< Ebandeli 17 >

1 Tango Abrami akokisaki mibu tuku libwa na libwa ya mbotama, Yawe abimelaki ye mpe alobaki na ye: « Nazali Nzambe-Na-Nguya-Nyonso. Tambola liboso na Ngai mpe zala moto azanga pamela.
Avram doksan dokuz yaşındayken RAB ona görünerek, “Ben Her Şeye Gücü Yeten Tanrı'yım” dedi, “Benim yolumda yürü, kusursuz ol.
2 Nakosala boyokani kati na Ngai mpe yo, mpe nakokomisa bakitani na yo ebele penza. »
Seninle yaptığım antlaşmayı sürdürecek, soyunu alabildiğine çoğaltacağım.”
3 Abrami afukamaki elongi kino na mabele, mpe Nzambe alobaki na ye lisusu:
Avram yüzüstü yere kapandı. Tanrı,
4 « Mpo na Ngai, tala boyokani oyo nazali kosala elongo na yo: ‹ Okozala tata ya bikolo ebele.
“Seninle yaptığım antlaşma şudur” dedi, “Birçok ulusun babası olacaksın.
5 Bakobenga yo lisusu Abrami te; kombo na yo ekokoma Abrayami, pamba te nakokomisa yo tata ya bikolo ebele.
Artık adın Avram değil, İbrahim olacak. Çünkü seni birçok ulusun babası yapacağım.
6 Nakopesa yo mabota ebele, nakobimisa bikolo mpe bakonzi na nzela na yo.
Seni çok verimli kılacağım. Soyundan uluslar doğacak, krallar çıkacak.
7 Nakobatela boyokani na Ngai lokola boyokani ya libela na libela kati na Ngai mpe yo, mpe elongo na bakitani na yo sima na yo, mpo na milongo oyo ekoya na sima, mpo ete nazala Nzambe na yo mpe Nzambe ya bakitani na yo sima na yo.
Antlaşmamı seninle ve soyunla kuşaklar boyunca, sonsuza dek sürdüreceğim. Senin, senden sonra da soyunun Tanrısı olacağım.
8 Nakopesa lokola libula ya seko na seko, epai na yo mpe epai ya bakitani na yo sima na yo, mokili nyonso ya Kanana epai wapi ozali mopaya. Nakozala Nzambe ya bakitani na yo. › »
Bir yabancı olarak yaşadığın toprakları, bütün Kenan ülkesini sonsuza dek mülkünüz olmak üzere sana ve soyuna vereceğim. Onların Tanrısı olacağım.”
9 Nzambe alobaki lisusu na Abrayami: « Kasi mpo na yo, osengeli kobatela boyokani na Ngai, yo elongo na bakitani na yo sima na yo mpo na milongo oyo ekoya sima.
Tanrı İbrahim'e, “Sen ve soyun kuşaklar boyu antlaşmama bağlı kalmalısınız” dedi,
10 Tala boyokani na Ngai elongo na yo mpe bakitani na yo sima na yo, boyokani oyo osengeli kobatela: Mwana mobali nyonso kati na bino asengeli kokatama ngenga.
“Seninle ve soyunla yaptığım antlaşmanın koşulu şudur: Aranızdaki erkeklerin hepsi sünnet edilecek.
11 Kokatama ngenga ekozala elembo ya boyokani kati na bino mpe Ngai.
Sünnet olmalısınız. Sünnet aramızdaki antlaşmanın belirtisi olacak.
12 Mpo na milongo nyonso oyo ekoya, mwana mobali nyonso kati na bino, oyo akokisi mikolo mwambe asengeli kokatama ngenga: ezala mwana mobali oyo abotami kati na ndako na yo to mwana mobali oyo osombi na mosolo na yo epai ya mopaya, mwana mobali oyo azali mokitani na yo te, ye mpe asengeli kokatama ngenga.
Evinizde doğmuş ya da soyunuzdan olmayan bir yabancıdan satın alınmış köleler dahil sekiz günlük her erkek çocuk sünnet edilecek. Gelecek kuşaklarınız boyunca sürecek bu.
13 Mowumbu nyonso oyo abotami kati na ndako na yo to oyo osombi na mosolo na yo asengeli kokatama ngenga. Boyokani na Ngai ekozala kati na banzoto na bino lokola boyokani ya libela na libela.
Evinizde doğan ya da satın aldığınız her çocuk kesinlikle sünnet edilecek. Bedeninizdeki bu belirti sonsuza dek sürecek antlaşmamın simgesi olacak.
