< Esidrasi 9 >

1 Sima na makambo nyonso oyo esalemaki, bakambi ya Isalaele bayaki epai na ngai mpe balobaki: « Bato ya Isalaele, Banganga-Nzambe mpe Balevi bakabwani te na bato ya bikolo, oyo bazali kati na bango; bakabwani mpe te na misala na bango ya mbindo. Batamboli kaka kolanda misala ya mbindo ya bato ya Kanana, ya Iti, ya Perizi, ya Yebusi, ya Amoni, ya Moabi, ya Ejipito mpe ya Amori,
Cuando se hicieron estas cosas, los príncipes se acercaron a mí, diciendo: “El pueblo de Israel, los sacerdotes y los levitas no se han separado de los pueblos de las tierras, siguiendo sus abominaciones, las de los cananeos, los hititas, los ferezeos, los jebuseos, los amonitas, los moabitas, los egipcios y los amorreos.
2 pamba te babali bana basi ya bikolo wana ya bapaya mpo na bango moko mpe mpo na bana na bango ya mibali. Boye, basangisi libota ya bule na bikolo ya bapaya oyo bazali kati na bango. Bakambi mpe bakalaka bazalaki bato ya liboso ya kosala makambo wana ya mbindo. »
Porque han tomado de sus hijas para sí y para sus hijos, de modo que la santa descendencia se ha mezclado con los pueblos de las tierras. Sí, la mano de los príncipes y gobernantes ha sido la principal en esta transgresión”.
3 Tango nayokaki bongo, napasolaki nzambala mpe kazaka na ngai, napikolaki suki ya moto na ngai mpe mandefu na ngai mpe namivandisaki wana na mabele.
Cuando oí esto, rasgué mi vestido y mi túnica, me arranqué el pelo de la cabeza y de la barba, y me senté confundido.
4 Bato nyonso oyo bazalaki kolenga mpo na maloba na Nzambe ya Isalaele basanganaki pene na ngai, mpo na misala ya mbindo ya bato oyo bawutaki na bowumbu. Navandaki na mawa kino na tango ya likabo ya pokwa.
Entonces se reunieron conmigo todos los que temían las palabras del Dios de Israel a causa de la transgresión de los desterrados, y me senté confundido hasta la ofrenda de la tarde.
5 Bongo na tango ya likabo ya pokwa, nasalaki makasi atako nazalaki na pasi makasi kati na motema, natelemaki na nzambala mpe kazaka na ngai, oyo epasuka; nafukamaki mpe natombolaki maboko na ngai epai na Yawe, Nzambe na ngai.
En la ofrenda de la tarde me levanté de mi humillación, con mi manto y mi túnica rasgados; caí de rodillas y extendí mis manos a Yahvé, mi Dios;
6 Nalobaki: « Oh Nzambe na ngai! Nazali kati na mobulu mpe nazali koyoka soni makasi mpo na kotombola elongi na ngai epai na Yo, Nzambe na ngai; pamba te masumu mpe mabe na biso ekomi ebele penza mpe emati kino na Likolo!
y dije: “Dios mío, me avergüenzo y me sonrojo al levantar mi rostro hacia ti, mi Dios, porque nuestras iniquidades han aumentado sobre nuestra cabeza, y nuestra culpa ha crecido hasta el cielo.
7 Wuta na tango ya bakoko na biso kino na mokolo ya lelo, mabe na biso ekomi ebele. Likolo ya masumu na biso, biso elongo na bakonzi mpe Banganga-Nzambe na biso tokabamaki na mopanga, na bowumbu, na kobebisama mpe na soni makasi na maboko ya bakonzi ya bapaya, ndenge ezali komonana na mokolo ya lelo.
Desde los días de nuestros padres hemos sido sumamente culpables hasta el día de hoy; y por nuestras iniquidades nosotros, nuestros reyes y nuestros sacerdotes hemos sido entregados en manos de los reyes de las tierras, a la espada, al cautiverio, al saqueo y a la confusión de rostro, como sucede en este día.
8 Kasi sik’oyo, oh Yawe, Nzambe na biso, na mwa tango moke, osaleli biso ngolu ya kobikisa ndambo ya bato kati na biso mpe ya kopesa biso esika kati na mokili na Yo ya bule. Na boye, Yo Nzambe na biso, ongengisi miso na biso na pole mpe opesi biso lisungi kati na bowumbu na biso.
