< Ebandeli 26 >

1 Wana nzala makasi ekotaki lisusu na mokili lokola na tango ya Abrayami, Izaki akendeki na Gerari epai ya Abimeleki, mokonzi ya bato ya Filisitia.
Some time later there was a severe (famine/scarcity of food) there. That was different from the famine that occurred when Abraham was alive. So Isaac went [southeast] to Gerar [town, to talk] to Abimelech, the king of the Philistine people-group. [What happened was this: Isaac considered going to Egypt],
2 Boye Yawe abimelaki ye mpe ayebisaki ye: — Kokende na Ejipito te! Vanda na mokili oyo nakolakisa yo.
but Yahweh appeared to him and said, “Do not go down to Egypt! Live in the land where I will tell you to go!
3 Vanda kati na mokili oyo; nakozala na yo elongo mpe nakopambola yo, pamba te nakopesa mabele oyo nyonso epai na yo mpe epai ya bana na yo; nakokokisa ndayi oyo nalapaki epai ya Abrayami, tata na yo.
Stay in this land for a while, and I will help you and bless you, because it is to you and your descendants that I will give all these lands, and I will do what I solemnly promised to your father.
4 Nakokomisa bakitani na yo ebele lokola minzoto ya likolo mpe nakopesa bango mabele oyo nyonso. Boye mpo na bakitani na yo, bikolo nyonso ya mokili ekomipambola.
I will cause your descendants to be as numerous as the stars in the sky. I will give to your descendants all these lands, and I will cause your descendants to be a blessing to the people of [MTY] all nations on the earth.
5 Nakosala yango mpo ete Abrayami atosaki Ngai, abatelaki bikateli na Ngai, mitindo na Ngai mpe mibeko na Ngai.
I will do that because your father Abraham obeyed me. He obeyed everything that I told him to do, everything that I declared and all the laws that I gave him.” So Isaac [went and asked King Abimelech if he would permit him to live in the Gerar area. The king said, “Okay,”]
6 Boye, Izaki avandaki na Gerari.
[so Isaac] stayed there [along with his wife and sons].
7 Tango bato ya esika wana batunaki ye na tina na mwasi na ye, azongisaki: — Azali ndeko na ngai ya mwasi. Azalaki koloba te ete azali mwasi na ye mpo ete azalaki kobanga ete bato ya mboka baboma ye mpo na Rebeka, pamba te azalaki penza kitoko.
When the men in Gerar [town] asked who Rebekah was, Isaac said, “She is my sister.” He said that because he was afraid to say, “She is my wife.” He thought, “Rebekah is very beautiful, so they will want her. [If I say that she is my sister, they know they will have to negotiate about a bride price because I am her older brother; but if I say that she is my wife, no negotiation will be possible]. They will just kill me to get her.”
8 Tango awumelaki na mboka yango, Abimeleki, mokonzi ya bato ya Filisitia, atalaki wuta na lininisa mpe amonaki Izaki kosakana na mwasi na ye Rebeka.
When Isaac had been there a long time, one day Abimelech, the king of the Philistine people-group, looked down from a window [in his palace] and was surprised to see Isaac caressing his wife Rebekah.
9 Bongo Abimeleki abengisaki ye mpe alobaki na ye: — Rebeka azali solo mwasi na yo. Mpo na nini olobaki: « Azali ndeko na ngai ya mwasi? » Izaki azongisaki: — Kati na ngai, nazalaki koloba ete nakokaki kokufa mpo na ye.
So Abimelech summoned Isaac and said to him, “Now I realize that she is really your wife! So why did you say, ‘She is my sister’?” Isaac replied to him, “I said that because I thought that someone here might kill me to get her.”
10 Abimeleki alobaki lisusu: — Nasali bino likambo nini? Etikalaki kaka moke ete mobali moko kati na bato na ngai akota mpe asangisa nzoto na mwasi na yo. Boye, olingaki komemisa biso ngambo.
