< Ebandeli 21 >
1 Yawe atalisaki bolamu na Ye epai ya Sara ndenge kaka alobaki mpe akokisaki elaka oyo apesaki ye.
And Jehovah visited Sarah as he had said, and Jehovah did unto Sarah as he had spoken.
2 Sara azwaki zemi mpe abotelaki Abrayami mwana na kimobange na ye kaka na tango oyo Nzambe alakaki ye.
And Sarah conceived, and bare Abraham a son in his old age, at the set time of which God had spoken to him.
3 Abrayami apesaki na mwana oyo Sara abotelaki ye kombo « Izaki. »
And Abraham called the name of his son that was born unto him, whom Sarah bare to him, Isaac.
4 Abrayami akatisaki Izaki ngenga tango akokisaki mikolo mwambe ya mbotama, ndenge Nzambe atindaki ye.
And Abraham circumcised his son Isaac when he was eight days old, as God had commanded him.
5 Abrayami azalaki na mibu nkama moko ya mbotama tango mwana na ye, Izaki, abotamaki.
And Abraham was a hundred years old, when his son Isaac was born unto him.
6 Sara alobaki: « Nzambe apesi ngai libaku ya koseka; mpe moto nyonso oyo akoyoka sango oyo akoseka elongo na ngai. »
And Sarah said, God hath made me to laugh; every one that heareth will laugh with me.
7 Abakisaki: « Nani akokaki koloba na Abrayami ete Sara akomelisa bana mabele? Pamba te naboteli ye mwana na kimobange na ye. »
And she said, Who would have said unto Abraham, that Sarah should give children suck? for I have borne him a son in his old age.
8 Mwana akolaki mpe Sara akataki kopesa ye mabele. Mokolo bakataki kopesa Izaki mabele, Abrayami asalisaki feti monene.
And the child grew, and was weaned: and Abraham made a great feast on the day that Isaac was weaned.
9 Kasi tango Sara amonaki ete Isimaeli, mwana oyo Agari, moto ya Ejipito, abotelaki Abrayami, azali koseka;
And Sarah saw the son of Hagar the Egyptian, whom she had borne unto Abraham, mocking.
10 ayebisaki Abrayami: « Bengana mwasi mowumbu oyo elongo na mwana na ye ya mobali, pamba te mwana ya mwasi mowumbu oyo, akoki te kokabola libula elongo na Izaki, mwana na ngai ya mobali. »
Wherefore she said unto Abraham, Cast out this handmaid and her son: for the son of this handmaid shall not be heir with my son, even with Isaac.
11 Tango Abrayami ayokaki bongo, esalaki ye pasi makasi na motema mpo na mwana na ye.
And the thing was very grievous in Abraham’s sight on account of his son.
12 Kasi Nzambe ayebisaki Abrayami: « Tika koyoka pasi na motema mpo na mwana na yo ya mobali mpe mwasi mowumbu na yo. Yoka nyonso oyo Sara azali koyebisa yo, pamba te ezali na nzela ya Izaki nde okozwa bakitani.
And God said unto Abraham, Let it not be grievous in thy sight because of the lad, and because of thy handmaid; in all that Sarah saith unto thee, hearken unto her voice; for in Isaac shall thy seed be called.
13 Nakokomisa mpe mwana mobali ya mwasi mowumbu na yo ekolo, pamba te ye mpe azali makila na yo. »
And also of the son of the handmaid will I make a nation, because he is thy seed.
14 Na tongo makasi ya mokolo oyo elandaki, Abrayami azwaki lipa mpe mbeki ya mayi; apesaki yango na Agari. Atiaki yango likolo ya lipeka na ye, apesaki ye mwana mpe abenganaki ye. Agari akendeki mpe atambolaki bipai na bipai na esobe ya Beri-Sheba.
And Abraham rose up early in the morning, and took bread and a bottle of water, and gave it unto Hagar, putting it on her shoulder, and [gave her] the child, and sent her away: and she departed, and wandered in the wilderness of Beer-sheba.
15 Tango mayi oyo ezalaki na mbeki esilaki, Agari asundolaki mwana na se ya nzete moko ya moke.
And the water in the bottle was spent, and she cast the child under one of the shrubs.
16 Akendeki kovanda na monkama ya bametele, pamba te alobaki: « Nalingi te komona kufa ya mwana na ngai. » Lokola avandaki mosika ya mwana, atombolaki mongongo mpe alelaki.
And she went, and sat her down over against him a good way off, as it were a bowshot: for she said, Let me not look upon the death of the child. And she sat over against him, and lifted up her voice, and wept.
