< Ebandeli 18 >

1 Yawe abimelaki Abrayami pene ya banzete minene ya Mamire, wana avandaki na ekotelo ya ndako na ye ya kapo, na moyi makasi ya midi.
And the Lord appeared to him in the vale of Mambre as he was sitting at the door of his tent, in the very heat of the day.
2 Tango Abrayami atombolaki miso, amonaki mibali misato pene na ye. Mpe tango kaka amonaki bango, atelemaki wuta na ndako na ye ya kapo mpe akendeki mbangu mpo na kokutana na bango; bongo agumbamaki kino na mabele.
And when he had lifted up his eyes, there appeared to him three men standing near him: and as soon as he saw them he ran to meet them from the door of his tent, and adored down to the ground.
3 Alobaki: — Nabondeli bino, bankolo na ngai, soki nazwi ngolu na miso bino, boleka mosali na bino te.
And he said: Lord, if I have found favour in thy sight, pass not away from thy servant:
4 Tika ete namemela bino mwa mayi mpo ete bokoka kosukola makolo mpe bopema na se ya nzete oyo.
But I will fetch a little water, and wash ye your feet, and rest ye under the tree.
5 Tika ete namemela bino mwa eloko ya kolia mpo ete bozwa lisusu makasi na nzoto; bongo bokokoba mobembo na bino, pamba te ezali mpo na yango nde boleki epai na ngai mosali na bino. Bazongisaki: — Ezali malamu, sala ndenge olobi.
And I will set a morsel of bread, and strengthen ye your heart, afterwards you shall pass on: for therefore are you come aside to your servant. And they said: Do as thou hast spoken.
6 Abrayami akotaki na lombangu na ndako na ye ya kapo mpe alobaki na Sara: « Kamata katini misato ya farine mpe sala bagato na lombangu. »
Abraham made haste into the tent to Sara, and said to her: Make haste, temper together three measures of flour, and make cakes upon the hearth.
7 Mpe Abrayami apotaki mbangu na lopango ya bibwele, azwaki mwana ngombe ya mafuta mpe apesaki yango na mosali na ye mpo ete alamba yango noki-noki.
And he himself ran to the herd, and took from thence a calf very tender and very good, and gave it to a young man: who made haste and boiled it.
8 Azwaki mafuta ya ngombe, miliki mpe mosuni oyo alambaki, mpe atiaki yango liboso na bango. Abrayami atelemaki pembeni na bango, na se ya nzete, wana bazalaki kolia.
He took also butter and milk, and the calf which he had boiled, and set before them: but he stood by them under the tree.
9 Sima, batunaki ye: — Wapi Sara, mwasi na yo? Abrayami azongisaki: — Azali na ndako.
And when they had eaten, they said to him: Where is Sara thy wife? He answered: Lo, she is in the tent.
10 Bongo moko kati na bango alobaki: — Solo, na mobu oyo ezali koya, kaka na eleko oyo, nakozonga epai na yo, mpe Sara, mwasi na yo, akozala na mwana mobali. Nzokande, Sara ayokaki maloba wana na ekotelo ya ndako ya kapo, na sima ya Abrayami.
And he said to him: I will return and come to thee at this time, life accompanying and Sara thy wife shall have a son. Which when Sara heard, she laughed behind the door of the tent.
11 Abrayami mpe Sara bazalaki mibange, mpo ete bakomaki na mibu ebele penza mpe Sara azalaki lisusu na makoki te ya kobota.
Now they were both old, and far advanced in years, and it had ceased to be with Sara after the manner of women.
12 Sara asekaki mpe amilobelaki: « Awa nasili konuna boye, nakoki lisusu koyoka posa ya mobali? Kutu nkolo na ngai akomi mpe mobange! »
And she laughed secretly, saying: After I am grown old and my lord is an old man, shall I give myself to pleasure?
13 Yawe alobaki na Abrayami: — Mpo na nini Sara aseki mpe alobi: « Nakoki solo kobota mwana awa nasili kokoma mobange? »
And the Lord said to Abraham: Why did Sara laugh, saying: Shall I who am an old woman bear a child indeed?
14 Boni, ezali na eloko oyo Yawe akoki kolembana? Na mobu oyo ezali koya, na tango oyo ekatama, kaka na eleko oyo, nakozonga epai na yo, mpe Sara akozala na mwana mobali.
Is there any thing hard to God? According to appointment I will return to thee at this same time, life accompanying, and Sara shall have a son.
15 Sara abangaki; boye awanganaki: — Naseki te. Kasi Yawe alobaki: — Ezali ya solo, oseki.
Sara denied, saying: I did not laugh: for she was afraid. But the Lord said, Nay: but thou didst laugh:
16 Tango mibali yango batelemaki mpo na kokoba mobembo na bango na Sodome, Abrayami akendeki kotika bango na nzela.
And when the men rose up from thence, they turned their eyes towards Sodom: and Abraham walked with them, bringing them on the way.
17 Yawe amilobelaki: « Boni, nakoki solo kobombela Abrayami likambo oyo nalingi kosala?
And the Lord said: Can I hide from Abraham what I am about to do:
18 Solo, Abrayami akokoma ekolo monene mpe ya nguya, mpe bato ya bikolo nyonso ya mabele bakomipambola mpo na ye.
Seeing he shall become a great and mighty nation, and in him all the nations of the earth shall be blessed?
