< Bagalatia 1 >

1 Ngai Polo, ntoma oyo abengamaki na bato te to na nzela ya moto te, kasi na Yesu-Klisto mpe na Nzambe Tata oyo asekwisaki Ye kati na bakufi,
ܦܘܠܘܤ ܫܠܝܚܐ ܠܐ ܡܢ ܒܢܝܢܫܐ ܘܠܐ ܒܝܕ ܒܪܢܫܐ ܐܠܐ ܒܝܕ ܝܫܘܥ ܡܫܝܚܐ ܘܐܠܗܐ ܐܒܘܗܝ ܗܘ ܕܐܩܝܡܗ ܡܢ ܒܝܬ ܡܝܬܐ
2 mpe bandeko nyonso oyo bazali elongo na ngai; Epai ya Mangomba ya Galatia:
ܘܟܠܗܘܢ ܐܚܐ ܕܥܡܝ ܠܥܕܬܐ ܕܐܝܬ ܒܓܠܛܝܐ
3 Tika ete ngolu mpe kimia epesamela bino kowuta na Nzambe, Tata na biso, mpe na Nkolo Yesu-Klisto!
ܛܝܒܘܬܐ ܥܡܟܘܢ ܘܫܠܡܐ ܡܢ ܐܠܗܐ ܐܒܐ ܘܡܢ ܡܪܢ ܝܫܘܥ ܡܫܝܚܐ
4 Yesu amipesaki mpo na masumu na biso mpo ete, kolanda mokano ya Nzambe, Tata na biso, akangola biso longwa na ekeke oyo ya mabe. (aiōn g165)
ܗܘ ܕܝܗܒ ܢܦܫܗ ܚܠܦ ܚܛܗܝܢ ܕܢܦܨܝܢ ܡܢ ܥܠܡܐ ܗܢܐ ܒܝܫܐ ܐܝܟ ܨܒܝܢܗ ܕܐܠܗܐ ܐܒܘܢ (aiōn g165)
5 Tika ete nkembo ezonga epai na Ye libela na libela! Amen! (aiōn g165)
ܕܠܗ ܫܘܒܚܐ ܠܥܠܡ ܥܠܡܝܢ ܐܡܝܢ (aiōn g165)
6 Nazali kokamwa ete bozali kosundola noki Ye oyo abengaki bino na nzela ya ngolu ya Klisto mpe bozali kolanda sango malamu mosusu
ܡܬܕܡܪ ܐܢܐ ܐܝܟܢܐ ܒܥܓܠ ܡܬܗܦܟܝܢ ܐܢܬܘܢ ܡܢ ܡܫܝܚܐ ܗܘ ܕܩܪܟܘܢ ܒܛܝܒܘܬܗ ܠܐܚܪܬܐ ܤܒܪܬܐ
7 oyo ezalaka kutu te. Solo, ezali na bato oyo bazali kotia mobulu kati na bino mpe bazali koluka kobongola Sango Malamu ya Klisto.
ܐܝܕܐ ܕܠܐ ܐܝܬܝܗ ܐܠܐ ܐܢܫܐ ܗܘ ܐܝܬ ܕܕܠܚܝܢ ܠܟܘܢ ܘܨܒܝܢ ܕܢܫܚܠܦܘܢ ܤܒܪܬܗ ܕܡܫܝܚܐ
8 Kasi soki moto moko, ezala biso to Anjelu moko kowuta na Likolo, ateyi bino sango malamu oyo ekeseni na Sango Malamu oyo biso toteyaki bino, wana tika ete Nzambe alakela ye mabe!
ܐܦ ܐܢ ܚܢܢ ܕܝܢ ܐܘ ܡܠܐܟܐ ܡܢ ܫܡܝܐ ܢܤܒܪܟܘܢ ܠܒܪ ܡܢ ܡܐ ܕܤܒܪܢܟܘܢ ܢܗܘܐ ܚܪܡ
9 Ndenge tolobaki yango liboso, mpe nazali lisusu koloba yango sik’oyo: soki moto moko ateyi bino sango malamu oyo ekeseni na Sango Malamu oyo boyambaki, wana tika ete Nzambe alakela ye mabe!
