< Ebandeli 11 >

1 Na tango wana, bato ya mokili mobimba bazalaki koloba monoko moko mpe bazalaki na elobeli moko.
Now the whole world had one language and a common form of speech.
2 Tango bato bazalaki kotambola mpo na kokende na ngambo ya weste, bamonaki etando moko ya monene na mokili ya Shineari mpe bavandaki kuna.
And as people journeyed eastward, they found a plain in the land of Shinar and settled there.
3 Balobanaki bango na bango: « Tosala babiliki mpe totumba yango na moto. » Boye, basalelaki babiliki lokola mabanga mpe potopoto ya mwindo mpo na kotongela.
And they said to one another, “Come, let us make bricks and bake them thoroughly.” So they used brick instead of stone, and tar instead of mortar.
4 Balobaki: « Tokende, totonga engumba mpo na biso mpe ndako molayi oyo songe na yango ekokoma kino na lola, mpo ete kombo na biso ekende sango mpe topanzana te na mokili mobimba. »
“Come,” they said, “let us build for ourselves a city with a tower that reaches to the heavens, that we may make a name for ourselves and not be scattered over the face of all the earth.”
5 Kasi Yawe akitaki mpo na kotala engumba mpe ndako molayi oyo bato babandaki kotonga.
Then the LORD came down to see the city and the tower that the sons of men were building.
6 Yawe alobaki: « Lokola bato oyo nyonso balongi kokoma ekolo moko mpe koloba monoko moko, bongo bakomi kino kosala mosala monene oyo, eloko moko te ekopekisa bango sik’oyo kokokisa mabongisi nyonso oyo bakokana kosala!
And the LORD said, “If they have begun to do this as one people speaking the same language, then nothing they devise will be beyond them.
7 Boye, tokita mpe totia mobulu kati na maloba na bango mpo ete bango na bango bayokana lisusu te. »
Come, let Us go down and confuse their language, so that they will not understand one another’s speech.”
8 Wuta na Babeli, Yawe apanzaki bango na mokili mobimba mpe batikaki kotonga engumba.
So the LORD scattered them from there over the face of all the earth, and they stopped building the city.
9 Yango wana, babengaka yango Babeli, pamba te kuna nde Yawe atiaki mobulu kati na maloba ya bato ya mokili mobimba, mpe wuta kuna, Yawe apanzaki bato na mokili mobimba.
That is why it is called Babel, for there the LORD confused the language of the whole world, and from that place the LORD scattered them over the face of all the earth.
10 Tala libota ya Semi: Mibu mibale sima na mpela, wana Semi azalaki nanu na mibu nkama moko ya mbotama, akomaki tata ya Aripakishadi.
This is the account of Shem. Two years after the flood, when Shem was 100 years old, he became the father of Arphaxad.
11 Sima na mbotama ya Aripakishadi, Semi awumelaki na bomoi mibu nkama mitano mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi.
And after he had become the father of Arphaxad, Shem lived 500 years and had other sons and daughters.
12 Tango Aripakishadi akokisaki mibu tuku misato na mitano ya mbotama, abotaki mwana mobali na kombo « Shela. »
When Arphaxad was 35 years old, he became the father of Shelah.
13 Sima na mbotama ya Shela, Aripakishadi awumelaki na bomoi mibu nkama minei na misato mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi.
And after he had become the father of Shelah, Arphaxad lived 403 years and had other sons and daughters.
14 Tango Shela akokisaki mibu tuku misato ya mbotama, abotaki Eberi.
When Shelah was 30 years old, he became the father of Eber.
15 Mpe sima na mbotama ya Eberi, Shela awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama minei na misato mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi.
And after he had become the father of Eber, Shelah lived 403 years and had other sons and daughters.
16 Tango Eberi akokisaki mibu tuku misato na minei ya mbotama, abotaki Pelegi.
When Eber was 34 years old, he became the father of Peleg.
17 Mpe sima na mbotama ya Pelegi, Eberi awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama minei na tuku misato mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi.
And after he had become the father of Peleg, Eber lived 430 years and had other sons and daughters.
18 Tango Pelegi akokisaki mibu tuku misato ya mbotama, abotaki Rewu.
When Peleg was 30 years old, he became the father of Reu.
19 Mpe sima na mbotama ya Rewu, Pelegi awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama mibale na libwa mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi.
And after he had become the father of Reu, Peleg lived 209 years and had other sons and daughters.
20 Tango Rewu akokisaki mibu tuku misato na mibale ya mbotama, abotaki Serugi.
When Reu was 32 years old, he became the father of Serug.
21 Sima na mbotama ya Serugi, Rewu awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama mibale na sambo mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi.
And after he had become the father of Serug, Reu lived 207 years and had other sons and daughters.
22 Tango Serugi akokisaki mibu tuku misato ya mbotama, abotaki Naori.
When Serug was 30 years old, he became the father of Nahor.
23 Sima na mbotama ya Naori, Serugi awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama mibale mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi.
And after he had become the father of Nahor, Serug lived 200 years and had other sons and daughters.
24 Tango Naori akokisaki mibu tuku mibale na libwa ya mbotama, abotaki Tera.
When Nahor was 29 years old, he became the father of Terah.
25 Mpe sima na mbotama ya Tera, Naori awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama moko na zomi na libwa mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi.
And after he had become the father of Terah, Nahor lived 119 years and had other sons and daughters.
26 Tango Tera akokisaki mibu tuku sambo ya mbotama, abotaki Abrami, Naori mpe Arani.
When Terah was 70 years old, he became the father of Abram, Nahor, and Haran.
27 Tala libota ya Tera: Tera abotaki Abrami, Naori mpe Arani. Arani nde azalaki tata ya Loti.
This is the account of Terah. Terah became the father of Abram, Nahor, and Haran. And Haran became the father of Lot.
28 Wana tata na ye, Tera, azalaki nanu na bomoi, Arani akufaki kati na Uri, mokili ya bato ya Chalide, mokili epai wapi abotamaki.
During his father Terah’s lifetime, Haran died in his native land, in Ur of the Chaldeans.
29 Kombo ya mwasi ya Abrami ezalaki « Sarayi, » mpe kombo ya mwasi ya Naori ezalaki « Milika. » Milika azalaki mwana mwasi ya Arani; mpe Arani azalaki na mwana mwasi mosusu: kombo na ye ezalaki « Yisika. »
And Abram and Nahor took wives for themselves. Abram’s wife was named Sarai, and Nahor’s wife was named Milcah; she was the daughter of Haran, who was the father of both Milcah and Iscah.
30 Sarayi azalaki ekomba: azalaki na mwana te.
But Sarai was barren; she had no children.
31 Tera azwaki Abrami, mwana na ye ya mobali; Loti, koko na ye mpe mwana mobali ya Arani; mpe Sarayi, bokilo na ye mpe mwasi ya mwana na ye Abrami, babimaki na Uri ya bato ya Chalide mpo na kokende na Kanana. Kasi tango bakomaki na engumba Arani, bavandaki kuna.
And Terah took his son Abram, his grandson Lot son of Haran, and his daughter-in-law Sarai the wife of Abram, and they set out from Ur of the Chaldeans for the land of Canaan. But when they arrived in Haran, they settled there.
32 Tera awumelaki na bomoi mibu nkama mibale na mitano, sima akufaki na engumba Arani.
Terah lived 205 years, and he died in Haran.

< Ebandeli 11 >