< Ebandeli 23 >

1 Sara awumelaki na bomoi mibu nkama moko na tuku mibale na sambo.
Sara dii mfe ɔha aduonu ason.
2 Akufaki na Kiriati-Ariba oyo ezali Ebron, na mokili ya Kanana. Abrayami asalaki matanga mpo na Sara mpe alelaki ye.
Owui wɔ Kiriat-Arba a ɛno ara ne Hebron a ɛwɔ Kanaan asase so. Abraham kogyam ne yere Sara, suu no wɔ hɔ.
3 Abrayami alongwaki liboso ya ebembe ya mwasi na ye mpe asololaki na bato ya Iti.
Abraham gyaw ne yere Sara amu no wɔ hɔ, kɔɔ Hetifo mpanyimfo nkyɛn, kɔsrɛɛ wɔn se,
4 Alobaki na bango: — Nazali mopaya mpe navandaka kati na bino; botekela ngai eteni ya mabele kati na bino mpo ete nakunda mwasi na ngai.
“Meyɛ ɔhɔho ne mamfrani a mete mo mu. Mesrɛ mo, montɔn mo asase yi bi mma me, na minsie me yere wɔ so.”
5 Bato ya Iti bazongiselaki Abrayami:
Hetifo no buaa Abraham se,
6 — Yoka biso, nkolo na ngai; ya solo, ozali moto monene kati na biso. Kunda mwasi na yo kati na kunda oyo eleki kitoko kati na bakunda na biso. Moko te kati na biso akoboya kopesa yo kunda na ye mpo ete okunda mwasi na yo.
“Owura, yɛsrɛ wo, tie asɛm a yɛrebɛka yi. Woyɛ Onyankopɔn somfo kɛse wɔ yɛn mu. Yɛn boda biara a ɛsɔ wʼani a wopɛ sɛ wusie wo yere wɔ hɔ no, yɛma wo ho kwan, kosie no. Yɛn mu biara remfa ne boda nkame wo.”
7 Boye, Abrayami atelemaki mpe agumbamaki liboso ya bato ya mboka wana, bato ya Iti.
Ɛhɔ ara na Abraham sɔre bɔɔ ne mu ase wɔ Hetifo no anim,
8 Ayebisaki bango: — Soki ezali mokano na bino ete nakunda nzoto ya mwasi na ngai awa, boyoka ngai mpe bosengela ngai epai ya Efroni, mwana mobali ya Tsoari,
ka kyerɛɛ wɔn se, “Sɛ moapene so sɛ minsie mʼamu no wɔ ha de a, mepa mo kyɛw, monsrɛ Efron a ɔyɛ Sohar babarima no mma me,
9 ete atekela ngai libulu na ye ya mabanga oyo ezali na Makipela, na suka ya elanga na ye. Boyebisa ye ete atekela ngai yango na motuya oyo ekoki na yango mpo ete nakomisa yango mabele ya kokunda bato na ngai.
na ɔntɔn Makpela ɔboda a ɛwɔ nʼafuw ano no mma me. Monka nkyerɛ no na ɔntɔn no sɛnea ne bo di pɛpɛɛpɛ mma me, na mede hɔ ayɛ me ne mʼabusuafo amusiei.”
10 Nzokande, Efroni, moto ya Iti, oyo azalaki kovanda kati na bato na ye, azongiselaki Abrayami na miso ya bato ya Iti, liboso ya bato nyonso oyo bayaki na ekuke ya engumba na ye:
Saa bere no na Hetini Efron a ɔte ne manfo mu no buaa Abraham, maa ne nkurɔfo a wɔahyia wɔ kurow no pon ano nyinaa tee sɛ,
11 — Te, nkolo na ngai, yoka ngai! Napesi yo elanga mpe libulu ya mabanga oyo ezali kati na yango. Napesi yo yango liboso ya bato na ngai mpo ete okunda mwasi na yo.
“Dabi, me wura, tie me! Mede afuw no ne ɔboda a ɛwɔ mu no kyɛ wo. Migyina me manfo anim, na mede kyɛ wo. Kosie wʼamu no wɔ hɔ.”
12 Abrayami agumbamaki liboso ya bato ya mboka
Bio Abraham de obu ne nidi bɔɔ ne mu ase wɔ ɔmanfo no anim,
13 mpe azongiselaki Efroni: — Nabondeli yo, yoka ngai! Soki olingi, nakopesa yo motuya oyo ekoki na elanga. Ndima yango mpo ete nakunda mwasi na ngai kuna.
ka kyerɛɛ Efron maa wɔn a wɔahyia hɔ no nyinaa tee asɛm a ɔkae no se, “Mesrɛ mo, ɔmanfo, monyɛ aso mma me. Momma mintua asase no ka. Mompene so mma me, na minnya kwan nkosie mʼamu no.”
14 Efroni azongiselaki Abrayami:
Efron buaa Abraham se,
15 — Yoka, nkolo na ngai! Mabele ya motuya ya mbongo ya bibende, nkama minei, ezali penza nini kati na ngai mpe yo? Kamata mabele yango mpe kunda mwasi na yo.
“Me wura, tie me! Asase no bo yɛ dwetɛ kilogram anan ne fa. Yɛnyɛ nnipa baako ana? Meregye saa sika yi ayɛ dɛn? Kosie wʼamu no!”
16 Abrayami andimaki maloba ya Efroni mpe amemelaki ye motuya oyo alobaki na miso ya bato ya Iti: mbongo ya bibende, nkama minei, kolanda ndenge bazalaki kotanga mbongo na tango wana.
Abraham penee Efron asɛm no so. Ɔkarii dwetɛ kilogram anan ne fa a ɛyɛ asase no bo a ɔbɔ maa Hetifo no tee no de tuaa ka.
17 Boye elanga ya Efroni oyo ezalaki na Makipela, pembeni ya Mamire, elongo na libulu ya mabanga oyo ezalaki kati na yango, banzete nyonso oyo ezalaki kati na elanga mpe na bandelo ya zingazinga na yango, epesamaki
Enti wɔde Efron asase a ɛwɔ Makpela a ɛbɛn Mamrɛ, a ɛyɛ afuw no, ɔboda a ɛwɔ mu no, nnua a ɛwɔ afuw no mu ne nʼahye so nyinaa maa
18 epai ya Abrayami mpe ekomaki ya ye na miso ya bato ya Iti oyo bayaki na ekuke ya engumba.
Abraham sɛ nʼagyapade. Eyi nyinaa sii wɔ Hetifo no ne wɔn a wɔbaa kurow no pon no ano nyinaa anim.
19 Sima na yango, Abrayami akundaki mwasi na ye Sara na libulu ya mabanga ya elanga ya Makipela, pembeni ya Mamire oyo ezali Ebron, na mokili ya Kanana.
Akyiri no, Abraham siee ne yere Sara wɔ ɔboda a ɛwɔ Makpela afuw a ɛbɛn Mamrɛ a ɛno ara ne Hebron a ɛwɔ Kanaan asase so no mu.
20 Bato ya Iti bapesaki Abrayami elanga yango elongo na libulu ya mabanga oyo ezalaki na kati mpo ete ekoma ya ye mpe akundaka bato na ye kuna.
Enti Hetifo no yɛɛ nhyehyɛe de afuw no ne ɔboda a ɛwɔ mu no maa Abraham sɛ nʼagyapade ne nʼamusiei.

< Ebandeli 23 >