ܐܝܟܢܐ ܕܡܢ ܠܘܩܕܡ ܐܡܪܬ ܘܗܫܐ ܬܘܒ ܐܡܪ ܐܢܐ ܕܐܢ ܐܢܫ ܡܤܒܪ ܠܟܘܢ ܠܒܪ ܡܢ ܡܐ ܕܩܒܠܬܘܢ ܢܗܘܐ ܚܪܡ
10 Bozali sik’oyo kokanisa nini na likambo oyo: nazali koluka kosepelisa bato to nazali koluka kosepelisa Nzambe? Boni, nazali koluka kosepelisa bato? Soki nazalaki nanu koluka kosepelisa bato, nalingaki kozala mosali ya Klisto te.
ܗܫܐ ܓܝܪ ܠܒܢܝܢܫܐ ܗܘ ܡܦܝܤ ܐܢܐ ܐܘ ܠܐܠܗܐ ܐܘ ܠܒܢܝܢܫܐ ܒܥܐ ܐܢܐ ܕܐܫܦܪ ܐܠܘ ܓܝܪ ܥܕܡܐ ܠܗܫܐ ܠܒܢܝܢܫܐ ܫܦܪ ܗܘܝܬ ܥܒܕܐ ܕܡܫܝܚܐ ܠܐ ܗܘܐ ܗܘܝܬ
11 Bandeko na ngai, nalingi boyeba malamu ete Sango Malamu oyo nateyaki bino ezalaki mbuma ya makanisi ya bomoto te.
ܡܘܕܥ ܐܢܐ ܠܟܘܢ ܕܝܢ ܐܚܝ ܕܤܒܪܬܐ ܕܐܤܬܒܪܬ ܡܢܝ ܠܐ ܗܘܬ ܡܢ ܒܪܢܫܐ
12 Nazwaki yango na moto moko te, nayekolaki yango mpe te; kasi ezali Yesu-Klisto nde alakisaki ngai yango na nzela ya emoniseli.
ܐܦܠܐ ܓܝܪ ܐܢܐ ܡܢ ܒܪܢܫܐ ܩܒܠܬܗ ܘܝܠܦܬܗ ܐܠܐ ܒܓܠܝܢܐ ܕܝܫܘܥ ܡܫܝܚܐ
13 Solo, boyokaki sango ya bizaleli na ngai ya kala tango nazalaki nanu mondimi kati na lingomba ya Bayuda; boyebi mpe ndenge nini nazalaki konyokola Lingomba ya Nzambe mpo na kopanza yango.
ܫܡܥܬܘܢ ܓܝܪ ܗܘܦܟܝ ܕܡܢ ܩܕܝܡ ܕܒܝܗܘܕܝܘܬܐ ܕܝܬܝܪܐܝܬ ܪܕܦ ܗܘܝܬ ܥܕܬܗ ܕܐܠܗܐ ܘܚܪܒ ܗܘܝܬ ܠܗ
14 Kati na lingomba ya Bayuda, nazalaki komata koleka Bayuda ebele ya ekeke na ngai, oyo tozalaki na bango mibu moko ya mbotama; nalekaki bango kutu na bolingo eleka ndelo mpo na bokoko ya batata na ngai.
ܘܡܬܝܬܪ ܗܘܝܬ ܒܝܗܘܕܝܘܬܐ ܛܒ ܡܢ ܤܓܝܐܐ ܒܢܝ ܫܢܝ ܕܐܝܬ ܗܘܐ ܒܛܘܗܡܝ ܘܝܬܝܪܐܝܬ ܛܐܢ ܗܘܝܬ ܒܝܘܠܦܢܐ ܕܐܒܗܝ
15 Kasi tango Nzambe oyo aponaki ngai wuta na libumu ya mama na ngai mpe abengaki ngai na nzela ya ngolu na Ye, asepelaki
ܟܕ ܨܒܐ ܕܝܢ ܗܘ ܡܢ ܕܦܪܫܢܝ ܡܢ ܟܪܤ ܐܡܝ ܘܩܪܢܝ ܒܛܝܒܘܬܗ
16 kotalisa ngai Mwana na Ye na nzela ya emoniseli mpo ete nakoka kosakola Ye kati na Bapagano, natunaki na mbala moko toli epai ya moto ata moko te.
