< Ebandeli 24 >
1 Abrayami akomaki mobange mpe mibu ya bomoi na ye epusanaki. Yawe apambolaki ye na makambo nyonso.
Abraham pak již byl starý a sešlého věku; a Hospodin požehnal mu ve všech věcech.
2 Abrayami alobaki na mosali na ye, oyo awumelaki mingi na ndako na ye mpe azalaki kokamba biloko na ye nyonso: — Tia loboko na yo na se ya mopende na ngai
Tedy řekl Abraham služebníku svému staršímu v domě svém, kterýž spravoval všecky věci jeho: Vlož nyní ruku svou pod bedro mé,
3 mpe lapa ndayi na Kombo na Yawe, Nzambe oyo asala likolo mpe mokili, ete okozwela te mwana na ngai ya mobali mwasi kati na bana basi ya Kanana, ba-oyo nazali kovanda kati na bango.
Abych tě zavázal přísahou skrze Hospodina, Boha nebe a Boha země, abys nebral manželky synu mému ze dcer Kananejských, mezi nimiž já bydlím.
4 Kasi okokende na mokili na ngai mpe na libota na ngai, mpe okozwa mwasi moko mpo na Izaki, mwana na ngai ya mobali.
Ale půjdeš do země mé a příbuznosti mé; a odtud vezmeš manželku synu mému Izákovi.
5 Mosali atunaki ye: — Tango mosusu mwasi yango akolinga na ye te kolanda ngai na mokili oyo. Boni, nakoki na ngai kozongisa mwana na yo ya mobali na mokili epai wapi owuta?
I řekl jemu služebník ten: Kdyby pak nechtěla žena ta se mnou jíti do země této, mám-li zase uvésti syna tvého do země, z níž jsi vyšel?
6 Abrayami alobaki: — Keba na yo! Kozongisa mwana na ngai kuna te.
Kterýžto odpověděl: Hleď, abys zase neuvodil syna mého tam.
7 Yawe, Nzambe ya likolo, oyo abimisaki ngai na ndako ya tata na ngai mpe na mokili epai wapi nabotama, oyo alobaki na ngai mpe alakaki ngai na nzela ya ndayi ete akopesa mokili oyo na bakitani na ngai, akotindela yo anjelu na Ye mpo ete azala liboso na yo mpe mpo ete okoka koyela mwana na ngai ya mobali mwasi ya mokili wana.
Hospodin Bůh nebe, kterýž vzal mne z domu otce mého a z vlasti mé, a mluvil mi, a kterýž mi přisáhl, řka: Semeni tvému dám zemi tuto, onť pošle anděla svého před tebou, a vezmeš manželku synu mému odtud.
8 Soki mwasi yango aboyi na ye kolanda yo, wana okangolami na ndayi oyo nazali kosenga yo kolapa. Kasi komeka kozongisa mwana na ngai ya mobali kuna te.
Jestliže by pak žena ta nechtěla jíti s tebou, svoboden budeš od této přísahy mé; toliko syna mého neuvoď tam zase.
9 Boye, mosali atiaki loboko na se ya mopende ya Abrayami, nkolo na ye, alapaki ndayi ya kosala makambo yango.
Tedy vložil služebník ten ruku svou pod bedro Abrahama, pána svého, a přisáhl jemu na tu řeč.
10 Bongo mosali azwaki bashamo zomi kati na bashamo ya nkolo na ye elongo na biloko ya ndenge na ndenge oyo eleki kitoko; akendeki na Arami mpe azwaki nzela ya engumba ya Naori.
A vzal služebník ten deset velbloudů z velbloudů pána svého, aby se bral; (nebo měl všecken statek pána svého v rukou svých.) I vstav, bral se k Aram Naharaim do města Náchor.
11 Tango akomaki kuna, avandisaki bashamo pembeni ya libulu ya mayi, na libanda ya engumba. Ezalaki na pokwa, na tango oyo basi babimaka mpo na kotoka mayi.
A zastavil se s velbloudy před městem, u studnice vody k večerou, času toho, když vycházejí vážiti vody.
