< Ebandeli 25 >

1 Abrayami abalaki mwasi mosusu, kombo na ye « Ketura. »
Abraham tog åter ena hustru, hon het Ketura.
2 Ketura abotelaki ye: Zimirani, Yokishani, Medani, Madiani, Ishibaki mpe Shuwa.
Hon födde honom Simran och Jacksan, Medan och Midian, Jisbak och Suah.
3 Yokishani azalaki tata ya Saba mpe Dedani. Tala bato oyo bazalaki bakitani ya Dedani: Bato ya Ashuri, ya Letushi mpe ya Lewumi.
Men Jacksan födde Seba och Dedan. Dedans barn voro Assurim, Letusim och Leummim.
4 Madiani azalaki tata ya Efa, ya Eferi, ya Enoki, ya Abida mpe ya Elida. Bato oyo nyonso bazalaki bakitani ya Ketura.
Midians barn voro Epha, Epher, Hanoch, Abida och Eldaa; desse äro alle Ketura barn.
5 Abrayami atikaki biloko na ye nyonso na maboko ya Izaki.
Men Abraham gaf allt sitt gods Isaac.
6 Kasi wana Abrayami azalaki nanu na bomoi, apesaki bakado epai ya bana mibali ya bamakangu na ye mpe atindaki bango na mokili ya este, mosika ya mwana na ye ya mobali Izaki.
Men de barnen, som han hade af frillorna, gaf han skänker, och lät dem fara ifrå sin son Isaac, medan han än lefde, öster ut i österlanden.
7 Abrayami awumelaki na bomoi mibu nkama moko na tuku sambo na mitano.
Men Abrahams ålder, som han lefde, var hundrade fem och sjutio år.
8 Bongo Abrayami akataki motema mpe akufaki. Sima na ye kotonda mikolo mpe kokoma mobange makasi, akendeki kokutana na bakoko na ye.
Och blef sjuk, och dödde i en rolig ålder, då han af ålder och lefvande mätter var; och vardt samlad till sitt folk.
9 Bana na ye ya mibali, Izaki mpe Isimaeli, bakundaki ye na lilita ya mabanga ya Makipela pene ya Mamire, kati na elanga ya Efroni, mwana mobali ya Tsoari, moto ya Iti.
Och honom begrofvo hans söner, Isaac och Ismael, i den dubbelkulone, på Ephrons åker, Zoars Hetheens sons, som ligger emot Mamre;
10 Abrayami asombaki elanga yango epai ya bato ya Iti. Ezalaki kuna nde bakundaki mwasi na ye Sara.
I den markene, som Abraham köpt hade af Hets barnom: Der är Abraham begrafven med Sara sine hustru.
11 Sima na kufa ya Abrayami, Nzambe apambolaki Izaki, mwana mobali ya Abrayami. Izaki azalaki kovanda pene ya Lakai-Royi.
Och efter Abrahams död välsignade Gud hans son Isaac; och han bodde vid den brunnen, som kallades dens lefvandes och seendes.
12 Tala molongo ya bakitani ya Isimaeli, mwana mobali ya Abrayami, oyo Agari, moto ya Ejipito mpe mwasi mosali ya Sara, abotelaki Abrayami.
Detta är Ismaels Abrahams sons slägt, som Hagar, Saras tjensteqvinna af Egypten, födde honom.
13 Tala bakombo ya bana mibali ya Isimaeli kolanda ndenge babotamela: Nebayoti, mwana mobali ya liboso ya Isimaeli; Kedari, Adibeli, Mibisami,
Och detta är Ismaels barns namn, der deras slägte hafva namn af: Ismaels förste son Nebajoth, Kedar, Adbeel, Mibsam,
14 Mishima, Duma, Masa,
Misma, Duma, Massa,
15 Adadi, Tema, Yeturi, Nafishi mpe Kedima.
Hadar, Thema, Jethur, Naphis och Kedma.
16 Bango nde bazalaki bana mibali zomi na mibale ya Isimaeli. Moko na moko azalaki mokambi ya libota, mpe apesaki kombo na ye na mboka na ye mpe na molako na ye.
Desse äro Ismaels barn med deras namn, i deras byar och städer, tolf förstar.
17 Isimaeli awumelaki na bomoi mibu nkama moko na tuku misato na sambo. Akataki motema mpe akufaki; akendeki kokutana na bakoko na ye.
Och detta är Ismaels ålder, hundrade och sju och tretio år; och han vardt sjuk och dödde, och vardt samkad intill sitt folk.
18 Bakitani na ye bazalaki kovanda na mokili oyo ezalaki kati na Avila mpe Shuri, pene ya Ejipito, na nzela oyo ekenda na Asiri. Bazalaki tango nyonso kovanda lokola banguna ya bandeko na bango nyonso.
Men han bodde ifrå Hevila in till Zur emot Egypten, när man går till Assyrien; och satte sig emot alla sina bröder.