Abimelech said, “(You should not have done this to us!/Why did you do this?) [RHQ] One of our people might have (had sex with/slept with) [EUP] your wife, and you would have caused us to be guilty of a great sin!”
11 Abimeleki apesaki mitindo na bato nyonso: — Moto nyonso oyo akosala mabe na moto oyo mpe na mwasi na ye, akokufa.
Then Abimelech commanded all his people, saying, “Do not harm/molest this man or his wife! Anyone who does that will surely be executed!”
12 Izaki alonaki mbuma na mabele oyo mpe abukaki monkama na monkama na oyo alonaki, pamba te Yawe apambolaki ye.
Isaac planted grain in that land that year, and he harvested a very large crop, because Yahweh blessed him.
13 Izaki akomaki mozwi, mpe bozwi na ye ekobaki kaka komata kino akomaki moto na bozwi ebele.
Isaac continued to acquire more and more possessions, until finally he became very wealthy.
14 Bato ya Filisitia bakomaki koyokela ye likunya, pamba te azalaki na bameme ebele, bantaba ebele, bangombe ebele mpe basali ebele.
He had large herds of sheep and goats and cattle, and many slaves. Because of that, the Philistine people envied him.
15 Boye bato ya Filisitia bakundaki mabulu nyonso oyo basali ya Abrayami, tata na ye, batimolaki tango azalaki nanu na bomoi mpe batondisaki yango na mabele.
So all the wells that the servants of his father Abraham had dug during the time when he was alive, the people filled up with dirt.
16 Bongo Abimeleki alobaki na Izaki: — Kende mosika na biso, pamba te okomi na nguya mingi koleka biso.
Then Abimelech said to Isaac, “You people have become more numerous than we are, so I want you to get out of our area.”
17 Izaki alongwaki wana mpe akendeki kotonga ndako na ye ya kapo na lubwaku ya Gerari epai wapi avandaki.
So Isaac [and his family] moved from there. They set up their tents in Gerar Valley [and started to live there].
18 Atimolaki lisusu mabulu ya mayi oyo batimolaki na tango ya tata na ye Abrayami. Mabulu yango ezalaki bato ya Filisitia nde bakundaki yango sima na kufa ya Abrayami, mpe Izaki abengaki yango kaka na bakombo oyo tata na ye Abrayami apesaka yango.
There were several wells in that area that had been dug when Isaac’s father Abraham was living, but Philistine people had filled them up [with dirt] after Abraham died. Now Isaac and his servants removed the dirt, and Isaac gave the wells the same names that his father had given to them.
19 Basali ya Izaki batimolaki na lubwaku mpe bamonaki kuna libulu ya mayi ya peto.
Isaac’s servants dug in the valley and discovered a well of fresh water.
20 Babateli bibwele ya Gerari baswanisaki babateli bibwele ya Izaki mpe balobaki na bango: « Mayi oyo ezali ya biso. » Izaki apesaki libulu yango kombo « Eseki, » pamba te baswanisaki ye na tina na yango.
But other men who lived in Gerar [Valley] who took care of their animals argued/quarreled with the men who took care of Isaac’s animals, and said, “The water in this well is ours!” So Isaac named the well Esek, which means ‘dispute’, because they disputed about who owned it.
21 Batimolaki libulu mosusu, kasi baswanisaki ye lisusu na tina na yango, mpe apesaki yango kombo « Sitina. »
Then Isaac’s servants dug another well, but they quarreled about who owned that one also. So Isaac named it Sitnah, [which means ‘opposition]’.
22 Alongwaki wana mpe akendeki kotimola libulu mosusu; mpe moto moko te aswanisaki ye na tina na yango. Yango wana apesaki yango kombo « Reoboti, » pamba te alobaki: « Sik’oyo, Yawe apesi biso esika monene, mpe tokofuluka na mokili oyo. »
They moved on from there and dug another well, but this time no one quarreled about who owned it. So Isaac named it Rehoboth, [which means ‘uninhabited place’], saying, “Yahweh has given us an uninhabited place to live in, a place that is not wanted by other people, and we will become very prosperous here.”
