< Ebandeli 19 >
1 Ba-anjelu oyo mibale bakomaki na Sodome na pokwa. Wana Loti avandaki na ekuke, amonaki bango, akendeki koyamba bango mpe afukamaki elongi kino na mabele.
Now the two angels arrived at Sodom in the evening, and Lot was sitting in the gateway of the city. When Lot saw them, he got up to meet them, bowed facedown,
2 Alobaki na bango: — Nabondeli bino, bankolo na ngai, boya na ndako ya mosali na bino. Bokoki kosukola kuna makolo na bino mpe kolekisa butu, bongo na tongo, bokoki kokoba mobembo na bino. Bazongiselaki ye: — Te, tokolala kaka libanda.
and said, “My lords, please turn aside into the house of your servant; wash your feet and spend the night. Then you can rise early and go on your way.” “No,” they answered, “we will spend the night in the square.”
3 Kasi Loti abondelaki bango mingi; boye bandimaki kokende na ye elongo mpe bakotaki na ndako na ye. Alambelaki bango bilei ya kitoko, atumbaki mapa ezanga levire mpe baliaki.
But Lot insisted so strongly that they followed him into his house. He prepared a feast for them and baked unleavened bread, and they ate.
4 Liboso ete bakende kolala, mibali nyonso ya engumba Sodome, bilenge mpe mibange, bawutaki bipai na bipai mpe bayaki kozingela ndako.
Before they had gone to bed, all the men of the city of Sodom, both young and old, surrounded the house.
5 Babelelaki Loti: — Wapi mibali oyo bayaki epai na yo na butu oyo? Bimisela biso bango mpo ete tosangisa na bango nzoto.
They called out to Lot, saying, “Where are the men who came to you tonight? Send them out to us so we can have relations with them!”
6 Loti abimaki mpo na kosolola na bango; akangaki ekuke sima na ye.
Lot went outside to meet them, shutting the door behind him.
7 Alobaki: — Te, baninga na ngai, bosala mabe te!
“Please, my brothers,” he pleaded, “don’t do such a wicked thing!
8 Boyoka! Nazali na bana basi mibale oyo bayebi nanu nzoto ya mibali te. Tika ete namemela bino bango libanda! Bosala bango nyonso oyo bolingi. Kasi bosala bato oyo eloko moko te mpo ete bayei kovanda na ndako na ngai.
Look, I have two daughters who have never slept with a man. Let me bring them to you, and you can do to them as you please. But do not do anything to these men, for they have come under the protection of my roof.”
9 Bazongisaki: — Longwa wana. Balobaki lisusu: — Botala moto oyo, ayaki awa lokola mopaya; sik’oyo alingi komikomisa mosambisi. Tokosala yo mabe koleka bango. Bongo batindikaki Loti na makasi mpe bapusanaki pene ya ekuke mpo na koluka kobuka yango.
“Get out of the way!” they replied. And they declared, “This one came here as a foreigner, and he is already acting like a judge! Now we will treat you worse than them.” And they pressed in on Lot and moved in to break down the door.
10 Kasi mibali oyo bazalaki kati na ndako babimisaki maboko mpe babendaki Loti na kati ya ndako mpe bakangaki ekuke.
But the men inside reached out, pulled Lot into the house with them, and shut the door.
11 Bakangaki miso ya bato nyonso oyo bazalaki na ekuke ya ndako, ezala bilenge to mibange; boye bazalaki lisusu komona ekuke te.
And they struck the men at the entrance, young and old, with blindness, so that they wearied themselves trying to find the door.
12 Mibali yango mibale balobaki na Loti: — Ozali lisusu na moto mosusu na engumba oyo, ndakisa: mibali ya bana na yo ya basi, bana na yo ya mibali mpe ya basi to mpe ndeko mosusu? Bimisa bango libanda ya esika oyo
Then the two men said to Lot, “Do you have anyone else here—a son-in-law, your sons or daughters, or anyone else in the city who belongs to you? Get them out of here,
13 mpo ete tolingi kobebisa yango. Sango ya makambo mabe ya bato oyo ekomi kino epai na Yawe; yango wana Yawe atindi biso mpo na kobebisa engumba oyo.
because we are about to destroy this place. For the outcry to the LORD against its people is so great that He has sent us to destroy it.”