19 Pamba te naponaki ye mpo ete ateya bana na ye mpe ndako na ye sima na ye ete bayeba kobatela nzela ya Yawe na kozalaka na etamboli ya malamu mpe ya sembo; na bongo nde, Ngai Yawe, nakokokisela Abrayami elaka oyo napesaki ye. »
For I know that he will command his children, and his household after him to keep the way of the Lord, and do judgment and justice: that for Abraham’s sake the Lord may bring to effect all the things he hath spoken unto him.
20 Bongo Yawe alobaki: « Nayoki sango ete mabe ya bato ya Sodome mpe ya Gomore eleki ndelo, mpe masumu na bango eleki mingi penza.
And the Lord said: The cry of Sodom and Gomorrha is multiplied, and their sin is become exceedingly grievous.
21 Nakokita mpo na kotala soki makambo oyo bazali kosala ekokani na oyo Ngai nayoki. Soki ezali bongo te, nakoyeba. »
I will go down and see whether they have done according to the cry that is come to me: or whether it be not so, that I may know.
22 Mibali yango babalukaki mpe bakendeki na Sodome, kasi Abrayami atelemaki kaka liboso ya Yawe.
And they turned themselves from thence, and went their way to Sodom: but Abraham as yet stood before the Lord.
23 Bongo Abrayami apusanaki mpe alobaki: — Boni, Nkolo na ngai, okoboma penza elongo moto ya sembo mpe moto mabe?
And drawing nigh he said: Wilt thou destroy the just with the wicked?
24 Soki bato ya sembo bazali tuku mitano kati na engumba, okoboma bango kaka? Okolimbisa engumba yango te mpo na bato ya sembo tuku mitano oyo bazali kati na yango?
If there be fifty just men in the city, shall they perish withal? and wilt thou not spare that place for the sake of the fifty just, if they be therein?
25 Te, okoki kosala likambo ya boye te! Okoki te koboma elongo bato ya sembo mpe bato mabe, okoki kosala ndenge moko te na bato ya sembo mpe na bato mabe. Okoki kosala bongo te! Boni, Mosambisi ya mokili mobimba akosambisa na bosembo te?
Far be it from thee to do this thing, and to slay the just with the wicked, and for the just to be in like case as the wicked, this is not beseeming thee: thou who judgest all the earth, wilt not make this judgment.
26 Yawe azongisaki: — Soki nakuti na Sodome bato ya sembo tuku mitano, nakolimbisa engumba mobimba mpo na bango.
And the Lord said to him: If I find in Sodom fifty just within the city, I will spare the whole place for their sake.
27 Abrayami alobaki lisusu: — Solo, nazali na ngai moto pamba mpe putulu, kasi limbisa ete nameka kosolola na Nkolo na ngai.
And Abraham answered, and said: Seeing I have once begun, I will speak to my Lord, whereas I am dust and ashes.
28 Bongo soki motango na bato ya sembo ezali tuku minei na mitano? Boni, okobebisa engumba mobimba mpo na bato mitano oyo bazangi? Yawe azongisaki: — Soki nakuti bato ya sembo tuku minei na mitano, nakobebisa yango te.
What if there be five less than fifty just persons? wilt thou for five and forty destroy the whole city? And he said: I will not destroy it, if I find five and forty.
29 Abrayami alobaki na Ye lisusu: — Bongo soki bato ya sembo bazali kaka tuku minei? Azongisaki: — Soki bazali kaka tuku minei, nakobebisa yango te.
And again he said to him: But if forty be found there, what wilt thou do? He said: I will not destroy it for the sake of forty.
30 Bongo Abrayami alobaki: — Tika ete Nkolo na ngai asilika te soki nakobi koloba: Bongo soki bato ya sembo bazali kaka tuku misato? Azongisaki: — Soki nakuti bato ya sembo tuku misato, nakobebisa yango te.
Lord, saith he, be not angry, I beseech thee, if I speak: What if thirty shall be found there? He answered: I will not do it, if I find thirty there.
31 Abrayami alobaki: —Awa nameki kosolola na Nkolo, boni, okosala nini soki bato ya sembo bazali kaka tuku mibale? Azongisaki: — Mpo na bato ya sembo tuku mibale, nakobebisa engumba te.
Seeing, saith he, I have once begun, I will speak to my Lord. What if twenty be found there? He said: I will not destroy it for the sake of twenty.
32 Bongo Abrayami alobaki: — Tika ete Nkolo na ngai asilika te, pamba te nazali koloba mpo na mbala ya suka: Bongo soki bato ya sembo bazali kaka zomi? Azongisaki: — Mpo na bato ya sembo zomi, nakobebisa engumba te.
I beseech thee, saith he, be not angry, Lord, if I speak yet once more: What if ten should be found there? And he said: I will not destroy it for the sake of ten.
33 Sima na Yawe kosolola na Abrayami, akendeki; mpe Abrayami azongaki na ndako na ye.
And the Lord departed, after he had left speaking to Abraham: and Abraham returned to his place.

< Ebandeli 18 >