< Ebandeli 13 >
1 Boye Abrami alongwaki na Ejipito mpe akendeki na Negevi elongo na mwasi na ye mpe biloko nyonso oyo azalaki na yango; Loti mpe akendeki na ye elongo.
Тако отиде Аврам из Мисира горе на југ, он и жена му и све што имаше, такође и Лот с њим.
2 Abrami akomaki na bozwi mingi: bibwele, palata mpe wolo.
А беше Аврам врло богат стоком, сребром и златом.
3 Longwa na Negevi, akendeki malembe-malembe kino na Beteli, na esika oyo ezalaki kati ya Beteli mpe Ayi, epai wapi ndako na ye ya kapo ezalaki
И иђаше својим путевима од југа све до Ветиља, до места где му прво беше шатор, између Ветиља и Гаја,
4 mpe atongaki etumbelo ya liboso. Ezalaki na esika yango nde Abrami abelelaki Kombo ya Yawe.
До места, где пре беше начинио жртвеник; и онде призва Аврам име Господње.
5 Loti, oyo azalaki kotambola elongo na Abrami, azalaki mpe na bameme, bantaba, bangombe mpe basali.
А и Лот који иђаше с Аврамом имаше оваца и говеда и шатора.
6 Boye etuka ekomaki moke mpo na bango mibale, pamba te bomengo na bango ezalaki ebele penza, mpe bakokaki lisusu te kovanda esika moko;
И земља не могаше их носити заједно, јер благо њихово беше велико да не могоше живети заједно,
7 mpe koswana ekotaki kati na babateli bibwele ya Abrami mpe babateli bibwele ya Loti. Nzokande, na tango wana, bato ya Kanana mpe ya Perizi bazalaki kovanda kati na mokili yango.
И беше свађа међу пастирима Аврамове стоке и пастирима Лотове стоке. А у то време живеху Хананеји и Ферезеји у оној земљи.
8 Abrami alobaki na Loti: « Tika ete koswana ezala te kati na ngai mpe yo to kati na babateli bibwele na yo mpe babateli bibwele na ngai, pamba te tozali bandeko.
Па Аврам рече Лоту: Немој да се свађамо ја и ти, ни моји пастири и твоји пастири; јер смо браћа.
9 Mokili mobimba ezali liboso na yo. Ezali malamu tokabwana: soki yo okeyi na ngambo ya loboko ya mwasi, ngai nakokende na ngambo ya loboko ya mobali; soki okeyi na ngambo ya loboko ya mobali, ngai nakokende na ngambo ya loboko ya mwasi. »
Није ли ти отворена цела земља? Одели се од мене. Ако ћеш ти на лево, ја ћу на десно; ако ли ћеш ти на десно ја ћу на лево.
10 Boye Loti atalaki mpe amonaki etando nyonso ya Yordani oyo ezalaki na mabele kitoko mpe ekenda kino na Tsoari. Liboso ete Yawe abebisa Sodome mpe Gomore, ezalaki lokola elanga ya Yawe, lokola mokili ya Ejipito.
Тада Лот подиже очи своје и сагледа сву равницу јорданску, како целу натапаше река, беше као врт Господњи, као земља мисирска, све до Загора, пре него Господ затре Содом и Гомор.
11 Loti aponaki etando ya Yordani mpe akendeki na ngambo ya este. Ezalaki ndenge wana nde bakabwanaki.
И Лот изабра себи сву равницу јорданску, и отиде Лот на исток; и разделише се један од другог:
12 Abrami avandaki na mokili ya Kanana, mpe Loti avandaki kati na bingumba ya etando mpe atelemisaki bandako na ye ya kapo pene ya Sodome.
Аврам живљаше у земљи хананској, а Лот живљаше по градовима у оној равници премештајући своје шаторе до Содома.
13 Bato ya Sodome bazalaki penza bato mabe mpe bato ya masumu na miso ya Yawe.
А људи у Содому беху неваљали, и грешаху Господу веома.
14 Sima na bokabwani ya Abrami na Loti, Yawe alobaki na Abrami: « Na esika oyo ozali, tombola miso na yo mpe tala na ngambo ya nor, ya sude, ya este mpe ya weste.
А Господ рече Авраму, пошто се Лот одели од њега: Подигни сада очи своје, па погледај с места где си на север и на југ и на исток и на запад.
15 Mokili nyonso oyo ozali komona, nakopesa yango epai na yo mpe na bakitani na yo mpo na libela.
Јер сву земљу што видиш теби ћу дати и семену твом до века.
16 Nakokomisa bakitani na yo ebele lokola putulu ya mabele; bongo soki moto akoki kotanga putulu, akokoka mpe kotanga bakitani na yo.
И учинићу да семена твог буде као праха на земљи; ако ко узможе избројати прах на земљи, моћи ће избројати и семе твоје.
17 Telema, tambola kati na mokili na bangambo nyonso, pamba te nakopesa yango epai na yo. »
Устани, и пролази ту земљу у дужину и у ширину; јер ћу је теби дати.
18 Abrami alongolaki bandako na ye ya kapo mpe akendeki kovanda na Ebron, pene ya banzete minene ya Mamire epai wapi atongaki etumbelo mpo na Yawe.
И Аврам диже шаторе, и дође и насели се у равници мамријској, која је код Хеврона, и онде начини жртвеник Господу.