< Ebandeli 20 >

1 Abrayami alongwaki na mboka wana mpo na kokende na etuka ya Negevi mpe avandaki na mboka oyo ezalaki kati ya Kadeshi mpe Shuri; sima na tango moke, akendeki kovanda na Gerari.
И пойде оттуду Авраам на землю полуденную и вселися между Кадисом и между Суром: и обита в Герарех.
2 Abrayami azalaki koloba kuna na tina na Sara, mwasi na ye: « Azali ndeko na ngai ya mwasi! » Yango wana Abimeleki, mokonzi ya Gerari, atindaki bato mpo na koluka Sara mpe akamataki ye na makasi.
Рече же Авраам о Сарре жене своей, яко сестра ми есть: убояся бо рещи, яко жена ми есть, да не когда убиют его мужие градстии ея ради. Посла же Авимелех царь Герарский и взя Сарру.
3 Kasi na butu, Nzambe ayaki epai ya Abimeleki kati na ndoto mpe alobaki na ye: « Okokufa mpo na mwasi oyo osili kozwa, pamba te azali mwasi ya libala. »
И прииде Бог ко Авимелеху нощию во сне и рече ему: се, ты умираеши жены ради сея, юже поял еси: сия же есть сожителствующая мужу.
4 Nzokande, Abimeleki apusanaki nanu te pembeni na ye. Agangaki: — Nkolo, okoboma penza ekolo ata soki esali na yango mabe te?
Авимелех же не прикоснуся ей и рече: Господи, язык неведущий и праведен погубиши ли?
5 Ezali mobali na ye moko nde alobaki: « Azali ndeko na ngai ya mwasi; » mpe ye moko andimaki: « Azali ndeko na ngai ya mobali. » Nasali yango na motema sembo mpe na maboko ezanga mbindo.
Не сам ли ми рече: сестра ми есть? И сия ми рече: брат ми есть? Чистым сердцем и в правде рук сотворих сие.
6 Nzambe alobaki na ye na ndoto: — Solo, nayebi ete osali yango na motema sembo. Yango wana nabatelaki yo mpo ete osala lisumu te epai na Ngai, mpe natikaki te ete osimba ye.
Рече же ему Бог во сне: и Аз познах, яко чистым сердцем сотворил еси сие, и пощадех тя, да не согрешиши ко Мне: сего ради не попустих ти коснутися ея:
7 Sik’oyo, zongisa mwasi yango epai ya mobali na ye mpo ete azali mosakoli. Akobondela mpo na yo mpe okokufa te. Soki ozongisi ye te, yeba ete okokufa, yo mpe bato na yo nyonso.
ныне же отдаждь жену мужу, яко пророк есть, и помолится о тебе, и жив будеши: аще же не отдаси, веждь, яко умреши ты и вся твоя.
8 Na tongo-tongo, Abimeleki alamukaki mpe abengisaki basali na ye nyonso. Tango ayebisaki bango makambo oyo ekomelaki ye, babangaki makasi.
И воста рано Авимелех, и призва вся отроки своя, и глагола словеса сия вся во ушы их: убояшася же вси человецы зело.
9 Abimeleki abengaki Abrayami mpe alobaki na ye: — Likambo nini osali biso, lisumu nini nasali yo mpo ete omemisa ngai mpe mokili na ngai ngambo ya monene boye? Osali ngai makambo oyo ekoki kosalema te.
И призва Авимелех Авраама и рече ему: что сие сотворил еси нам? Еда что согрешихом тебе, яко навел еси на мя и на царство мое грех велик? Дело, еже никтоже сотвори, сотворил еси мне.
10 Abimeleki atunaki Abrayami: — Makanisi nini ozalaki na yango mpo ete osala boye?
И рече Авимелех Аврааму: что умыслив, сотворил еси сие?
11 Abrayami azongisaki: — Namilobelaki: « Solo, bato ya esika oyo batosaka Nzambe ata moke te mpe bakoboma ngai mpo na mwasi na ngai.
Рече же Авраам: рекох бо: негли несть благочестия на месте сем: и убиют мя жены ради моея:
12 Lisusu, azali ya solo ndeko na ngai ya mwasi, mwana ya tata na ngai; kasi azali mwana ya mama na ngai te. Nzokande akoma mwasi na ngai. »
ибо истинно сестра ми есть по отцу, а не по матери: бысть же ми в жену:
13 Tango Nzambe alongolaki ngai na ndako ya tata na ngai mpo na kokende bipai na bipai, nayebisaki mwasi na ngai: « Tala bolamu oyo okosalela ngai: Bisika nyonso oyo tokokende, okolobaka na tina na ngai: ‹ Azali ndeko na ngai. › »
и бысть егда изведе мя Бог от дому отца моего, и рех ей: правду сию сотвориши ми: во всяко место, идеже аще приидем, тамо рцы о мне, яко брат ми есть.
14 Boye Abimeleki azwaki bameme, bantaba, bangombe, basali ya mibali mpe ya basi, apesaki na Abrayami. Mpe azongiselaki ye mwasi na ye Sara.
Взя же Авимелех тысящу дидрахм (сребра), и овцы, и телцы, и рабы, и рабыни, и даде Аврааму: и отдаде ему Сарру жену его.
15 Abimeleki alobaki: « Mboka na ngai ezali liboso na yo, vanda na esika oyo olingi. »
И рече Авимелех Аврааму: се, земля моя пред тобою: идеже аще тебе угодно есть, вселися.
16 Abalukaki mpe alobaki lisusu epai na Sara: « Tala, napesi mbongo ya bibende, nkoto moko, epai ya ndeko na yo ya mobali. Ezali mpo na kozipa mabe oyo basali yo mpe bato nyonso oyo bazali elongo na yo; boye okomi sembo na nyonso. »
Сарре же рече: се, дах тысящу дидрахм брату твоему: сия будут тебе в честь лица твоего, и всем, яже суть с тобою, и во всем истинствуй.
17 Abrayami abondelaki Nzambe, mpe Nzambe abikisaki Abimeleki, mwasi na ye, mpe basi bawumbu na ye. Na nzela wana, bazwaki lisusu bana;
Помолися же Авраам Богу, и исцели Бог Авимелеха и жену его и рабыни его, и начаша раждати:
18 pamba te Yawe akangaki mabota kati na ndako mobimba ya Abimeleki likolo ya Sara, mwasi ya Abrayami.
яко заключая заключи Господь от внеуду всяка ложесна в дому Авимелеха, Сарры ради жены Авраамли.

< Ebandeli 20 >