< Bagalatia 2 >

1 Sima na mibu zomi na minei, nazongaki lisusu na Yelusalemi elongo na Barnabasi; namemaki mpe Tito.
Darauf, nach vierzehn Jahren, zog ich wiederum nach Jerusalem hinauf mit Barnabas und nahm auch Titus mit.
2 Nakendeki kuna mpo na kotosa emoniseli oyo nazwaki. Natalisaki na bakambi Sango Malamu oyo nateyaka kati na Bapagano, na esika oyo tozalaki kaka biso moko mpo nalingaki ete mosala oyo nazalaki kosala mpe oyo nasilaki kosala ezwama na motuya.
Ich zog aber hinauf infolge einer Offenbarung und legte ihnen, insbesondere den Angesehenen, das Evangelium vor, das ich unter den Heiden verkündige, damit ich nicht etwa vergeblich liefe oder gelaufen wäre.
3 Nzokande, ezala Tito oyo azalaki elongo na ngai, batindaki ye kutu te na makasi ete akatisa ngenga, atako azalaki Mogreki.
Es wurde aber nicht einmal mein Begleiter, Titus, obschon er ein Grieche ist, gezwungen, sich beschneiden zu lassen.
4 Esalemaki bongo likolo ya bandeko ya lokuta oyo basilaki kokota kati na biso na mayele mabe mpo na kolandela bonsomi oyo tozali na yango kati na Yesu-Klisto mpe mpo na koluka kokomisa biso bawumbu.
Was aber die eingeschlichenen falschen Brüder betrifft, die sich eingedrängt hatten, um unsere Freiheit auszukundschaften, die wir in Christus Jesus haben, damit sie uns unterjochen könnten,
5 Kasi totikelaki bango ata tango te mpo ete bosolo ya Sango Malamu etikala mpo na bino.
denen gaben wir auch nicht eine Stunde nach, daß wir uns ihnen unterworfen hätten, damit die Wahrheit des Evangeliums bei euch bestehen bliebe.
6 Bato oyo bazalaki bakambi babakisaki ata eloko moko te na mateya na ngai; lokumu nyonso oyo bazalaki na yango ezalaki na motuya moko te epai na ngai, pamba te Nzambe aponaka bilongi te.
Von denen aber, die etwas gelten (was sie früher waren, ist mir gleich; Gott achtet das Ansehen der Person nicht), mir haben diese Angesehenen nichts weiter auferlegt;
7 Kutu, bamonaki penza ete Nzambe apesaki ngai mokumba ya koteya Sango Malamu epai ya bato oyo bakatama ngenga te, ndenge apesaki na Petelo mokumba ya koteya Sango Malamu epai ya Bayuda.
sondern im Gegenteil, als sie sahen, daß ich mit dem Evangelium an die Unbeschnittenen betraut bin, gleichwie Petrus mit dem an die Beschneidung
8 Pamba te Nzambe oyo asalaki kati na Petelo mpo ete azala ntoma ya bato oyo bakatama ngenga asalaki mpe kati na ngai lokola mpo ete nazala ntoma ya Bapagano.
denn der, welcher in Petrus kräftig wirkte zum Apostelamt unter der Beschneidung, der wirkte auch in mir kräftig für die Heiden,
9 Boye Jake, Petelo mpe Yoane oyo bazalaki makonzi ya Lingomba bandimaki ngolu oyo Nzambe apesaki ngai. Yango wana basanganaki elongo na ngai mpe Barnabasi mpo na kolakisa ete tokomi moko; mpe toyokanaki ete biso tokende epai ya Bapagano, mpe bango bakende epai ya bato oyo bakatama ngenga.
und als sie die Gnade erkannten, die mir gegeben ist, reichten Jakobus und Kephas und Johannes, die für Säulen gelten, mir und Barnabas die Hand der Gemeinschaft, damit wir unter den Heiden, sie aber unter der Beschneidung wirkten;
10 Basengaki na biso kaka ete tokoba kokanisa babola. Mpe nasalaki nyonso mpo na kokokisa mokumba yango.
nur sollten wir der Armen gedenken, was ich mich auch beflissen habe zu tun.
11 Tango Petelo ayaki na Antioshe, natelemelaki ye makasi mpo ete azalaki kati na libunga.
Als aber Petrus nach Antiochia kam, widerstand ich ihm ins Angesicht, denn er war angeklagt.