14 Boye Loti abimaki mpe akendeki koyebisa babandami ya mabala ya bana na ye ya basi. Alobaki: « Bosala noki mpe bobima na esika oyo, pamba te Yawe alingi kobebisa engumba oyo! » Kasi babandami ya mabala ya bana na ye ya basi bakanisaki ete azali kosala maseki.
So Lot went out and spoke to the sons-in-law who were pledged in marriage to his daughters. “Get up,” he said. “Get out of this place, for the LORD is about to destroy the city!” But his sons-in-law thought he was joking.
15 Tango kaka tongo etanaki, ba-anjelu batungisaki Loti mpe balobaki: — Sala noki, kamata mwasi na yo mpe bana na yo mibale ya basi oyo bazali awa; soki te, bokobebisama tango engumba oyo ekozwa etumbu.
At daybreak the angels hurried Lot along, saying, “Get up! Take your wife and your two daughters who are here, or you will be swept away in the punishment of the city.”
16 Lokola azalaki kowumela, mibali yango bakangaki na makasi loboko na ye, maboko ya mwasi mpe ya bana na ye ya basi; mpe bamemaki bango na libanda ya engumba, pamba te Yawe ayokelaki bango mawa.
But when Lot hesitated, the men grabbed his hand and the hands of his wife and his two daughters. And they led them safely out of the city, because of the LORD’s compassion for them.
17 Tango kaka babimisaki bango na libanda, moko kati na mibali yango alobaki: — Bokima mpo ete bobikisa bomoi na bino! Botala sima te mpe botelema ata esika moko te kati na engumba oyo! Bokima na likolo ya bangomba, noki te bokobebisama!
As soon as the men had brought them out, one of them said, “Run for your lives! Do not look back, and do not stop anywhere on the plain! Flee to the mountains, or you will be swept away!”
18 Kasi Loti azongisaki: — Te, nkolo na ngai, tika ete esalema bongo te!
But Lot replied, “No, my lords, please!
19 Mosali na yo azwi ngolu na miso na yo, mpe otalisi ngai bolamu makasi na ndenge obikisi bomoi na ngai. Kasi nakokoka te kokima na likolo ya bangomba, noki te likama ekokomela ngai mpe nakokufa.
Your servant has indeed found favor in your sight, and you have shown me great kindness by sparing my life. But I cannot run to the mountains; the disaster will overtake me, and I will die.
20 Tala, ezali na engumba moko pene awa mpo na kokimela, yango ezali penza moke. Tika ngai nakimela kuna atako ezali moke mpo ete nabikisa bomoi na ngai!
Look, there is a town nearby where I can flee, and it is a small place. Please let me flee there—is it not a small place? Then my life will be saved.”
21 Anjelu alobaki na ye: — Malamu mingi, nakokokisela yo lisusu bosenga oyo. Nakobebisa te engumba oyo ozali kolobela.
“Very well,” he answered, “I will grant this request as well, and will not demolish the town you indicate.
22 Kasi kima noki, pamba te nakoki kosala eloko moko te soki okomi nanu kuna te. Yango wana babengaka engumba yango Tsoari.
Hurry! Run there quickly, for I cannot do anything until you reach it.” That is why the town was called Zoar.
23 Loti akomaki na Tsoari tango tongo etanaki.
And by the time the sun had risen over the land, Lot had reached Zoar.
24 Boye wuta na likolo, Yawe anokisaki mvula ya moto makasi ya fofolo, na sodome mpe na Gomore.
Then the LORD rained down sulfur and fire on Sodom and Gomorrah—from the LORD out of the heavens.
25 Abebisaki bingumba yango, etando nyonso elongo na bato nyonso oyo bazalaki kovanda kuna mpe banzete nyonso.
Thus He destroyed these cities and the entire plain, including all the inhabitants of the cities and everything that grew on the ground.