23 Kolongwa wana, akendeki na Beri-Sheba.
From there Isaac went up to Beersheba.
24 Na butu ya mokolo oyo Izaki akomaki na Beri-Sheba, Yawe abimelaki ye mpe alobaki na ye: « Nazali Nzambe ya Abrayami, tata na yo; kobanga te, nazali elongo na yo. Mpo na Abrayami, mosali na Ngai, nakopambola yo mpe nakokomisa bakitani na yo ebele. »
The first night that he was there, Yahweh appeared to him and said, “I am God, whom your father Abraham worshiped. Do not be afraid of anything. I will help you and bless you, and because of what I promised my servant Abraham, I will greatly increase the number of your descendants.”
25 Kaka na esika yango, Izaki atongaki etumbelo, abelelaki Kombo ya Yawe, atongaki ndako na ye ya kapo. Basali na ye batimolaki libulu mosusu ya mayi.
So Isaac built a stone altar there [and offered a sacrifice] to worship Yahweh. He [and his servants] set up their tents there, and his servants started to dig a well.
26 Wuta na Gerari, Abimeleki elongo na Awuzati, mopesi toli na ye, mpe Pikoli, mokonzi ya mampinga na ye, bayaki kokutana na Izaki.
[While they were digging the well], King Abimelech came to Isaac from Gerar, along with Ahuzzath, his advisor, and Phicol, the commander of his army.
27 Izaki atunaki bango: — Mpo na nini boyei epai na ngai, bino bato oyo bolingaka ngai te mpe bobenganaki ngai epai na bino?
Isaac asked them, “You (acted in a hostile way toward me/treated me like an enemy) before, and sent me away. So why have you come to me now?”
28 Bazongiselaki ye: — Tomoni ya solo ete Yawe azali elongo na yo, yango wana tolobaki: « Tika ete tosala boyokani kati na biso mpe yo na nzela ya ndayi.
One of them answered, “We have seen that Yahweh helps you. So we said to each other, ‘We should have an agreement between us and you. We should make a peace treaty with you,
29 Lapa ndayi ete okosala biso mabe te ndenge biso mpe tosalaki yo mabe te; tosalelaki yo kaka bolamu mpe totikaki yo kokende na kimia. Sik’oyo, Yawe apamboli yo. »
stating that you will not harm us, in the same way that we did not molest [EUP] you.’ We always treated you well and sent you away peacefully. And now Yahweh is blessing you.”
30 Izaki asalelaki bango feti monene; baliaki mpe bamelaki.
So Isaac made a feast for them, and they all ate and drank.
31 Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, balapanaki ndayi; bongo Izaki abimisaki bango na nzela mpe atikaki bango kokende na kimia.
Early the next morning they all (swore/solemnly promised) each other that they would do what they had promised. Then Isaac sent them home peacefully.
32 Kaka na mokolo yango, basali ya Izaki bayaki kopesa ye sango ete bamoni mayi na libulu oyo bazalaki kotimola.
That day Isaac’s servants came to him and told him about the well that they had finished digging. They said, “We found water in the well!”
33 Izaki apesaki libulu yango kombo « Sheba. » Yango wana engumba yango ebengami kino lelo Beri-Sheba.
Isaac named the well Shibah, [which sounds like the Hebrew word that means ‘oath’]. To the present time the town there has the name Beersheba [which means ‘Friendship Agreement Well’].
34 Tango Ezawu akokisaki mibu tuku minei ya mbotama, abalaki Jiditi, mwana mwasi ya Beri, moto ya mokili ya Iti, mpe Basimati, mwana mwasi ya Eloni, moto ya mokili ya Iti.
When Esau was 40 years old, he married Judith, the daughter of Beeri, and Basemath, the daughter of Elon. Both of those women were descendants of Heth, [not from Isaac’s clan].
35 Basi yango bazalaki koyokisa Izaki mpe Rebeka pasi na motema.
Esau’s two wives made life miserable for Isaac and Rebekah.

< Ebandeli 26 >