Ahora bien, por un momento se ha manifestado la gracia de Yahvé, nuestro Dios, de dejarnos un remanente para que escapemos, y de darnos una estaca en su lugar santo, para que nuestro Dios ilumine nuestros ojos, y nos reanime un poco en nuestra esclavitud.
9 Pamba te, atako tozali bawumbu, kasi Yo Nzambe na biso, osundoli biso te kati na bowumbu na biso. Omonisi biso bolamu na Yo na nzela ya bakonzi ya Persi: bapesi biso makasi ya sika mpo na kotonga lisusu Ndako ya Nzambe na biso, na kobongisa bamir na yango oyo ebukanaki-bukanaki mpe na kopesa biso mir ya kobombamela kati na Yuda mpe na Yelusalemi.
Porque somos siervos de la esclavitud, pero nuestro Dios no nos ha abandonado en nuestra esclavitud, sino que nos ha extendido su bondad a los ojos de los reyes de Persia, para revivirnos, para levantar la casa de nuestro Dios y reparar sus ruinas, y para darnos un muro en Judá y en Jerusalén.
10 Sik’oyo, oh Nzambe na biso, toloba lisusu nini na makambo oyo ezali kosalema? Pamba te tobateli te mibeko na Yo,
“Ahora, Dios nuestro, ¿qué diremos después de esto? Porque hemos abandonado tus mandamientos,
11 oyo opesaki na nzela ya basali na Yo, basakoli, tango olobaki: ‹ Mokili oyo bozali kokota mpo na kokamata yango ezali mokili oyo ebebisami na mbindo ya bato wana. Na nzela ya misala na bango ya nkele, batondisi mokili yango nyonso na mbindo na bango.
que has ordenado por medio de tus siervos los profetas, diciendo: ‘La tierra a la que vais a poseer es una tierra impura por la impureza de los pueblos de las tierras, por sus abominaciones, que la han llenado de un extremo a otro con su inmundicia.
12 Boye, bopesa te na libala bana na bino ya basi epai ya bana na bango ya mibali to bozwa te na libala bana na bango ya basi mpo na bana na bino ya mibali. Tango nyonso, bosalaka te boyokani ya bondeko elongo na bango mpo ete bokoka kozala makasi, bokoka kolia bambuma malamu ya mokili mpe bokoka kotikela yango bana na bino lokola libula mpo na libela. ›
Ahora, pues, no des tus hijas a sus hijos. No tomes sus hijas para tus hijos, ni busques su paz o su prosperidad para siempre, para que seas fuerte y comas el bien de la tierra, y la dejes en herencia a tus hijos para siempre.’
13 Makambo nyonso oyo ekomeli biso ezali mbano ya etamboli mabe na biso mpe ya ngambo na biso monene. Mpe lisusu, oh Nzambe na biso, na kotala ebele ya masumu oyo tosali, etumbu oyo opesi biso ezali moke penza, mpo ete otikeli biso kutu ndambo ya bato oyo!
“Después de todo lo que ha caído sobre nosotros por nuestras malas acciones y por nuestra gran culpa, ya que tú, nuestro Dios, nos has castigado menos de lo que merecen nuestras iniquidades, y nos has dado tal remanente,
14 Boni, tozongela lisusu kobuka mibeko na Yo mpe kobalana na bato oyo basalaka makambo ya nkele? Boni, kanda makasi na Yo ekopela te kino kosilisa koboma biso mpe kotikela biso moto ata moko te na bomoi?
¿volveremos a quebrantar tus mandamientos y a unirnos a los pueblos que hacen estas abominaciones? ¿No te enojarías con nosotros hasta consumirnos, para que no quedara ningún remanente, ni ninguno que pudiera escapar?
15 Oh Yawe, Nzambe ya Isalaele, ozali penza sembo! Na ngolu na Yo, na mokolo ya lelo, tozali batikali kati na bato na biso mpe tozali awa liboso na Yo, elongo na masumu na biso; nzokande moko te kati na biso akoki kotelema bongo liboso na Yo! »
Yahvé, el Dios de Israel, tú eres justo; porque nos ha quedado un remanente que ha escapado, como ocurre hoy. He aquí que estamos ante ti en nuestra culpabilidad; pues nadie puede permanecer ante ti a causa de esto”.

< Esidrasi 9 >