< Ebandeli 15 >

1 Sima na makambo oyo, Yawe alobaki na Abrami na nzela ya emoniseli: — Kobanga te, Abrami! Nazali nguba na yo, lifuti na yo ekozala monene.
After these things the LORD’s word came to Abram in a vision, saying, “Don’t be afraid, Abram. I am your shield, your exceedingly great reward.”
2 Kasi Abrami azongisaki: — Oh Nkolo Yawe, okopesa ngai nini? Nazali na mwana te, mpe ezali Eliezeri ya Damasi nde akokitana na libula na ngai.
Abram said, “Lord GOD, what will you give me, since I go childless, and he who will inherit my estate is Eliezer of Damascus?”
3 Abrami alobaki lisusu: — Opesi ngai mwana te; yango wana mosali moko kati na ndako na ngai akozala mokitani ya libula na ngai!
Abram said, “Behold, you have given no children to me: and, behold, one born in my house is my heir.”
4 Yawe alobaki na ye: — Moto wana akozala mokitani ya libula na yo te. Kasi mwana oyo akobima na mokongo na yo nde akozala mokitani ya libula na yo.
Behold, the LORD’s word came to him, saying, “This man will not be your heir, but he who will come out of your own body will be your heir.”
5 Yawe amemaki Abrami na libanda mpe alobaki na ye: — Tala na likolo mpe tanga minzoto soki okokoka kotanga yango. Alobaki na ye lisusu: — Ezali boye nde bakitani na yo bakozala.
The LORD brought him outside, and said, “Look now toward the sky, and count the stars, if you are able to count them.” He said to Abram, “So your offspring will be.”
6 Abrami azalaki na kondima epai ya Yawe, yango wana Yawe atangaki ye lokola moto ya sembo.
He believed in the LORD, who credited it to him for righteousness.
7 Alobaki na ye lisusu: — Nazali Yawe oyo nabimisaki yo wuta na Uri, mokili ya bato ya Chalide, mpo na kopesa yo mokili oyo.
He said to Abram, “I am the LORD who brought you out of Ur-Kasdim, to give you this land to inherit it.”
8 Kasi Abrami alobaki: — Ah Nkolo Yawe, nakoyeba ndenge nini ete mokili oyo epesameli ngai?
He said, “Lord GOD, how will I know that I will inherit it?”
9 Yawe alobaki na ye: — Memela Ngai mwana ngombe moko ya mwasi ya mibu misato, ntaba ya mwasi ya mibu misato, meme ya mobali ya mibu misato, ebenga moko ya zamba mpe ebenga moko ya mboka.
He said to him, “Bring me a heifer three years old, a female goat three years old, a ram three years old, a turtledove, and a young pigeon.”
10 Abrami amemelaki Ye banyama oyo nyonso, akataki yango na biteni mibale mpe atiaki yango etalana eteni moko na eteni mosusu; kasi akataki bandeke te.
He brought him all these, and divided them in the middle, and laid each half opposite the other; but he didn’t divide the birds.
11 Bandeke oyo eliaka misuni ekitaki mpo na kolia misuni yango, kasi Abrami abenganaki yango.
The birds of prey came down on the carcasses, and Abram drove them away.
12 Tango moyi ekitaki, Abrami alalaki pongi makasi. Na kati ya molili makasi, somo ekangaki ye.
When the sun was going down, a deep sleep fell on Abram. Now terror and great darkness fell on him.
13 Boye, Yawe alobaki na Abrami: — Yeba solo ete bakitani na yo bakozala bapaya kati na mokili ya bapaya epai wapi bakozala bawumbu; mpe bakonyokola bango kuna mibu nkama minei.
He said to Abram, “Know for sure that your offspring will live as foreigners in a land that is not theirs, and will serve them. They will afflict them four hundred years.
14 Kasi nakopesa etumbu na ekolo oyo ekokomisa bango bawumbu; mpe na sima, bakobima longwa na mokili yango elongo na bozwi ebele.
I will also judge that nation, whom they will serve. Afterward they will come out with great wealth;
15 Bongo yo, okokufa na kimia mpe okokundama sima na kimobange ya esengo.
but you will go to your fathers in peace. You will be buried at a good old age.
16 Na molongo ya minei, bakitani na yo bakozonga awa, pamba te masumu ya bato ya Amori ekomi nanu ebele te.
In the fourth generation they will come here again, for the iniquity of the Amorite is not yet full.”
17 Tango moyi elalaki mpe molili eyaki makasi, mbabola ya milinga mpe koni ya moto elekaki kati ya biteni ya banyama.
It came to pass that, when the sun went down, and it was dark, behold, a smoking furnace and a flaming torch passed between these pieces.
18 Na mokolo yango, Yawe asalaki boyokani elongo na Abrami mpe alobaki: « Nakopesa mokili oyo na bakitani na yo wuta na moluka ya Ejipito kino na ebale Efrate:
In that day the LORD made a covenant with Abram, saying, “I have given this land to your offspring, from the river of Egypt to the great river, the river Euphrates:
19 mokili ya bato ya Keni, ya bato ya Kenizi, ya bato ya Kadimoni,
the land of the Kenites, the Kenizzites, the Kadmonites,
20 ya bato ya Iti, ya bato ya Perizi, ya bato ya Refayimi,
the Hittites, the Perizzites, the Rephaim,
21 ya bato ya Amori, ya bato ya Kanana, ya bato ya Girigazi mpe ya bato ya Yebusi. »
the Amorites, the Canaanites, the Girgashites, and the Jebusites.”

< Ebandeli 15 >