12 Abondelaki: « Eh Yawe, Nzambe ya Abrayami, nkolo na ngai, longisa ngai na mokolo ya lelo mpe lakisa bolamu na Yo epai ya Abrayami, nkolo na ngai.
A řekl: Hospodine, Bože pána mého Abrahama, dejž, prosím, ať se potká se mnou dnes to, čehož hledám; a učiň milosrdenství se pánem mým Abrahamem.
13 Tala, natelemi pene ya libulu ya mayi mpe bana basi ya engumba bazali kobima mpo na koya kotoka mayi.
Aj, já stojím u studnice vody, a dcery mužů města tohoto vycházejí, aby vážily vodu.
14 Tika ete mwana mwasi oyo nakoloba na ye: ‹ Nabondeli yo, tengemisa mbeki na yo mpo ete namela mayi, › mpe ye akozongisela ngai: ‹ Mela na yo, mpe nakomelisa lisusu bashamo na yo, › azala mwasi oyo oponi mpo na Izaki, mosali na Yo. Na nzela oyo, nakoyeba ete olakisi bolamu na Yo epai ya nkolo na ngai. »
Děvečka tedy, kteréž bych řekl: Nachyl medle věderce svého, ať se napiji, a ona by řekla: Pí, také i velbloudy tvé napojím, ta aby byla, kterouž jsi způsobil služebníku svému Izákovi; a po tomť poznám, že jsi milosrdenství učinil se pánem mým.
15 Liboso ete asilisa kosambela, Rebeka abimaki na mbeki na ye na lipeka. Azalaki mwana mwasi ya Betweli, mwana mobali ya Milika oyo azalaki mwasi ya Naori, ndeko ya Abrayami.
I stalo se prvé, než on přestal mluviti, aj, Rebeka, kteráž se narodila Bathuelovi, synu Melchy, manželky Náchora bratra Abrahamova, vycházela, a věderce její bylo na rameni jejím.
16 Elenge mwasi azalaki kitoko penza, ayebaki nanu nzoto ya mibali te; ata mobali moko te asangisaki na ye nzoto. Akitaki na libulu ya mayi, atondisaki mbeki na ye mpe amataki.
A byla děvečka na pohledění velmi krásná, panna, a muž nepoznal jí; kterážto sešla k studnici té, a naplnivši věderce své, šla vzhůru.
17 Mosali akimaki mbangu mpo na kokutana na ye mpe alobaki: — Nabondeli yo, tika ngai namela ndambo ya mayi na mbeki na yo.
Tedy běžel služebník ten proti ní, a řekl: Dej mi píti, prosím, maličko vody z věderce svého.
18 Mwana mwasi alobaki: — Mela na yo, nkolo na ngai! Akitisaki mbeki mbangu na maboko na ye mpe apesaki ye mpo ete amela.
I řekla: Napí se, pane můj. A rychle složila věderce své na ruku svou a dala mu píti.
19 Sima na kopesa ye mayi ya komela, alobaki: — Nakotoka lisusu mayi mpo na bashamo na yo nyonso kino ekosilisa komela.
A davši mu píti, řekla: Také velbloudům tvým navážím, dokudž se nenapijí.
20 Asalaki na lombangu mpe asopaki mayi nyonso ya mbeki na ye na esika oyo banyama emelelaka mayi; akimaki lisusu na libulu mpe atokaki mayi mpo na bashamo na ye nyonso.
Tedy rychle vylila z věderce svého do koryta, a běžela ještě k studnici, aby vážila vodu; a vážila všechněm velbloudům jeho.
21 Mosali azalaki kotala ye na bokebi, alobaki eloko moko te mpo na koyeba soki Yawe alongisi mobembo na ye to te.
Muž pak ten s užasnutím divil se jí mlče, rozjímaje, aby zvěděl, zdařil-li Hospodin cestu jeho, čili nic.
22 Tango bashamo esilisaki komela mayi, mosali azwaki lopete moko ya wolo, oyo batiaka na zolo mpe ezalaki ya bagrame motoba. Azwaki mpe basheneti mibale ya wolo: moko na moko ezalaki na bagrame koleka nkama moko.
