< Bagalatia 6 >

1 Bandeko na ngai, soki bokuti moto azali kosala mabe songolo, bino oyo bozali kotambola kolanda Molimo ya Nzambe bozongisa ye na nzela, na boboto nyonso. Kasi sala keba ete yo mpe omekama te.
Браћо! Ако и упадне човек у какав грех, ви духовни исправљајте таквога духом кротости, чувајући себе да и ти не будеш искушан.
2 Bomemisana mikumba bino na bino; ezali na nzela wana nde bokokokisa mobeko ya Klisto.
Носите бремена један другог, и тако ћете испунити закон Христов.
3 Soki moto songolo akanisi ete azali moto monene, nzokande azali kaka moto pamba, azali komikosa ye moko.
Јер ако ко мисли да је шта, а није ништа, умом вара себе.
4 Tika ete moko na moko atala malamu misala na ye! Soki akoki komikumisa mpo na yango, akomikumisa mpo na ye moko kaka, kasi mpo na bato mosusu te;
А сваки да испита своје дело, и тада ће сам у себи имати славу, а не у другом.
5 pamba te moto na moto akosamba mpo na misala na ye moko.
Јер ће сваки своје бреме носити.
6 Tika ete moto oyo bazali koteya Liloba apesa ndambo ya biloko na ye nyonso epai ya moteyi na ye.
А који се учи речи нека даје део од сваког добра ономе који га учи.
7 Bomikosa te: Nzambe amitikaka te ete batiola Ye. Oyo moto alonaka, yango nde abukaka.
Не варајте се: Бог се не да ружити; јер шта човек посеје оно ће и пожњети.
8 Moto oyo alonaka mpo na kosepelisa baposa ya bomoto na ye akobuka libebi, moto oyo alonaka mpo na kosepelisa Molimo akobuka bomoi ya seko. (aiōnios g166)
Јер који сеје у тело своје, од тела ће пожњети погибао; а који сеје у дух, од духа ће пожњети живот вечни. (aiōnios g166)
9 Tosalaka bolamu; tolembisa nzoto na biso te mpo na yango, pamba te tokobuka mbuma na tango oyo esengeli soki toyiki mpiko.
А добро чинити да нам се не досади; јер ћемо у своје време пожњети ако се не уморимо.
10 Boye, lokola tozali nanu na tango, tosalaka bolamu mpo na bato nyonso, mpe mingi-mingi mpo na libota ya bandimi.
Зато дакле док имамо времена да чинимо добро свакоме, а особити онима који су с нама у вери.
11 Botala ndenge nakomeli bino na makomi ya minene! Nasaleli loboko na ngai moko mpo na kokoma yango.
Видите колико вам написах руком својом!
12 Bato oyo balingaka koyebana na miso ya bato batindaka bino na makasi kokatisa ngenga, mpo ete banyokola bango te mpo na ekulusu ya Klisto.
Који хоће да се хвале по телу они вас нагоне да се обрезујете, само да не буду гоњени за крст Христов.
13 Pamba te bango moko bato oyo bakatisaka ngenga batosaka Mobeko te, kasi balingi kaka ete bokatisa ngenga mpo ete bamikumisa na tina na bomoto na bino.
Јер ни они сами који се обрезују не држе закон, него хоће да се ви обрезујете да се вашим телом хвале.
14 Mpo na ngai, nakomikumisa na eloko mosusu te, longola kaka na ekulusu ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, pamba te ezali na nzela ya ekulusu yango nde mokili ebakamaki mpo na ngai, mpe ngai nabakamaki mpo na mokili.
А ја Боже сачувај да се чим другим хвалим осми крстом Господа нашег Исуса Христа, ког ради разапе се мени свет, и ја свету.
15 Ezali te kokatama ngenga to kokatama ngenga te nde ezali na tina; likambo ya tina ezali: kokoma ekelamu ya sika.
Јер у Христу Исусу нити шта помаже обрезање ни необрезање, него нова твар.
16 Tika ete kimia mpe mawa ya Nzambe epesamela bato nyonso oyo bakobanda kotambola kolanda mobeko oyo, mpe epesamela Isalaele ya Nzambe!
И колико их год по овом правилу живе, на њима биће мир и милост, и на Израиљу Божијем.
17 Kobanda lelo, tika ete moto moko te apesa ngai lisusu pasi na motema, pamba te nazali komema bilembo ya bapota ya Yesu kati na nzoto na ngai.
Више да ми нико не досађује, јер ја ране Господа Исуса на телу свом носим.
18 Bandeko na ngai, tika ete ngolu ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, ezala elongo na molimo na bino! Amen!
Благодат Господа нашег Исуса Христа са духом вашим, браћо. Амин.

< Bagalatia 6 >