19 Tala libota ya Izaki, mwana mobali ya Abrayami. Abrayami azalaki tata ya Izaki,
Detta är Isaacs Abrahams sons slägte: Abraham födde Isaac.
20 mpe Izaki azalaki na mibu tuku minei ya mbotama tango abalaki Rebeka, mwana mwasi ya Betweli, moto ya Arami ya Padani-Arami, mpe ndeko mwasi ya Labani, moto ya Arami.
Men Isaac var fyratio år gammal, då han tog Rebecka till hustru, Bethuels Syrens af Mesopotamien dotter, Labans Syrens syster.
21 Izaki abondelaki Yawe mpo na Rebeka, mwasi na ye, oyo azalaki ekomba. Yawe ayanolaki libondeli na ye, mpe Rebeka akomaki na zemi.
Men Isaac bad Herran för sine hustru, ty hon var ofruktsam; och Herren hörde honom, och Rebecka hans hustru vardt hafvande.
22 Kati na libumu na ye, bana bazalaki kowelana. Alobaki: « Likambo nini oyo ekomeli ngai? » Boye, akendeki kotuna Yawe.
Och barnen stötte sig med hvarannan i hennes lif. Då sade hon: Efter mig skulle så gå, hvi är jag då vorden hafvandes? Och gick bort till att fråga Herran.
23 Yawe alobaki na ye: « Bikolo mibale ezali kati na libumu na yo, mpe mabota mibale ekabwana ekobima na libumu na yo; ekolo moko ekoleka ekolo mosusu na makasi, mpe kulutu akosalela leki. »
Och Herran sade till henne: Tu folk äro i dino lifve, och tveggehanda folk skola skiljas utaf dino lifve: Och det ena folket skall öfvervinna det andra, och den större skall tjena den mindre.
24 Wana tango na ye ya kobota ekokaki, azalaki na mapasa mibale kati na libumu na ye.
Då nu tiden kom att hon föda skulle, si, då voro tvillingar i hennes lifve.
25 Lipasa ya liboso oyo abimaki azalaki motane mpe nzoto na ye mobimba ezalaki etonda na bapwale lokola elamba ya bapwale; yango wana babengaki ye « Ezawu. »
Den förste, som utkom, var röd och luden som ett skin: Och de kallade honom Esau.
26 Sima na yango, ndeko na ye mpe abimaki, loboko na ye ekanga litindi ya Ezawu; yango wana bapesaki ye kombo « Jakobi. » Izaki azalaki na mibu tuku motoba ya mbotama tango Rebeka abotaki.
Straxt derefter kom hans broder ut, han höll med sine hand i Esau fotablad, och de kallade honom Jacob: Sextio år gammal var Isaac, då de vordo födde.
27 Bana mibali yango bakolaki. Ezawu akomaki mobomi makasi ya banyama mpe azalaki kolekisa tango mingi na zamba; Jakobi azalaki moto ya kimia, azalaki kosepela kovanda na ndako.
Och då drängarne vordo store, vardt Esau en jägare och en åkerman; men Jacob en from man, och bodde i tjäll.
28 Izaki abandaki kosepela mingi na misuni, yango wana alingaki mingi Ezawu; mpe Rebeka alingaki mingi Jakobi.
Och Isaac hade Esau kär, ty han plägade äta af hans vede; men Rebecka hade Jacob kär.
29 Mokolo moko, wana Jakobi azalaki kolamba elubu, Ezawu oyo awutaki na bilanga ayaki na kolemba.
Och Jacob kokade en rätt; då kom Esau af markene, och var trötter;
30 Ezawu alobaki na Jakobi: — Nalembi makasi; tika ngai nalia elubu oyo, elubu oyo kaka. Yango wana bazalaki mpe kobenga ye Edomi.
Och sade till Jacob: Gif mig äta af denna röda rättenom, ty jag är trötter: Deraf heter han Edom.
31 Jakobi azongisaki: — Tekela ngai liboso boyaya na yo.
Men Jacob sade: Sälj mig i dag din förstfödslorätt.
32 Ezawu azongisaki: — Tala, nakokufa na nzala. Boyaya na ngai ekopesa ngai nini?
Esau svarade: Si, jag måste dock dö: Hvad varder mig den förstfödslorätten nyttig?
33 Kasi Jakobi alobaki: — Lapa liboso ndayi. Ezawu alapaki ndayi epai ya Jakobi; mpe na nzela wana, atekaki boyaya na ye epai ya Jakobi.
Jacob sade: Så svär mig i dag. Och han svor honom: Och sålde så Jacob sin förstfödslorätt.
34 Jakobi apesaki Ezawu lipa mpe elubu ya misili. Ezawu aliaki mpe amelaki, bongo atelemaki mpe akendeki. Ezali ndenge wana nde Ezawu atiolaki boyaya na ye.
Då gaf Jacob honom bröd och den grynvällingen, och han åt och drack, och stod upp, och gick dädan. Och så föraktade Esau sin förstfödslorätt.

< Ebandeli 25 >