I stalo se, když přestali píti velbloudové, vyňav muž náušnici zlatou, ztíží půl lotu, a dvě náramnice, dal na ruce její, kteréž vážily deset lotů zlata.
23 Atunaki ye: — Ozali mwana mwasi ya nani? Nabondeli yo, yebisa ngai. Boni, esika ekoki komonana na ndako ya tata na yo mpo na biso mpo ete tolekisa kuna butu?
A řekl: Čí jsi dcera? Pověz mi, prosím, jest-li v domě otce tvého nám místo, kdež bychom přes noc zůstali?
24 Azongiselaki ye: — Nazali mwana ya Betweli, mwana mobali ya Milika mpe Naori.
Jemužto odpověděla: Dcera jsem Bathuele, syna Melchy, kteréhož porodila Náchorovi.
25 Abakisaki: — Tozali na matiti mpe biloko ebele ya koleisa bibwele; tozali mpe na esika mpo na yo mpo ete olekisa butu.
Řekla ještě k němu: Slámy také a potravy hojně u nás jest, ano i místo, kdež byste přes noc zůstali.
26 Boye, mosali akitisaki moto na ye na se mpe agumbamelaki Yawe.
Tedy skloniv hlavu, poklonu učinil Hospodinu.
27 Alobaki: « Tika ete Yawe, Nzambe ya nkolo na ngai, Abrayami, akumisama; Ye oyo atiki te kolakisa bolamu na Ye mpe boyengebene na Ye epai ya nkolo na ngai, pamba te atambolisi ngai na mobembo kino na ndako ya bandeko ya nkolo na ngai! »
A řekl: Požehnaný Hospodin, Bůh pána mého Abrahama, kterýž neodjal milosrdenství svého a pravdy své od pána mého, mne také na cestě vedl Hospodin k domu bratří pána mého.
28 Elenge mwasi akimaki mbangu na ndako mpe alobaki epai ya mama na ye makambo oyo elekaki.
I běžela děvečka, a oznámila v domě matky své tak, jakž se stalo.
29 Rebeka azalaki na ndeko moko ya mobali oyo kombo na ye ezalaki « Labani. » Ye mpe abimaki mbangu mpo na kokutana na mosali ya Abrayami kuna na libulu ya mayi.
A měla Rebeka bratra, jménem Lábana; ten běžel k muži tomu ven k studnici.
30 Tango kaka amonaki lopete oyo batiaki na zolo mpe basheneti na maboko ya ndeko na ye ya mwasi, mpe ayokaki Rebeka koloba makambo oyo mosali alobaki mpo na ye, akendeki epai ya mosali mpo ete amonaki ye ya kotelema pene ya bashamo, pembeni ya libulu ya mayi.
Nebo uzřev náušnici a náramnice na rukou sestry své, a slyšev slova Rebeky sestry své, ana praví: Tak mluvil ke mně člověk ten, přišel k muži, a on stál při velbloudích u studnice.
31 Alobaki: « Yaka na ndako na biso, yo oyo opambolama na Yawe. Mpo na nini otelemi awa na libanda? Nabongisi ndako mpe esika mpo na bashamo. »
Jemuž řekl: Vejdi, požehnaný Hospodinův. Proč bys stál vně, kdyžť jsem připravil dům a místo velbloudům?
32 Boye mosali ya Abrayami akotaki na ndako ya Labani, mpe bakitisaki biloko oyo ezalaki na likolo ya bashamo. Bamemaki bashamo na ye na esika oyo ezalaki na matiti mpe bilei ya banyama. Bamemaki mpe mayi mpo na ye mpe mpo na bato oyo bazalaki elongo na ye mpo ete basukola makolo.
Tedy všel muž ten do domu, a odsedlal velbloudy, a dal Lában slámy a potravy velbloudům, i vody k umytí noh jeho a noh mužů těch, kteří s ním byli.
33 Batielaki ye lisusu biloko ya kolia, kasi alobaki: — Nakoki kolia te kino nakosilisa koloba makambo nyonso oyo nazali na yango. Labani alobaki na ye: — Yebisa biso makambo yango.