26 Kasi mwasi ya Loti atalaki na sima mpe akomaki ekeko ya mungwa.
But Lot’s wife looked back, and she became a pillar of salt.
27 Na tongo makasi, Abrayami amataki na esika oyo atelemaki liboso ya Yawe;
Early the next morning, Abraham got up and returned to the place where he had stood before the LORD.
28 atalaki na ngambo ya Sodome mpe ya Gomore, mpe na ngambo ya mokili ya etando; amonaki molinga makasi komata wuta na mokili lokola molinga ya fulu monene ya moto.
He looked down toward Sodom and Gomorrah and all the land of the plain, and he saw the smoke rising from the land like smoke from a furnace.
29 Boye, tango Nzambe abebisaki bingumba ya etando, akanisaki Abrayami mpe abikisaki Loti na likama oyo atindelaki bingumba epai wapi Loti azalaki kovanda.
So when God destroyed the cities of the plain, He remembered Abraham, and He brought Lot out of the catastrophe that destroyed the cities where he had lived.
30 Loti mpe bana na ye mibale ya basi babimaki na Tsoari, bakendeki kovanda na bangomba, pamba te azalaki kobanga kotikala kuna. Ye elongo na bana na ye mibale ya basi bakendeki kovanda kati na lidusu ya libanga.
Lot and his two daughters left Zoar and settled in the mountains—for he was afraid to stay in Zoar—where they lived in a cave.
31 Mokolo moko, kulutu alobaki na leki na ye: « Tata na biso akomi mobange, mpe na etuka oyo, mobali oyo akosangisa na biso nzoto ndenge esalemaka na mokili mobimba, azali te.
One day the older daughter said to the younger, “Our father is old, and there is no man in the land to sleep with us, as is the custom over all the earth.
32 Tika ete tomelisa tata na biso masanga ya vino mpe tosangisa na ye nzoto mpo ete, na nzela ya tata na biso, libota na biso ebunga te. »
Come, let us get our father drunk with wine so we can sleep with him and preserve his line.”
33 Na butu wana, bazwaki masanga ya vino mpe bamelisaki tata na bango. Boye kulutu akendeki mpe asangisaki nzoto na tata na ye, mpe tata na ye atikalaki koyeba likambo yango te, ezala tango mwana na ye ya mwasi akendeki epai na ye to tango alongwaki.
So that night they got their father drunk with wine, and the firstborn went in and slept with her father; he was not aware when she lay down or when she got up.
34 Mokolo oyo elandaki, kulutu alobaki na leki: « Na butu oyo ewuti koleka, nasangisaki nzoto na tata na ngai. Tika ete topesa ye lisusu masanga ya vino na butu ya lelo, mpe yo okokende kosangisa na ye nzoto mpo ete, na nzela ya tata na biso, libota na biso ebunga te. »
The next day the older daughter said to the younger, “Look, I slept with my father last night. Let us get him drunk with wine again tonight so you can go in and sleep with him and we can preserve our father’s line.”
35 Na butu wana lisusu, bazwaki masanga ya vino mpe bamelisaki tata na bango; bongo leki akendeki mpe asangisaki nzoto na tata na ye. Tata na ye atikalaki kaka koyeba likambo yango te, ezala tango mwana na ye ya mwasi akendeki epai na ye to tango alongwaki.
So again that night they got their father drunk with wine, and the younger daughter went in and slept with him; he was not aware when she lay down or when she got up.
36 Boye bana basi oyo mibale ya Loti bakomaki na zemi ya tata na bango.
Thus both of Lot’s daughters became pregnant by their father.
37 Kulutu abotaki mwana mobali mpe apesaki ye kombo « Moabi; » azali tata ya ekolo ya Moabi, kino na mokolo ya lelo.
The older daughter gave birth to a son and named him Moab. He is the father of the Moabites of today.
38 Leki mpe abotaki lisusu mwana mobali mpe apesaki ye kombo « Beni-Ami; » azali tata ya ekolo ya Amoni, kino na mokolo ya lelo.
The younger daughter also gave birth to a son, and she named him Ben-ammi. He is the father of the Ammonites of today.