12 Pamba te liboso ete bato oyo bawutaki epai ya Jake bakoma, Petelo azalaki kolia mesa moko elongo na Bapagano; kasi sima na bango kokoma, akomaki kobenda nzoto mpe akabwanaki na Bapagano yango mpo ete azalaki kobanga Bayuda.
Bevor nämlich etliche von Jakobus kamen, aß er mit den Heiden; als sie aber kamen, zog er sich zurück und sonderte sich ab, weil er die aus der Beschneidung fürchtete.
13 Bayuda mosusu basanganaki na ye kati na lokuta na ye kino Barnabasi mpe akotaki na lokuta na bango.
Und es heuchelten mit ihm auch die übrigen Juden, so daß selbst Barnabas von ihrer Heuchelei mitfortgerissen wurde.
14 Kasi tango ngai namonaki ete bazali kotambola te na bomoi ya sembo kolanda bosolo ya Sango Malamu, nalobaki na Petelo na miso ya bango nyonso: « Ozali Moyuda, kasi ozali kobika bomoi na yo lokola Mopagano! Ndenge nini ozali kosenga na makasi ete Bapagano batambola lokola Bayuda?
Als ich aber sah, daß sie nicht richtig wandelten nach der Wahrheit des Evangeliums, sprach ich zu Petrus vor allen: Wenn du, der du ein Jude bist, heidnisch lebst und nicht jüdisch, was zwingst du die Heiden, jüdisch zu leben?
15 Biso tobotama Bayuda, tozali Bapagano te oyo bazali basumuki.
Wir sind von Natur Juden und nicht Sünder aus den Heiden;
16 Toyebi ete moto akoki kokoma sembo te na nzela ya kotosa maloba ya Mobeko, kasi kaka na nzela ya kondima kati na Yesu-Klisto. Yango wana biso mpe tondimelaki Yesu-Klisto mpo ete tokoma sembo na nzela ya kondima kati na Klisto, kasi na nzela te ya kotosa maloba ya Mobeko, pamba te moto moko te akoki kokoma sembo na nzela ya kotosa maloba ya mibeko.
da wir aber erkannt haben, daß der Mensch nicht aus Gesetzeswerken gerechtfertigt wird, sondern durch den Glauben an Jesus Christus, so sind auch wir an Christus Jesus gläubig geworden, damit wir aus dem Glauben an Christus gerechtfertigt würden, und nicht aus Gesetzeswerken, weil aus Gesetzeswerken kein Fleisch gerechtfertigt wird.
17 Kasi soki, wana tozali koluka kokoma sembo kati na Klisto, emonani lisusu ete biso moko Bayuda tozali mpe basumuki lokola Bapagano, boni, elingi koloba ete Klisto azali kotombola masumu? Ata moke te!
Wenn wir aber, die wir in Christus gerechtfertigt zu werden suchen, auch selbst als Sünder erfunden würden, wäre demnach Christus ein Sündendiener? Das sei ferne!
18 Soki ngai natomboli lisusu biloko oyo nasilaki kobebisa, wana nazali penza mobuki mibeko.
Denn wenn ich das, was ich niedergerissen habe, wieder aufbaue, so stelle ich mich selbst als Übertreter hin.
19 Pamba te, na nzela ya Mobeko, ngai nasilaki kokufa na oyo etali Mobeko mpo ete nakoka kobika bomoi na ngai mpo na Nzambe. Nabakamaki na ekulusu elongo na Klisto;
Nun bin ich aber durchs Gesetz dem Gesetz gestorben, um Gott zu leben, ich bin mit Christus gekreuzigt.
20 boye ezali lisusu ngai te moto nazali kobika, kasi ezali Klisto nde azali kobika kati na ngai. Bomoi oyo nazali kobika sik’oyo kati na nzoto na ngai lokola moto, nazali kobika yango na nzela ya kondima kati na Mwana na Nzambe, oyo alingaki ngai mpe amikabaki mpo na ngai.
Und nicht mehr lebe ich, sondern Christus lebt in mir; was ich aber jetzt im Fleische lebe, das lebe ich im Glauben an den Sohn Gottes, der mich geliebt und sich selbst für mich hingegeben hat.
21 Nazali kolongola te ngolu ya Nzambe, pamba te soki ezali na nzela ya kotosa Mobeko nde bato bakomaka sembo, wana Klisto akufaki mpo na pamba. »
Ich setze die Gnade Gottes nicht beiseite; denn wenn durch das Gesetz Gerechtigkeit [kommt], so ist Christus vergeblich gestorben.

< Bagalatia 2 >