A položil předeň chléb, aby jedl. Ale on řekl: Nebudu jísti, dokudž nevypravím řečí svých. I řekl Lában: Mluv.
34 Azongisaki: — Nazali mosali ya Abrayami.
Tedy řekl: Služebník Abrahamův jsem já.
35 Yawe apambola mingi nkolo na ngai mpe akomisa ye mozwi: apesa ye bameme, bantaba, bangombe, palata mpe wolo, basali ya mibali mpe ya basi, ba-ane mpe bashamo.
A Hospodin požehnal pánu mému velice, tak že veliký učiněn jest; nebo dal mu ovce a voly, stříbro a zlato, služebníky a děvky, velbloudy a osly.
36 Sara, mwasi ya nkolo na ngai, na kimobange na ye, abotelaki nkolo na ngai mwana mobali, mpe nkolo na ngai apesaki biloko na ye nyonso epai ya mwana yango.
A porodila Sára, manželka pána mého, pánu mému v starosti své syna, jemuž dal, cožkoli má.
37 Nzokande, nkolo na ngai alapisaki ngai ndayi na maloba oyo: « Kati na bana basi ya Kanana epai wapi nazali kovanda, okozwela mwana na ngai mwasi awa te.
I zavázal mne přísahou pán můj, řka: Nevezmeš manželky synu mému ze dcer Kananejských, v jejichž zemi já bydlím.
38 Kasi okokende na libota ya tata na ngai mpe na ekolo na ngai, kuna nde okozwa mwasi mpo na mwana na ngai ya mobali. »
Ale k domu otce mého půjdeš, a k rodině mé, a odtud vezmeš manželku synu mému.
39 Nazongiselaki nkolo na ngai: « Tango mosusu, mwasi yango akolinga na ye kolanda ngai te. »
A když jsem řekl pánu svému: Snad nepůjde žena ta se mnou?
40 Mpe ye alobaki na ngai lisusu: « Yawe oyo natambolaki liboso na Ye akotinda anjelu na Ye elongo na yo mpe akolongisa mobembo na yo mpo ete ozwela mwana na ngai ya mobali mwasi oyo akowuta na ekolo na ngai mpe na libota ya tata na ngai.
Odpověděl mi: Hospodin, před jehož oblíčejem ustavičně jsem chodil, pošle anděla svého s tebou, a šťastnou způsobí cestu tvou, a vezmeš manželku synu mému z rodiny mé, a z domu otce mého.
41 Boye tango okokende na ekolo na ngai, soki baboyi kopesa yo ye, okozala na ngambo te na ndayi oyo nalapisi yo. »
A budeš svoboden od přísahy mé, když bys přišel k rodině mé; a jestliže by nedali tobě, budeš prost od přísahy mé.
42 Nzokande lelo, tango nakomaki na libulu ya mayi, nasambelaki: « Oh Yawe, Nzambe ya nkolo na ngai, Abrayami, nabondeli Yo, longisa mobembo na ngai.
Protož dnes přišed k studnici, řekl jsem: Hospodine, Bože pána mého Abrahama, jestliže ty nyní šťastně spravuješ cestu mou, po níž já jdu,
43 Tala ngai, natelemi pembeni ya libulu oyo ya mayi, elenge mwasi oyo akobima mpo na koya kotoka mayi mpe oyo nakoloba na ye: ‹ Nabondeli yo, nakoki kozwa ndambo ya mayi ya komela na mbeki na yo? ›
Aj, já stojím u studnice vody; protož, nechžť panna, kteráž vyjde vážiti vody, když bych jí řekl: Dej mi píti nyní maličko vody z věderce svého,
44 Mpe ye akozongisela ngai: ‹ Mela na yo, mpe nakotoka lisusu mayi mpo na bashamo na yo, › tika ete ye nde azala mwasi oyo Yawe aponi mpo na mwana mobali ya nkolo na ngai. »
A ona by mi odpověděla: I ty pí, i velbloudům tvým také navážím, ta ať jest manželka, kterouž způsobil Hospodin synu pána mého.
