< Bagalatia 3 >

1 Oh bato ya Galatia, bozali penza babolole! Nani aloki bino? Balimbolelaki bino polele ndenge nini babakaki Yesu-Klisto na ekulusu.
O, I uforstandige Galatere! hvem har fortryllet eder, I, hvem Jesus Kristus blev malet for Øje som korsfæstet?
2 Nalingi kotuna bino motuna moko kaka: « Bozwaki Molimo mpo botosaki Mobeko to mpo boyambaki na kondima Sango Malamu oyo boyokaki? »
Kun dette vil jeg vide af eder: Var det ved Lovens Gerninger, I modtoge Ånden, eller ved i Tro at høre?
3 Ndenge nini bokoki kokoma babolole boye? Ndenge nini bino oyo bobandaki na Molimo bozali sik’oyo kosukisa na mosuni?
Ere I så uforstandige? ville I, som begyndte i Ånd, nu ende i Kød?
4 Boni, bomonaki kaka pasi ya pamba, soki penza ezalaki mpe mpo na pamba?
Have I da prøvet så meget forgæves? hvis det da virkelig er forgæves!
5 Boni, ezali mpo botosaki Mobeko nde Nzambe apesi bino Molimo na Ye mpe azali kosala bikamwa kati na bino to ezali mpo boyambaki na kondima Sango Malamu oyo boyokaki?
Mon da han, som meddeler eder Ånden og virker kraftige Gerninger iblandt eder, gør dette ved Lovens Gerninger eller ved, at I høre i Tro?
6 Abrayami azalaki na kondima epai ya Nzambe; mpe mpo na kondima na ye, Nzambe akomisaki ye moto ya sembo.
ligesom jo "Abraham troede Gud, og det blev regnet ham til Retfærdighed".
7 Boye, boyeba malamu ete ezali kaka bato oyo bazali na kondima kati na Nzambe nde bazali bana ya Abrayami.
Erkender altså, at de, som ere af Tro, disse ere Abrahams Børn.
8 Makomi esilaki kobongisa ete Nzambe akokomisa Bapagano sembo na nzela ya kondima, mpe etatolaki Sango Malamu oyo epai ya Abrayami: « Bato ya bikolo nyonso bakopambolama mpo na yo. »
Men da Skriften forudså, at det er af Tro, at Gud retfærdiggør Hedningerne, forkyndte den forud Abraham det Evangelium: "I dig skulle alle Folkeslagene velsignes",
9 Boye, bato oyo bazali na kondima bazali ya kopambolama elongo na Abrayami, moto na kondima.
så at de, som ere af Tro, velsignes sammen med den troende Abraham.
10 Pamba te bato nyonso oyo batiaka elikya na botosi na bango liboso ya Mobeko bazali na se ya elakeli mabe, kolanda ndenge ekomama: « Alakelama mabe, moto nyonso oyo akobaka te kotosa makambo nyonso oyo ekomama kati na buku ya Mobeko. »
Thi så mange, som holde sig til Lovens Gerninger, ere under Forbandelse; thi der er skrevet: "Forbandet hver den, som ikke bliver i alle de Ting, som ere skrevne i Lovens Bog, så han gør dem."
11 Solo, moto moko te akoki kokoma sembo na miso ya Nzambe na nzela ya Mobeko, pamba te moto ya sembo akobika na nzela ya kondima.
Men at ingen bliver retfærdiggjort for Gud ved Lov, er åbenbart, thi "deri retfærdige skal leve af Tro."
12 Nzokande, Mobeko ewuti na kondima te, pamba te ekomama: « Moto oyo akosalela yango akobika bomoi na ye na nzela na yango. »
Men Loven beror ikke på Tro; men: "Den, som gør disse Ting, skal leve ved dem."
13 Klisto akangolaki biso na bilakeli mabe ya Mobeko, pamba te akomaki elakeli mabe na esika na biso. Ekomama: « Alakelama mabe, moto nyonso oyo badiembiki na nzete. »
Kristus har løskøbt os fra Lovens Forbandelse, idet han blev en Forbandelse for os (thi der er skrevet: "Forbandet er hver den, som hænger på et Træ"),
14 Asalaki bongo mpo ete, kati na Klisto Yesu, Bapagano bazwa mapamboli ya Abrayami, mpe mpo ete biso tozwa, na nzela ya kondima, Molimo oyo Nzambe alakaki.
for at Abrahams Velsignelse måtte komme til Hedningerne i Kristus Jesus, for at vi kunde få Åndens Forjættelse ved Troen.
15 Bandeko na ngai, tozwa nanu ndakisa moko kati na bomoi na biso ya mokolo na mokolo: Soki moto atiki maloba na ye ya suka kati na mokanda, moko te akoki kolongola to kobakisa eloko kati na makambo oyo esili kokomama.
Brødre! jeg taler på Menneskevis: Ingen ophæver dog et Menneskes stadfæstede Arvepagt eller føjer noget dertil.
