< Ebandeli 12 >

1 Yawe alobaki na Abrami: « Bima wuta na mokili na yo, wuta na libota na yo mpe wuta na ndako ya tata na yo, mpo na lobiko na yo, mpe kende na mokili oyo nakolakisa yo.
Now the LORD said to Abram, “Leave your country, and your relatives, and your father’s house, and go to the land that I will show you.
2 Nakokomisa yo ekolo monene mpe nakopambola yo; nakokomisa kombo na yo monene, mpe okozala etima ya mapamboli.
I will make of you a great nation. I will bless you and make your name great. You will be a blessing.
3 Nakopambola bato oyo bakopambola yo, mpe nakolakela mabe moto oyo akolakela yo mabe; mpe bato ya bituka nyonso ya mabele bakomipambola mpo na yo. »
I will bless those who bless you, and I will curse him who treats you with contempt. All the families of the earth will be blessed through you.”
4 Abrami akendeki ndenge Yawe alobaki na ye; mpe Loti akendeki na ye elongo. Abrami azalaki na mibu tuku sambo na mitano tango abimaki na engumba Arani.
So Abram went, as the LORD had told him. Lot went with him. Abram was seventy-five years old when he departed from Haran.
5 Abrami azwaki mwasi na ye Sarayi; Loti, mwana ya ndeko na ye; bomengo nyonso oyo akomaki na yango mpe bato oyo azwaki na Arani. Babimaki wuta na Arani mpo na kokende na Kanana mpe bakomaki kuna.
Abram took Sarai his wife, Lot his brother’s son, all their possessions that they had gathered, and the people whom they had acquired in Haran, and they went to go into the land of Canaan. They entered into the land of Canaan.
6 Abrami atambolaki kati na mokili yango kino na esika oyo babengaka Sishemi, na nzete monene ya More. Na tango wana, bato ya Kanana bazalaki kovanda na mokili yango.
Abram passed through the land to the place of Shechem, to the oak of Moreh. At that time, Canaanites were in the land.
7 Yawe amimonisaki epai ya Abrami mpe alobaki: « Nakopesa mokili oyo epai ya bakitani na yo. » Boye Abrami atongaki na esika yango etumbelo mpo na Yawe oyo amimonisaki epai na ye.
The LORD appeared to Abram and said, “I will give this land to your offspring.” He built an altar there to the LORD, who had appeared to him.
8 Longwa wana, akendeki na bangomba ya este ya Beteli. Atongaki ndako na ye ya kapo kati ya Beteli mpe Ayi, na esika oyo atongaki etumbelo mpo na Yawe mpe abelelaki Kombo ya Yawe. Beteli ezalaki na ngambo ya weste mpe Ayi, na ngambo ya este.
He left from there to go to the mountain on the east of Bethel and pitched his tent, having Bethel on the west, and Ai on the east. There he built an altar to the LORD and called on the LORD’s name.
9 Sima, Abrami alongwaki wana mpe akendeki malembe-malembe kino na Negevi.
Abram traveled, still going on toward the South.
10 Nzala makasi ekotaki na mokili; bongo Abrami akendeki kovanda na Ejipito mpo na tango moke, pamba te nzala makasi ekotaki na mokili.
There was a famine in the land. Abram went down into Egypt to live as a foreigner there, for the famine was severe in the land.
11 Tango akomaki pene ya kokota na Ejipito, alobaki na mwasi na ye Sarayi: « Nayebi ete ozali mwasi kitoko penza.
When he had come near to enter Egypt, he said to Sarai his wife, “See now, I know that you are a beautiful woman to look at.
12 Tango bato ya Ejipito bakomona yo, bakoloba: ‹ Azali mwasi na ye. › Boye, bakoboma ngai mpe bakotika yo na bomoi.
It will happen that when the Egyptians see you, they will say, ‘This is his wife.’ They will kill me, but they will save you alive.
13 Kasi yo, loba na bango ete ozali ndeko na ngai ya mwasi. Na bongo, bakosalela ngai bolamu mpo na yo, mpe bomoi na ngai ekobika mpo na yo. »
Please say that you are my sister, that it may be well with me for your sake, and that my soul may live because of you.”
14 Tango Abrami akomaki na Ejipito, bato ya Ejipito bamonaki ete Sarayi azalaki mwasi kitoko penza.
When Abram had come into Egypt, some Egyptians saw that the woman was very beautiful.
15 Wana bakonzi ya basali ya Faraon bamonaki ye, bakumisaki ye liboso ya Faraon mpe bamemaki ye na ndako ya Faraon mpo ete akoma mwasi na ye.
The princes of Pharaoh saw her, and praised her to Pharaoh; and the woman was taken into Pharaoh’s house.
16 Basalelaki Abrami bolamu likolo ya Sarayi, mpe Abrami azwaki bameme, bantaba mpe bangombe, ba-ane, basali ya basi mpe ya mibali, bana ya ba-ane mpe bashamo.
He dealt well with Abram for her sake. He had sheep, cattle, male donkeys, male servants, female servants, female donkeys, and camels.
17 Kasi Yawe apesaki etumbu makasi epai ya Faraon mpe ndako na ye mpo na Sarayi, mwasi ya Abrami.
The LORD afflicted Pharaoh and his house with great plagues because of Sarai, Abram’s wife.
18 Boye, Faraon abengisaki Abrami mpe alobaki na ye: « Likambo nini osali ngai? Mpo na nini oyebisaki ngai te ete azali mwasi na yo?
Pharaoh called Abram and said, “What is this that you have done to me? Why didn’t you tell me that she was your wife?
19 Mpo na nini olobaki: ‹ Azali ndeko na ngai ya mwasi? › Mpo na yango, nakomisaki ye mwasi na ngai. Sik’oyo tala mwasi na yo, kamata ye mpe kende! »
Why did you say, ‘She is my sister,’ so that I took her to be my wife? Now therefore, see your wife, take her, and go your way.”
20 Boye, Faraon apesaki mitindo epai ya bato na ye na tina na Abrami ete babengana ye elongo na mwasi na ye mpe biloko nyonso oyo azalaki na yango.
Pharaoh commanded men concerning him, and they escorted him away with his wife and all that he had.

< Ebandeli 12 >