45 Liboso ete nasilisa kosambela kati na motema na ngai, Rebeka abimaki na mbeki na lipeka na ye. Akitaki na libulu ya mayi mpe atokaki mayi. Nalobaki na ye: « Nabondeli yo, pesa ngai mayi ya komela. »
Prvé pak než jsem já přestal mluviti v srdci svém, aj, Rebeka vycházela mající věderce své na rameni svém, a sšedši k studnici, vážila. I řekl jsem jí: Prosím, dej mi píti.
46 Akitisaki mbangu mbeki na ye wuta na lipeka na ye mpe alobaki: « Mela na yo, mpe nakomelisa lisusu bashamo na yo. » Boye namelaki mayi, mpe amelisaki lisusu bashamo mayi.
Ona pak rychle složila věderce své s sebe, a řekla: Pí, také i velbloudy tvé napojím. Tedy pil jsem, a napojila také velbloudy.
47 Natunaki ye: « Ozali mwana mwasi ya nani? » Azongisaki: « Nazali mwana mwasi ya Betweli, mwana mobali oyo Milika abotelaki Naori. » Boye natiaki lopete na zolo na ye mpe basheneti na maboko na ye.
I ptal jsem se jí, a řekl jsem: Čí jsi dcera? Ona odpověděla: Dcera Bathuele, syna Náchorova, jehož mu porodila Melcha. Tedy dal jsem náušnici na tvář její, a náramnice na ruce její.
48 Nakitisaki elongi na se mpe nagumbamelaki Yawe; nakumisaki Yawe, Nzambe ya nkolo na ngai, Abrayami, oyo atambolisaki ngai na nzela ya sembo mpo na kozwela mwana na ye ya mobali mwana mwasi ya ndeko ya nkolo na ngai.
A skloniv hlavu, poklonu jsem učinil Hospodinu, a dobrořečil jsem Hospodina, Boha pána mého Abrahama, kterýž vedl mne po cestě přímé, abych dceru bratra pána svého vzal synu jeho.
49 Mpe sik’oyo, boyebisa ngai soki bokosalela nkolo na ngai bolamu mpe boyengebene. Soki te, boyebisa ngai mpo ete naluka nzela mosusu.
Protož nyní, činíte-li milosrdenství, a pravdu se pánem mým, oznamte mi; pakli nic, také mi oznamte, a obrátím se na pravo neb na levo.
50 Labani mpe Betweli bazongisaki: — Makambo oyo nyonso ewuti epai na Yawe. Tozali na likambo mosusu te ya koloba na yo.
Tedy odpověděli Lában a Bathuel, řkouce: Od Hospodina vyšla jest věc tato; nemůžemeť odepříti v ničemž.
51 Tala Rebeka, azali liboso na yo! Kamata ye mpe kende na ye; mpe tika ete azala mwasi ya mwana mobali ya nkolo na yo, ndenge Yawe abongisi.
Aj, Rebeka před tebou, vezmiž ji a jeď; a nechť jest manželkou synu pána tvého, jakož mluvil Hospodin.
52 Tango mosali ya Abrayami ayokaki makambo oyo bayebisaki ye, akitisaki elongi na ye kino na se liboso ya Yawe.
I stalo se, že jakž uslyšel služebník Abrahamův slova jejich, poklonil se Hospodinu až k zemi.
53 Abimisaki biloko ya wolo, ya palata mpe bilamba; bongo apesaki yango na Rebeka. Apesaki mpe bakado ya motuya epai ya ndeko na ye ya mobali mpe epai ya mama na ye.
A vyňav služebník ten nádoby stříbrné a nádoby zlaté a oděv, dal Rebece; drahé také dary dal bratru jejímu a matce její.
54 Sima na yango, mosali ya Abrayami mpe bato oyo bazalaki elongo na ye baliaki, bamelaki mpe balekisaki butu kati na ndako wana. Na tongo, tango balamukaki, mosali ya Abrayami alobaki na bango: — Botika ete nazonga epai ya nkolo na ngai.
Tedy jedli a pili, on i muži, kteříž byli s ním, a zůstali tu přes noc. Ráno pak když vstali, řekl: Propusťte mne ku pánu mému.
