ya likolo mpe mabele ya bozwi; apesa yo mbuma ya ble mpe vino ebele penza!
“May God use the dew of heaven and fertile land to give you rich harvests of grain and new wine!
29 Tika ete bikolo esalela yo, bato bafukamela yo! Zala mokonzi ya bandeko na yo ya mibali, mpe tika ete bana mibali ya mama na yo bafukama liboso na yo! Tika ete moto oyo akolakela yo mabe alakelama mabe; tika ete moto oyo akopambola yo apambolama! »
May the people of different nations serve you and bow down to you. May you rule over your relatives, and may they bow down to you. May everyone who curses you be cursed, and may everyone who bless you be blessed.”
30 Tango Izaki asilisaki kopambola ye, Jakobi atikaki tata na ye; bongo ndeko na ye, Ezawu, azongaki wuta na bokila.
After Isaac finished blessing Jacob—in fact Jacob had just left his father—Esau returned from his hunting trip.
31 Ye mpe alambaki elubu mpe amemaki yango epai ya tata na ye. Alobaki na ye: — Tata na ngai, telema mpe lia nyama na ngai mpo ete opambola ngai.
He had also made some tasty food, and took it to his father. Esau said to Isaac, “Sit up, my father, and eat some of my wild game so you can bless me.”
32 Tata na ye, Izaki, atunaki ye: — Yo nani? Azongisaki: — Ngai Ezawu, mwana na yo ya liboso.
“Who are you?” Isaac asked him. “I'm your son, your firstborn son, Esau,” he replied.
33 Bongo Izaki alengaki makasi mpe alobaki: — Nani wana abomaki nyama mpe amemelaki ngai yango? Naliaki yango liboso ete yo oya, mpe napambolaki ye. Boye apambolami solo!
Isaac started to shake all over and asked, “So who was it who went hunting game and then brought it to me? I ate it all before you came back and I blessed him. His blessing will remain.”
34 Tango Ezawu ayokaki maloba ya tata na ye, atombolaki mongongo makasi mpe agangaki. Alobaki na tata na ye: — Ah! Tata na ngai, pambola ngai, pambola ngai mpe lokola!
When Esau heard his father's words, he cried out in great anger and bitterness, and pleaded with his father, “Please bless me too, my father!”
35 Izaki alobaki: — Ndeko na yo ayaki na mayele mabe, ayibi mapamboli na yo.
But Isaac replied, “You brother came and deceived me—he stole your blessing!”
36 Ezawu alobaki: — Mpo ete kombo na ye ezali « Jakobi, » yango wana akosi ngai mbala mibale? Ya liboso, azwaki boyaya na ngai, mpe tala sik’oyo azwi lisusu mapamboli na ngai! Bongo atunaki: — Boni, obombelaki ngai mapamboli te?
“Isn't he well named—Jacob the deceiver!” said Esau. “He's deceived me twice. First he took my birthright, and now he's stolen my blessing! Haven't you kept a blessing for me?”
37 Izaki azongiselaki Ezawu: — Tala, nakomisi ye nkolo na yo mpe napesi ye bandeko na ye nyonso lokola basali; napesi ye ble mpe vino. Mwana na ngai, nasala lisusu nini mpo na yo?
Isaac replied to Esau. “I have made him ruler over you, and have said that all his relatives will be his servants. I have declared that he will be well supplied with grain and new wine. So what is left that I can do for you, my son?”
38 Ezawu alobaki na tata na ye: — Tata na ngai, ozalaki kaka na lipamboli moko wana? Tata na ngai, pambola ngai mpe! Ezawu atombolaki mongongo na ye mpe alelaki makasi.
“Do you only have one blessing, my father?” Esau asked. “Please bless me too!” Then Esau began to cry very loudly.
39 Tata na ye, Izaki, alobaki na ye: — Okovanda mosika ya mabele oyo ebotaka malamu, mpe mosika ya mvula ya likolo.
Then his father Isaac declared, “Listen! You will live far away from fertile land, far from the dew of heaven that falls from above.
40 Okobika na nzela ya mopanga na yo mpe okosalela ndeko na yo ya mobali. Kasi tango okotambola bipai na bipai, okobuka ekangiseli oyo akotia yo na kingo.
You will make a living by using your sword, and you will be your brother's servant. But when you rebel, you will throw off his yoke from your neck.”
41 Ezawu ayinaki Jakobi likolo ya mapamboli oyo azwaki epai ya tata na ye mpe amilobelaki: « Etikali moke tata na ngai akufa; bongo nakoboma ndeko na ngai Jakobi. »
From then on Esau hated Jacob because of his father's blessing. Esau said to himself, “Soon the time will come when I'll mourn my father's death. Then I'll kill my brother Jacob!”
42 Tango Rebeka asosolaki makanisi ya Ezawu, mwana na ye ya liboso, abengaki Jakobi, mwana na ye ya suka, mpe alobaki na ye: « Tala, Ezawu, ndeko na yo, azali koluka koboma yo.
However, Rebekah found out what Esau was saying, so she sent for Jacob. “Look,” she told him, “your brother Esau is making himself feel better by making plans to kill you.
43 Mwana na ngai, yoka ngai sik’oyo mpe sala makambo oyo nazali koyebisa yo: ‹ Longwa awa mpe kima na mboka Arani, epai ya ndeko na ngai Labani.
So, my son, listen carefully to what I tell you. Leave immediately and go to my brother Laban in Haram.
44 Vanda mwa mikolo epai na ye kino kanda ya ndeko na yo ekosila.
Stay with him for a while until your brother's anger cools down.
45 Tango kanda na ye ekosila mpe akobosana makambo oyo osalaki ye, nakotindela yo maloba mpo ete olongwa kuna mpe ozonga. Mpo na nini nazanga bino mibale mokolo moko? › »
Once he's cooled down and forgets what you did to him, I'll send for you to come back. Why should I lose both of you in a single day?”
46 Rebeka akendeki koyebisa Izaki: « Nalembi mokili likolo ya basi oyo ya mokili ya Iti. Soki Jakobi abali mwasi kati na bana basi ya mokili oyo, tina nazala na bomoi ekozala lisusu te. »
Then Rebekah went and told Isaac, “I'm so sick of these Hittite women—they're ruining my life! If Jacob also marries a Hittite woman like them, one of the local people, I'd rather die!”

< Ebandeli 27 >