< Esidrasi 1 >
1 Na mobu ya liboso ya Sirisi, mokonzi ya Persi, Yawe alamusaki molimo ya Sirisi, mokonzi ya Persi, mpo na kokokisa liloba oyo alobaki na nzela ya mosakoli Jeremi, mpo ete asakola mpe akoma boye kati na mokili na ye mobimba:
Now in the first year of Cyrus, king of Persia, in order that the word of the Lord given by the mouth of Jeremiah might come true, the spirit of Cyrus, king of Persia, was moved by the Lord, so that he made a public statement through all his kingdom, and put it in writing, saying,
2 « Tala makambo oyo Sirisi, mokonzi ya Persi, alobi: ‹ Yawe, Nzambe ya Likolo, apesi ngai babokonzi nyonso ya mabele mpe mokumba ya kotongela Ye Tempelo, na Yelusalemi kati na Yuda.
These are the words of Cyrus, king of Persia: The Lord God of heaven has given me all the kingdoms of the earth; and he has made me responsible for building a house for him in Jerusalem, which is in Judah.
3 Tika ete moto nyonso oyo, kati na bino, azali na molongo ya bato ya Yawe akende na Yelusalemi kati na Yuda mpo na kotonga Tempelo ya Yawe, Nzambe ya Isalaele, oyo azali Nzambe kati na Yelusalemi!
Whoever there is among you of his people, may his God be with him, and let him go up to Jerusalem, which is in Judah, and take in hand the building of the house of the Lord, the God of Israel; he is the God who is in Jerusalem.
4 Tika ete bavandi ya bisika nyonso oyo bato ya Yuda bazali bapesa bango, mpo na Ndako ya Nzambe oyo ezali na Yelusalemi, makabo oyo: palata, wolo, bibwele, biloko ya ndenge na ndenge mpe makabo oyo bakati bango moko kopesa wuta na mokano ya mitema na bango. › »
And whoever there may be of the rest of Israel, living in any place, let the men of that place give him help with offerings of silver and gold and goods and beasts, in addition to the offering freely given for the house of God in Jerusalem.
5 Bongo bakambi ya mabota ya Yuda mpe ya Benjame, Banganga-Nzambe mpe Balevi, elongo na moto nyonso oyo Nzambe atutaki motema babongamaki mpo na kokende kotonga Tempelo ya Yawe, na Yelusalemi.
Then the heads of families of Judah and Benjamin, with the priests and the Levites, got ready, even all those whose spirits were moved by God to go up and take in hand the building of the Lord's house in Jerusalem.
6 Bato nyonso oyo bazalaki zingazinga na bango basungaki bango; bapesaki biloko esalema na palata mpe na wolo, bibwele, biloko ya ndenge na ndenge, bakado ya talo mpe makabo oyo bakataki bango moko kopesa wuta na mokano ya mitema na bango.
And all their neighbours gave them help with offerings of vessels of silver and gold and goods and beasts and things of great value, in addition to what was freely offered.
7 Mokonzi Sirisi abimisaki biloko ya Tempelo ya Yawe, oyo Nabukodonozori amemaki wuta na Yelusalemi mpo na kotia yango kati na tempelo ya nzambe na ye.
And Cyrus the king got out the vessels of the house of the Lord which Nebuchadnezzar had taken from Jerusalem and put in the house of his gods;
8 Sirisi, mokonzi ya Persi, atindaki Mitredati, mobombi bozwi na ye, ete abimisa, atanga mpe apesa yango epai ya Sheshibatsari, moto ya libota ya bakambi ya Yuda.
Even these Cyrus made Mithredath, the keeper of his wealth, get out, and he gave them, after numbering them, to Sheshbazzar, the ruler of Judah.
9 Tala biloko yango mpe motango na yango: bakopo ya wolo ezalaki tuku misato; bakopo ya palata ezalaki nkoto moko; basani ya mbele ya palata ezalaki tuku mibale na libwa;
And this is the number of them: there were thirty gold plates, a thousand silver plates, twenty-nine knives,
10 basani ya wolo ezalaki tuku misato; basani minene ya palata ezalaki nkama minei na zomi; biloko mosusu ezalaki nkoto moko.
Thirty gold basins, four hundred and ten silver basins, and a thousand other vessels.
11 Motango ya biloko nyonso ya wolo mpe ya palata ezalaki nkoto mitano na nkama minei. Sheshibatsari amemaki biloko yango nyonso tango bato oyo bakendeki na bowumbu balongwaki na Babiloni mpo na kozonga na Yelusalemi.
There were five thousand, four hundred gold and silver vessels. All these were taken back by Sheshbazzar, when those who had been taken prisoner went up from Babylon to Jerusalem.