55 Ndeko mobali mpe mama ya Rebeka bazongisaki: — Tika ete elenge mwasi atikala nanu elongo na biso mikolo zomi, sima nde bokoki kokende.
I odpověděl bratr její a matka: Nechať pozůstane děvečka s námi za některý den, aspoň za deset; potom půjdeš.
56 Kasi alobaki na bango: — Bowumisa ngai te, pamba te Yawe alongisi mobembo na ngai; botika ngai kokende mpo ete nazonga epai ya nkolo na ngai.
On pak řekl jim: Nezdržujte mne, poněvadž Hospodin šťastnou způsobil cestu mou; propusťtež mne, ať jdu ku pánu svému.
57 Balobaki na ye: — Tika ete tobenga elenge mwasi mpe totuna posa na ye.
I řekli: Zavolejme děvečky a zeptejme se, co dí k tomu.
58 Babengaki Rebeka mpe batunaki ye: — Ondimi solo kokende na mobali oyo? Rebeka azongisaki: — Iyo, nandimi.
Tedy zavolali Rebeky, a řekli jí: Chceš-li jíti s mužem tímto? I řekla: Půjdu.
59 Boye batikaki ndeko na bango ya mwasi Rebeka ete akende elongo na mama oyo asungaka ye, na mosali ya Abrayami elongo na bato na ye.
A propouštějíce Rebeku sestru svou a chovačku její, služebníka také Abrahamova s muži jeho,
60 Bapambolaki Rebeka mpe balobaki na ye: « Ndeko na biso ya mwasi, tika ete okoma mama ya nkoto ya bato, mpe tika ete bana na yo bakamata bingumba ya banguna na bango! »
Požehnali Rebeky a mluvili jí: Sestro naše, ty buď v tisíce tisíců, a símě tvé dědičně obdrž brány nepřátel svých.
61 Boye Rebeka elongo na basali na ye ya basi batelemaki, bamataki likolo ya bashamo mpe balandaki mosali ya Abrayami. Bongo mosali ya Abrayami akamataki Rebeka mpe bakendeki na ye nzela moko.
Tedy vstala Rebeka a děvečky její, a vsedše na velbloudy, jely za mužem tím. A tak vzal služebník ten Rebeku, a odjel.
62 Nzokande, Izaki azalaki kovanda na Negevi mpe awutaki na libulu ya mayi na Lakai-Royi.
Izák pak šel, navracuje se od studnice Živého vidoucího mne; nebo bydlil v zemi polední.
63 Na pokwa, Izaki akendeki na bilanga mpo na kozwa tango ya kokanisa na bozindo. Tango atombolaki miso, amonaki bashamo kopusana pene ya esika oyo azalaki.
A vyšel Izák k přemyšlování na pole, když se chýlilo k večerou; a pozdvih očí svých, uzřel, an velbloudové jdou.
64 Tango Rebeka mpe atombolaki miso, amonaki Izaki mpe akitaki wuta na shamo na ye.
Pozdvihla také Rebeka očí svých, a uzřevši Izáka, ssedla s velblouda.
65 Atunaki mosali ya Abrayami: — Nazali komona mobali moko kati na bilanga, azali koya kokutana na biso; azali nani? Mosali ya Abrayami azongisaki: — Azali nkolo na ngai. Bongo Rebeka azwaki vwale na ye mpe amizipaki na elongi.
(Nebo řekla byla služebníku: Kdo jest ten muž, kterýž jde po poli proti nám? Odpověděl služebník: To jest pán můj.) I vzala rouchu, a přistřela se.
66 Mosali ya Abrayami ayebisaki Izaki makambo nyonso oyo asalaki.
Tedy vypravoval služebník Izákovi vše, což působil.
67 Na yango, Izaki amemaki Rebeka kati na ndako ya kapo ya mama na ye Sara, azwaki ye mpo ete azala mwasi na ye mpe alingaki ye. Boye Izaki abondisamaki na kufa ya mama na ye.
I uvedl ji Izák do stanu Sáry matky své, a vzal Rebeku, a měl ji za manželku, a miloval ji. I potěšil se Izák po smrti matky své.