< Bagalatia 5 >

1 Ezali mpo ete tozala bansomi nde Klisto akangolaki biso. Yango wana, botelema ngwi mpe bozonga lisusu na bowumbu te.
Stand fast, therefore, in the freedom with which Christ has freed us, and be not again held fast in the yoke of bondage.
2 Ngai Polo, nazali koloba na bino ete soki bokatisi ngenga, Klisto akozala lisusu na tina te epai na bino.
Behold, I, Paul, say to you, that if you be circumcised, Christ will profit you nothing.
3 Nazali koyebisa lisusu na moto nyonso oyo akatisi ye moko ngenga ete asengeli kotosa makambo nyonso oyo Mobeko etindaka.
And I testify, moreover, to every circumcised person, that he is a debtor to do the whole law.
4 Bino oyo bolukaka kokoma sembo na nzela ya kotosa mibeko, bozali ya kokabwana na Klisto, bozali lisusu na se ya ngolu ya Nzambe te.
You are loosed from Christ, who are justified by the law; you have fallen from favor.
5 Kasi biso, na lisungi ya Molimo, tozali kozela na elikya kokoma sembo na nzela ya kondima.
But we, through the Spirit, look for the hope of righteousness by faith.
6 Pamba te, kati na Yesu-Klisto, likambo ya tina ezali: kozala na kondima oyo esalaka na nzela ya bolingo; ezali te: kokatama ngenga to kokatama ngenga te.
For in Christ Jesus neither circumcision avails anything, nor uncircumcision; but faith, which works by love.
7 Bozalaki kopota mbangu malamu! Bongo nani apengwisi bino mpo ete botika kotosa bosolo?
You did run well: who has hindered you from obeying the truth?
8 Likanisi ya boye ewuti te epai ya Ye oyo abengaki bino.
This persuasion comes not from him who called you.
9 Mwa levire moke evimbisaka potopoto nyonso ya mapa.
A little leaven leavens the whole mass.
10 Ngai nandimisami mpo na bino kati na Nkolo ete bokotikala kozala na makanisi mosusu te; mpe ete moto oyo azali kotia mobulu kati na makanisi na bino akozwa etumbu, ezala ata nani.
I am persuaded concerning you, by the Lord, that you will think nothing differently from me: but he who troubles you shall bear the punishment, whosoever he be.
11 Bandeko na ngai, soki nazalaki nanu koteya tina ya kokatisa ngenga, mpo na nini nanyokolama lisusu? Soki ezali bongo, mateya ya ekulusu elingaki lisusu kobetisa bato mabaku te.
But I, brethren, if I now proclaim circumcision, why am I yet persecuted? Certainly the offense of the cross is abolished.
12 Boye tika ete bato oyo bazali kotia mobulu kati na bino bamilongola ata banzoto ya mibali!
I wish, indeed, they were cut off who subvert you.
13 Bandeko na ngai, Nzambe abenga bino mpo ete bozala bansomi. Kasi tika ete bonsomi yango ekoma te mpo na bino libaku malamu ya kotambola kolanda baposa ya nzoto. Nzokande, na nzela ya bolingo, bosunganaka bino na bino.
For you, brethren, have been called into liberty; only use not this liberty for an occasion to the flesh; but through love, assiduously serve one another.
14 Pamba te Mobeko nyonso ekokisami kati na liloba kaka moko: « Linga moninga na yo ndenge yo moko omilingaka. »
For the whole law is fulfilled by one precept, even by this, "You shall love your neighbor as yourself."
15 Soki bozali kotukana mpe kozokisana, bosala keba ete bobomana te bino na bino.
But if you bite and devour one another, take care lest you be consumed by one another.
16 Boye, tala makambo oyo nazali koloba na bino: Botambola kolanda baposa ya Molimo, mpe bokokokisa te baposa ya bomoto na bino.
I say, then, walk by the Spirit, and you will not fulfill the lust of the flesh.
17 Pamba te baposa ya bomoto ebundisaka baposa ya Molimo, mpe baposa ya Molimo ebundisaka baposa ya bomoto. Nyonso mibale ebundisanaka mpo ete bolonga te kosala makambo oyo bolingi kosala.
For the flesh lusts against the Spirit, and the Spirit against the flesh; and these are contrary to one another, so that you do not do the things you would.
18 Kasi soki Molimo atambolisi bino, bokozala na se ya bokonzi ya Mobeko te.
But if you are led by the Spirit, you are not under law.
19 Tala misala ya bomoto: kindumba, misala ya bosoto, pite,
Now, the works of the flesh are manifest, which are these. Fornication, uncleanness, lasciviousness,
20 kosambela bikeko, kindoki, koyinana, koswana, zuwa, kanda, bombanda, bokabwani, koboyana,
sorcery, enmities, strifes, emulations, wraths, brawlings, factions, sects,
21 likunya, milangwa, lokoso ya kolia, mpe makambo mosusu ya lolenge oyo. Nazali komiyebisela bino, ndenge nasalaki liboso: bato oyo basalaka makambo ya lolenge oyo bakokota te na Bokonzi ya Nzambe.
envying, murders, intoxications, revelings, and such like: concerning which I foretell you now, as I also have foretold, that they who practice these things shall not inherit the kingdom of God.
22 Kasi mbuma ya Molimo ezali: bolingo, esengo, kimia, kokanga motema, bondeko, kosala bolamu, kondima,
But the fruit of the Spirit is love, joy, peace, long-suffering, gentleness, goodness, fidelity,
23 boboto mpe komikanga. Mibeko epekisaka te makambo ya lolenge oyo.
meekness, temperance: against such things there is no law.
24 Bato oyo bazali kati na Yesu-Klisto babaka na ekulusu bomoto na bango elongo na baposa mpe bilulela na yango.
Besides, they who are Christ's, have crucified the flesh with the passions and lusts.
25 Lokola tozali kobika bomoi na biso na nzela ya Molimo, totambola mpe na lisungi ya Molimo.
Since we live by the Spirit, let us also walk by the Spirit.
26 Tozala bato ya lolendo te, totumbolana te mpe toyokelana zuwa te.
Let us not be vain-glorious, provoking one another, envying one another.

< Bagalatia 5 >