< Ebandeli 16 >

1 Sarayi, mwasi ya Abrami, abotelaki ye mwana te. Nzokande azalaki na mosali moko ya mwasi, moto ya Ejipito; kombo na ye « Agari. »
Now Sarai, Abram’s wife, bore him no children. She had a servant, an Egyptian, whose name was Hagar.
2 Sarayi alobaki na Abrami: — Yawe apesi ngai mabota te. Kende, sangisa nzoto na mosali na ngai ya mwasi, tango mosusu nakotonga libota na nzela na ye. Abrami ayokaki maloba ya Sarayi.
Sarai said to Abram, “See now, the LORD has restrained me from bearing. Please go in to my servant. It may be that I will obtain children by her.” Abram listened to the voice of Sarai.
3 Sima na mibu zomi, wana Abrami avandaki na Kanana, mwasi na ye Sarayi apesaki ye Agari, mosali na ye ya mwasi, moto ya Ejipito, mpo ete azala mwasi na ye.
Sarai, Abram’s wife, took Hagar the Egyptian, her servant, after Abram had lived ten years in the land of Canaan, and gave her to Abram her husband to be his wife.
4 Abrami asangisaki nzoto na Agari, mpe Agari akomaki na zemi. Tango Agari asosolaki ete akomi na zemi, akomaki kotiola Sarayi, nkolo na ye.
He went in to Hagar, and she conceived. When she saw that she had conceived, her mistress was despised in her eyes.
5 Boye, Sarayi alobaki na Abrami: — Ezali mpo na yo nde ngai nazali komona pasi ya boye; napesaki mosali na ngai ya mwasi na maboko na yo. Mpe sik’oyo lokola amoni ete azali na zemi, akomi kotiola ngai. Tika ete Yawe akata likambo kati na ngai mpe yo.
Sarai said to Abram, “This wrong is your fault. I gave my servant into your bosom, and when she saw that she had conceived, she despised me. May the LORD judge between me and you.”
6 Abrami alobaki: — Mosali na yo azali na maboko na yo. Sala epai na ye nyonso oyo omoni malamu. Boye, Sarayi akomaki konyokola Agari mpe Agari akimaki mosika na ye.
But Abram said to Sarai, “Behold, your maid is in your hand. Do to her whatever is good in your eyes.” Sarai dealt harshly with her, and she fled from her face.
7 Anjelu ya Yawe amonaki Agari na esobe, pene ya etima oyo ezali na nzela ya Shuri.
The LORD’s angel found her by a fountain of water in the wilderness, by the fountain on the way to Shur.
8 Atunaki ye: — Agari, mosali ya Sarayi, owuti wapi mpe ozali kokende wapi? Azongisaki: — Nazali kokima mosika ya Sarayi, nkolo na ngai.
He said, “Hagar, Sarai’s servant, where did you come from? Where are you going?” She said, “I am fleeing from the face of my mistress Sarai.”
9 Anjelu ya Yawe alobaki na ye: — Zonga epai ya nkolo na yo mpe mikitisa liboso na ye.
The LORD’s angel said to her, “Return to your mistress, and submit yourself under her hands.”
10 Anjelu ya Yawe alobaki na ye lisusu: — Nakokomisa bakitani na yo ebele penza mpe moto moko te akokoka kotanga bango.
The LORD’s angel said to her, “I will greatly multiply your offspring, that they will not be counted for multitude.”
11 Alobaki na ye lisusu: — Ozali na zemi mpe okobota mwana mobali, okopesa ye kombo « Isimaeli, » pamba te Yawe ayoki yo, kati na mawa na yo.
The LORD’s angel said to her, “Behold, you are with child, and will bear a son. You shall call his name Ishmael, because the LORD has heard your affliction.
12 Akozala lokola ane ya zamba. Loboko na ye ekobundisa moto nyonso, mpe loboko ya moto nyonso ekobundisa ye; akovanda esika moko te na bandeko na ye.
He will be like a wild donkey among men. His hand will be against every man, and every man’s hand against him. He will live opposed to all of his brothers.”
13 Agari amitunaki: « Boni, namoni solo Nzambe oyo azali komona ngai? » Boye, Agari apesaki Yawe oyo asololaki na ye Kombo « Ata-Eli-Royi, » oyo elakisi: Nzambe oyo azali komona ngai.
She called the name of the LORD who spoke to her, “You are a God who sees,” for she said, “Have I even stayed alive after seeing him?”
14 Yango wana babengaka libulu ya mayi yango Beri Lakai-Royi. Libulu ya mayi yango ezali na kati-kati ya Kadeshi mpe Beredi.
Therefore the well was called Beer Lahai Roi. Behold, it is between Kadesh and Bered.
15 Boye, Agari abotelaki Abrami mwana mobali mpe Abrami apesaki ye kombo « Isimaeli. »
Hagar bore a son for Abram. Abram called the name of his son, whom Hagar bore, Ishmael.
16 Abrami azalaki na mibu tuku mwambe na motoba ya mbotama tango Agari abotelaki ye Isimaeli.
Abram was eighty-six years old when Hagar bore Ishmael to Abram.

< Ebandeli 16 >