16 Nzokande, Nzambe apesaki bilaka na Ye epai ya Abrayami mpe epai ya mokitani na ye. Makomi elobi te « Epai ya bakitani » lokola nde ezalaki likambo ya bato ebele, kasi elobi « Epai ya mokitani na yo » mpo na kolakisa ete etali moto se moko kaka, ye nde Klisto.
Men Abraham og hans Sæd bleve Forjættelserne tilsagte; der siges ikke: "og Sædene", som om mange, men som om eet: "og din Sæd", hvilken er Kristus.
17 Nalobi boye: « Mobeko oyo eyaki sima na mibu nkama minei na tuku misato ezali na makoki te ya koboma boyokani oyo Nzambe asala wuta kala elongo na Abrayami; soki te, elaka ekomi eloko pamba. »
Jeg mener dermed dette: En Pagt, som forud er stadfæstet af Gud, kan Loven, som blev til fire Hundrede og tredive År senere, ikke gøre ugyldig, så at den skulde gøre Forjættelsen til intet.
18 Pamba te soki libula ezwami na nzela ya Mobeko, wana elaka ezali lisusu na esika te. Nzokande ezali penza na nzela ya elaka nde Nzambe atalisaki ngolu na Ye epai ya Abrayami.
Thi fås Arven ved Lov, da fås den ikke mere ved Forjættelse; men til Abraham har Gud skænket den ved Forjættelse.
19 Bongo mpo na nini Mobeko? Mobeko ebakisamaki mpo na kobimisa polele bozangi botosi ya bato, kino na boyei ya Mokitani epai ya nani Nzambe apesaki elaka. Mobeko yango epesamaki na nzela ya ba-anjelu, mpe mokumba na yango epesamaki na maboko ya moyokanisi.
Hvad skulde da Loven? Den blev føjet til for Overtrædelsernes Skyld (indtil den Sæd kom, hvem Forjættelsen gjaldt), besørget ved Engle, ved en Mellemmands Hånd.
20 Nzokande soki ezalaki na moyokanisi, elingi koloba ete ezalaki mpe na masanga ebele ya koyokanisa. Kasi mpo na oyo etali elaka, Nzambe azali kaka Ye moko.
Men en Mellemmand er ikke kun for een Part; Gud derimod er een.
21 Boni, Mobeko eyaki mpo na kotelemela bilaka ya Nzambe? Ata moke te! Soki mobeko moko epesamaki, mobeko oyo ezali na makoki ya kopesa bato bomoi, bato balingaki penza kokoma sembo na nzela ya mobeko yango.
Er da Loven imod Guds Forjættelser? Det være langtfra! Ja, hvis der var givet en Lov, som kunde levendegøre, da var Retfærdigheden virkelig af Lov.
22 Kasi tala makambo oyo Makomi eloba: Mokili mobimba ezali na se ya bokonzi ya lisumu mpo ete elaka ya Nzambe ekokisama epai ya bandimi na nzela ya kondima na bango kati na Yesu-Klisto.
Men Skriften har indesluttet alt under Synd, for at Forjættelsen skulde af Tro på Jesus Kristus gives dem, som tro.
23 Liboso ete kondima eya, tozalaki na se ya bokonzi ya Mobeko, tozalaki ya kokangama mpo na kozela kondima oyo esengelaki komonisama.
Men førend Troen kom, holdtes vi indelukkede under Lovens Bevogtning til den Tro, som skulde åbenbares,
24 Boye Mobeko ezalaki lokola mokengeli, ezalaki na mokumba ya komema biso epai ya Klisto mpo ete tokoma sembo na nzela ya kondima.
så at Loven er bleven os en Tugtemester til Kristus, for at vi skulde blive retfærdiggjorte af Tro.
25 Lokola sik’oyo kondima eyei, tozali lisusu na se ya bokonzi ya Mobeko te.
Men efter at Troen er kommen, ere vi ikke mere under Tugtemester.
26 Boye bino nyonso bozali bana na Nzambe na nzela ya kondima kati na Yesu-Klisto;
Thi alle ere I Guds Børn ved Troen på Kristus Jesus.
27 pamba te bino nyonso oyo bozwaki libatisi kati na Klisto bolataki nde Klisto.
Thi I, så mange som bleve døbte til Kristus, have iført eder Kristus.
28 Bokeseni ezali lisusu te kati na Bayuda mpe Bagreki, kati na bawumbu mpe bansomi, kati na mibali mpe basi; pamba te bino nyonso bozali se moto moko kati na Yesu-Klisto.
Her er ikke Jøde eller Græker; her er ikke Træl eller fri; her er ikke Mand og Kvinde; thi alle ere I een i Kristus Jesus.
29 Mpe soki bozali ya Klisto, bozali mpe bokitani ya Abrayami, bakitani ya libula kolanda elaka oyo Nzambe apesaki na Abrayami.
Men når I høre Kristus til, da ere I jo Abrahams Sæd, Arvinger ifølge Forjættelse.

< Bagalatia 3 >