ܕܢܓܠܐ ܒܪܗ ܒܝ ܕܐܤܒܪܝܘܗܝ ܒܥܡܡܐ ܒܪ ܫܥܬܗ ܠܐ ܓܠܝܬ ܠܒܤܪܐ ܘܠܕܡܐ
17 Nakendeki kutu na Yelusalemi te mpo na kokutana na bato oyo bakomaki bantoma liboso na ngai, kasi nakendeki nde na Arabi. Sima na yango, nazongaki na Damasi.
ܘܠܐ ܐܙܠܬ ܠܐܘܪܫܠܡ ܠܘܬ ܫܠܝܚܐ ܕܡܢ ܩܕܡܝ ܐܠܐ ܐܙܠܬ ܠܐܪܒܝܐ ܘܬܘܒ ܗܦܟܬ ܠܕܪܡܤܘܩ
18 Ezali sima na mibu misato nde nakendeki na Yelusalemi mpo na koyeba Petelo, mpe navandaki epai na ye mikolo zomi na mitano.
ܘܡܢ ܒܬܪ ܬܠܬ ܫܢܝܢ ܐܙܠܬ ܠܐܘܪܫܠܡ ܕܐܚܙܐ ܠܟܐܦܐ ܘܩܘܝܬ ܠܘܬܗ ܝܘܡܬܐ ܚܡܫܬܥܤܪ
19 Natikalaki komona ntoma mosusu te, longola kaka Jake, ndeko ya Nkolo.
ܠܐܚܪܝܢ ܕܝܢ ܡܢ ܫܠܝܚܐ ܠܐ ܚܙܝܬ ܐܠܐ ܐܢ ܠܝܥܩܘܒ ܐܚܘܗܝ ܕܡܪܢ
20 Nzambe azali Motatoli na ngai ete makambo oyo nazali kokomela bino ezali ya lokuta te.
ܗܠܝܢ ܕܝܢ ܕܟܬܒ ܐܢܐ ܠܟܘܢ ܗܐ ܩܕܡ ܐܠܗܐ ܕܠܐ ܡܟܕܒ ܐܢܐ
21 Sima na yango, nakendeki na bituka ya Siri mpe ya Silisi.
ܡܢ ܒܬܪ ܗܠܝܢ ܐܬܝܬ ܠܐܬܪܘܬܐ ܕܤܘܪܝܐ ܘܕܩܝܠܝܩܝܐ
22 Kasi Baklisto ya Mangomba ya Yuda bayebaki ngai te,
ܘܠܐ ܝܕܥܢ ܗܘܝ ܠܝ ܒܐܦܝܢ ܥܕܬܐ ܕܒܝܗܘܕ ܗܠܝܢ ܕܒܡܫܝܚܐ
23 bayokaki kaka sango: « Moto oyo azalaki konyokola biso na kala akomi sik’oyo koteya kondima oyo azalaki koluka kobebisa. »
ܐܠܐ ܗܕܐ ܒܠܚܘܕ ܫܡܥܝܢ ܗܘܘ ܕܗܘ ܕܡܢ ܩܕܝܡ ܪܕܦ ܗܘܐ ܠܢ ܗܫܐ ܗܐ ܡܤܒܪ ܗܝܡܢܘܬܐ ܗܝ ܕܡܢ ܩܕܡ ܙܒܢܐ ܡܤܚܦ ܗܘܐ
24 Mpe bazalaki kokumisa Nzambe na tina na ngai.
ܘܡܫܒܚܝܢ ܗܘܘ ܒܝ ܠܐܠܗܐ

< Bagalatia 1 >