17 Nzambe ayokaki mongongo ya mwana, mpe Anjelu na Nzambe abengaki Agari wuta na likolo. Ayebisaki ye: « Agari, likambo nini? Kobanga te, pamba te Nzambe ayoki mongongo ya mwana wuta na esika oyo otikaki ye.
And God heard the voice of the lad; and the angel of God called to Hagar out of heaven, and said unto her, What aileth thee, Hagar? fear not; for God hath heard the voice of the lad where he is.
18 Telema, tombola mwana mpe zwa ye na loboko na yo, pamba te nakokomisa ye ekolo monene. »
Arise, lift up the lad, and hold him in thy hand; for I will make him a great nation.
19 Nzambe afungolaki ye miso, mpe amonaki libulu ya mayi. Akendeki kotondisa mbeki mpe amelisaki mwana.
And God opened her eyes, and she saw a well of water; and she went, and filled the bottle with water, and gave the lad drink.
20 Nzambe azalaki elongo na mwana. Akolaki, avandaki kati na esobe mpe akomaki mobomi nyama na tolotolo.
And God was with the lad, and he grew; and he dwelt in the wilderness, and became, as he grew up, an archer.
21 Wana azalaki kovanda kati na esobe ya Parani, mama na ye azwelaki ye mwasi ya mokili ya Ejipito.
And he dwelt in the wilderness of Paran: and his mother took him a wife out of the land of Egypt.
22 Kaka na tango yango, Abimeleki mpe Pikoli, mokonzi ya mampinga na ye, bakendeki kokutana na Abrayami; mpe Abimeleki alobaki na Abrayami: — Nzambe azali kolongisa yo na makambo nyonso oyo ozali kosala.
And it came to pass at that time, that Abimelech and Phicol the captain of his host spake unto Abraham, saying, God is with thee in all that thou doest:
23 Bongo sik’oyo, lapa ndayi awa na Kombo ya Nzambe ete okokosa ngai te, bana na ngai te, mpe bakoko na ngai te; kasi okosalela ngai bolamu elongo na mboka oyo epai wapi ozali kovanda lokola mopaya, ndenge ngai nasaleli yo.
now therefore swear unto me here by God that thou wilt not deal falsely with me, nor with my son, nor with my son’s son: but according to the kindness that I have done unto thee, thou shalt do unto me, and to the land wherein thou hast sojourned.
24 Abrayami azongisaki: — Nalapi ndayi!
And Abraham said, I will swear.
25 Bongo Abrayami alobelaki Abimeleki na tina na libulu ya mayi oyo basali ya Abimeleki babotolaki na makasi.
And Abraham reproved Abimelech because of the well of water, which Abimelech’s servants had violently taken away.
26 Abimeleki azongisaki: — Nayebi te nani asalaki bongo. Oyebisaki ngai likambo moko te na tina na yango, mpe nayoki yango kaka lelo.
And Abimelech said, I know not who hath done this thing: neither didst thou tell me, neither yet heard I of it, but to-day.
27 Abrayami azwaki bameme, bantaba, bangombe, mpe apesaki yango na Abimeleki; bongo bango mibale basalaki boyokani.
And Abraham took sheep and oxen, and gave them unto Abimelech; and they two made a covenant.
28 Abrayami atiaki pembeni bana meme sambo oyo azwaki kati na etonga.
And Abraham set seven ewe lambs of the flock by themselves.
29 Abimeleki atunaki Abrayami: — Bana meme sambo oyo otie pembeni elakisi nini?
And Abimelech said unto Abraham, What mean these seven ewe lambs which thou hast set by themselves?
30 Azongisaki: — Ndima bana meme sambo oyo ewuti na maboko na ngai lokola litatoli ete ngai nde natimolaki libulu yango.
And he said, These seven ewe lambs shalt thou take of my hand, that it may be a witness unto me, that I have digged this well.
31 Yango wana babengaki esika yango Beri-Sheba, pamba te na esika yango nde bango mibale balapaki ndayi.
Wherefore he called that place Beer-sheba; because there they sware both of them.
32 Sima na bango kosala boyokani kuna na Beri-Sheba, Abimeleki mpe Pikoli, mokonzi ya mampinga na ye, bazongaki na mokili ya Filisitia.
So they made a covenant at Beer-sheba: and Abimelech rose up, and Phicol the captain of his host, and they returned into the land of the Philistines.
33 Abrayami alonaki nzete ya tamarisi na Beri-Sheba mpe abelelaki Yawe, Nzambe ya bileko na bileko.
And [Abraham] planted a tamarisk tree in Beer-sheba, and called there on the name of Jehovah, the Everlasting God.
34 Abrayami avandaki lisusu tango molayi na mokili ya Filisitia.
And Abraham sojourned in the land of the Philistines many days.