< Ebandeli 10 >

1 Tala libota ya Noa: Semi, Cham mpe Jafeti; bango mpe babotaki bakitani sima na mpela.
ואלה תולדת בני נח שם חם ויפת ויולדו להם בנים אחר המבול׃
2 Bana mibali ya Jafeti: Gomeri, Magogi, Madayi, Yavani, Tubali, Mesheki mpe Tirasi.
בני יפת גמר ומגוג ומדי ויון ותבל ומשך ותירס׃
3 Bana mibali ya Gomeri: Ashikenazi, Rifati mpe Togarima.
ובני גמר אשכנז וריפת ותגרמה׃
4 Bana mibali ya Yavani: Elisha, Tarsisi, Kitimi mpe Dodanimi.
ובני יון אלישה ותרשיש כתים ודדנים׃
5 Bakitani na bango nde bavandaki na bisanga mpe na bamboka ya pembeni ya mayi. Moko na moko kati na bango azwaki mokili na ye kolanda lokota na ye, etuka na ye mpe libota na ye.
מאלה נפרדו איי הגוים בארצתם איש ללשנו למשפחתם בגויהם׃
6 Bana mibali ya Cham: Kushi, Mitsirayimi, Puti mpe Kanana.
ובני חם כוש ומצרים ופוט וכנען׃
7 Bana mibali ya Kushi: Seba, Avila, Sabita, Raema mpe Sabiteka. Bana mibali ya Raema: Sheba mpe Dedani.
ובני כוש סבא וחוילה וסבתה ורעמה וסבתכא ובני רעמה שבא ודדן׃
8 Kushi azalaki mpe tata ya Nimirodi oyo azalaki elombe ya liboso ya bitumba kati na mokili.
וכוש ילד את נמרד הוא החל להיות גבר בארץ׃
9 Azalaki mobomi monene ya banyama na miso ya Yawe. Yango wana, balobaka: « Mobomi monene ya banyama lokola Nimirodi na miso ya Yawe. »
הוא היה גבר ציד לפני יהוה על כן יאמר כנמרד גבור ציד לפני יהוה׃
10 Bingumba ya liboso ya mokili na ye ezalaki Babeli, Ereki, Akadi mpe Kaline na mokili ya Shineari.
ותהי ראשית ממלכתו בבל וארך ואכד וכלנה בארץ שנער׃
11 Longwa na mokili wana, alekaki na Asiri mpe atongaki Ninive, Reoboti-Iri, Kala
מן הארץ ההוא יצא אשור ויבן את נינוה ואת רחבת עיר ואת כלח׃
12 mpe Reseni, engumba monene na kati-kati ya Ninive mpe Kala.
ואת רסן בין נינוה ובין כלח הוא העיר הגדלה׃
13 Mitsirayimi azalaki koko ya bato ya Ludi, ya Anami, ya Leabi, ya Nafitu,
ומצרים ילד את לודים ואת ענמים ואת להבים ואת נפתחים׃
14 ya Patrusi, ya Kasilu (oyo babimisa bato ya Filisitia) mpe ya Kereti.
ואת פתרסים ואת כסלחים אשר יצאו משם פלשתים ואת כפתרים׃
15 Kanana azalaki tata ya Sidoni, mwana na ye ya liboso, ya Eti,
וכנען ילד את צידן בכרו ואת חת׃
16 ya Yebusi, ya Amori, ya Girigazi,
ואת היבוסי ואת האמרי ואת הגרגשי׃
17 ya Evi, ya Ariki, ya Sini,
ואת החוי ואת הערקי ואת הסיני׃
18 ya Arivadi, ya Tsemari mpe ya Amati. (Mpe na sima, bato ya mabota nyonso ya Kanana bapalanganaki bipai na bipai.
ואת הארודי ואת הצמרי ואת החמתי ואחר נפצו משפחות הכנעני׃
19 Mokili ya bato ya Kanana ebandaki wuta na Sidoni, na nzela ya Gerari, kino na Gaza; mpe na nzela ya Sodome, ya Gomore, ya Adima mpe ya Tseboyimi kino na Lesha.)
ויהי גבול הכנעני מצידן באכה גררה עד עזה באכה סדמה ועמרה ואדמה וצבים עד לשע׃
20 Bango nde bazalaki bakitani ya Cham kolanda mabota mpe nkota na bango, kati na mikili mpe bikolo na bango.
אלה בני חם למשפחתם ללשנתם בארצתם בגויהם׃
21 Semi, kulutu ya Jafeti, abotaki mpe bana; azalaki koko ya Eberi mpe ya bakitani na ye.
ולשם ילד גם הוא אבי כל בני עבר אחי יפת הגדול׃
22 Bana mibali ya Semi: Elami, Asuri, Aripakishadi, Ludi mpe Arami.
בני שם עילם ואשור וארפכשד ולוד וארם׃
23 Bana mibali ya Arami: Utsi, Uli, Geteri mpe Mashi.
ובני ארם עוץ וחול וגתר ומש׃
24 Aripakishadi abotaki Shela; Shela abotaki Eberi.
וארפכשד ילד את שלח ושלח ילד את עבר׃
25 Eberi abotaki bana mibali mibale: moko, kombo na ye ezalaki « Pelegi, » pamba te na tango na ye nde bakabolaki mabele; mpe mosusu, « Yokitani. »
ולעבר ילד שני בנים שם האחד פלג כי בימיו נפלגה הארץ ושם אחיו יקטן׃
26 Yokitani abotaki Alimodadi, Shelefi, Atsarimaveti, Yera,
ויקטן ילד את אלמודד ואת שלף ואת חצרמות ואת ירח׃
27 Adorami, Uzali, Dikila,
ואת הדורם ואת אוזל ואת דקלה׃
28 Obali, Abimaeli, Saba,
ואת עובל ואת אבימאל ואת שבא׃
29 Ofiri, Avila mpe Yobabi. Bango nyonso wana bazalaki bakitani ya Yokitani.
ואת אופר ואת חוילה ואת יובב כל אלה בני יקטן׃
30 (Mokili oyo bazalaki kovanda ebandaki wuta na Mesha kino na Sefari, na mokili ya bangomba ya este.)
ויהי מושבם ממשא באכה ספרה הר הקדם׃
31 Bango nde bazalaki bana mibali ya Semi kolanda bituka mpe nkota na bango, kati na mikili mpe bikolo na bango.
אלה בני שם למשפחתם ללשנתם בארצתם לגויהם׃
32 Wana nde bituka ya bana mibali ya Noa kolanda milongo mpe mikili na bango. Bato nyonso oyo batondisaki mokili sima na mpela babotamaki na nzela na bango.
אלה משפחת בני נח לתולדתם בגויהם ומאלה נפרדו הגוים בארץ אחר המבול׃

< Ebandeli 10 >