14 Mwana mobali nyonso oyo akokatama ngenga te, bakolongola ye kati na bato na ye, mpo ete abebisi boyokani na Ngai. »
Sünnet edilmemiş her erkek halkının arasından atılacak, çünkü antlaşmamı bozmuş demektir.”
15 Nzambe alobaki lisusu na Abrayami: « Mpo na Sarayi, mwasi na yo, okobenga ye lisusu te Sarayi, kasi okokoma kobenga ye Sara.
Tanrı, “Karın Saray'a gelince, ona artık Saray demeyeceksin” dedi, “Bundan böyle onun adı Sara olacak.
16 Nakopambola ye mpe nakopesa yo penza mwana mobali na nzela na ye; nakopambola ye mpo ete akoma mama ya bikolo. Bakonzi ya bikolo bakobima na nzela na ye. »
Onu kutsayacak, ondan sana bir oğul vereceğim. Onu kutsayacağım, ulusların anası olacak. Halkların kralları onun soyundan çıkacak.”
17 Abrayami afukamaki elongi kino na mabele, asekaki mpe amilobelaki: « Eh! Mobali oyo azali na mibu nkama moko ya mbotama akoki lisusu kobota mwana! Bongo Sara, mwasi oyo azali na mibu tuku libwa ya mbotama, akoki penza kokumba zemi! »
İbrahim yüzüstü yere kapandı ve güldü. İçinden, “Yüz yaşında bir adam çocuk sahibi olabilir mi?” dedi, “Doksan yaşındaki Sara doğurabilir mi?”
18 Boye Abrayami alobaki na Nzambe: — Tika ete Isimaeli awumela na se ya lipamboli na Yo!
Sonra Tanrı'ya, “Keşke İsmail'i mirasçım kabul etseydin!” dedi.
19 Nzambe alobaki: — Te! Mwasi na yo, Sara, akobotela yo mwana mobali, mpe okobenga ye « Izaki. » Nakobatela boyokani na Ngai lokola boyokani ya libela elongo na ye mpe bakitani na ye sima na ye.
Tanrı, “Hayır. Ama karın Sara sana bir oğul doğuracak, adını İshak koyacaksın” dedi, “Onunla ve soyuyla antlaşmamı sonsuza dek sürdüreceğim.
20 Kasi mpo na Isimaeli, nayoki yo. Solo, nakopambola ye, nakopesa ye mabota ebele mpe nakokomisa bakitani na ye ebele. Akozala tata ya bakambi zomi na mibale, mpe nakokomisa ye tata ya ekolo monene.
İsmail'e gelince, seni işittim. Onu kutsayacak, verimli kılacak, soyunu alabildiğine çoğaltacağım. On iki beyin babası olacak. Soyunu büyük bir ulus yapacağım.
21 Kasi na oyo etali boyokani na Ngai, nakosala yango elongo na Izaki, mwana mobali oyo Sara akobotela yo na eleko oyo, na mobu oyo ezali koya.
Ancak antlaşmamı gelecek yıl bu zaman Sara'nın doğuracağı oğlun İshak'la sürdüreceğim.”
22 Tango Nzambe asilisaki kosolola na Abrayami, akendeki.
Tanrı İbrahim'le konuşmasını bitirince ondan ayrılıp yukarıya çekildi.
23 Kaka na mokolo wana, Abrayami azwaki mwana na ye ya mobali, Isimaeli, mpe bawumbu nyonso, ezala ba-oyo babotamaki na ndako na ye to ba-oyo asombaki na mosolo, akatisaki bango nyonso ngenga ndenge kaka Nzambe alobaki na ye.
İbrahim evindeki bütün erkekleri –oğlu İsmail'i, evinde doğanların, satın aldığı uşakların hepsini– Tanrı'nın kendisine buyurduğu gibi o gün sünnet ettirdi.
24 Abrayami azalaki na mibu tuku libwa na libwa ya mbotama tango akatamaki ngenga;
İbrahim sünnet olduğunda doksan dokuz yaşındaydı.
25 mpe Isimaeli, mwana na ye ya mobali, azalaki na mibu zomi na misato tango akatamaki ngenga.
Oğlu İsmail on üç yaşında sünnet oldu.
26 Abrayami mpe mwana na ye ya mobali, Isimaeli, bakatamaki ngenga mokolo moko.
İbrahim, oğlu İsmail'le aynı gün sünnet edildi.
27 Mibali nyonso kati na ndako ya Abrayami, ezala ba-oyo babotamaki na ndako na ye to ba-oyo asombaki na mokili ya bapaya, bakatamaki ngenga elongo na ye.
İbrahim'in evindeki bütün erkekler –evinde doğanlar ve yabancılardan satın alınanlar– onunla birlikte sünnet oldu.

< Ebandeli 17 >