< Esidrasi 5 >

1 Mosakoli Aje mpe mosakoli Zakari, mwana mobali ya Ido, basakolaki mpo na bato ya Yuda oyo bazalaki kati na mokili ya Yuda mpe na engumba Yelusalemi, na Kombo ya Nzambe ya Isalaele, oyo azalaki kati na bango.
那時,先知哈該和易多的孫子撒迦利亞奉以色列上帝的名向猶大和耶路撒冷的猶大人說勸勉的話。
2 Bongo, Zorobabeli, mwana mobali ya Shealitieli, mpe Jozue, mwana mobali ya Yotsadaki, bazongelaki mosala ya kotonga lisusu Tempelo ya Nzambe kati na Yelusalemi. Mpe basakoli ya Nzambe bazalaki elongo na bango mpo na kosunga bango.
於是撒拉鐵的兒子所羅巴伯和約薩達的兒子耶書亞都起來動手建造耶路撒冷上帝的殿,有上帝的先知在那裏幫助他們。
3 Mbala moko, Tatinayi, moyangeli ya etuka oyo ezalaki na ngambo ya weste ya ebale Efrate, mpe Shetari-Bozinayi elongo na baninga na bango ya mosala batunaki bango: — Nani apesi bino nzela ya kotonga lisusu Tempelo oyo mpe ya kotelemisa lisusu mir oyo?
當時河西的總督達乃和示他‧波斯乃,並他們的同黨來問說:「誰降旨讓你們建造這殿,修成這牆呢?」
4 Batunaki lisusu: — Bato oyo bazali kotonga Ndako oyo, bakombo na bango banani?
我們便告訴他們建造這殿的人叫甚麼名字。
5 Kasi liso ya Nzambe na bango ezalaki kosenzela bakambi ya Bayuda. Boye bapekisaki bango te kosala misala na bango kino tango Dariusi azwaki mokanda na tina na yango mpe kino tango bazwaki mokanda ya eyano kowuta na Dariusi.
上帝的眼目看顧猶大的長老,以致總督等沒有叫他們停工,直到這事奏告大流士,得着他的回諭。
6 Tala mokanda oyo Tatinayi, moyangeli ya etuka ya ngambo ya weste ya ebale Efrate, Shetari-Bozinayi elongo na baninga na bango ya mosala, bakambi ya bituka ya ngambo ya weste ya ebale Efrate, batindelaki mokonzi Dariusi.
河西的總督達乃和示他‧波斯乃,並他們的同黨,就是住河西的亞法薩迦人,上本奏告大流士王。
7 Tala makambo oyo bakomaki kati na mokanda yango: « Epai ya mokonzi Dariusi. Tika ete bokonzi na yo ewumela na kimia!
本上寫着說:「願大流士王諸事平安。
8 Tika ete mokonzi ayeba ete tokendeki na etuka ya Yuda kino na Tempelo ya Nzambe Monene. Bato bazali kotonga yango na mabanga bakata mpe bazali kotia mabaya na likolo ya bamir. Mosala yango ezali kotambola malamu mpe kokende noki kati na maboko na bango.
王該知道,我們往猶大省去,到了至大上帝的殿,這殿是用大石建造的。樑木插入牆內,工作甚速,他們手下亨通。
9 Totunaki bakambi na bango motuna oyo: ‹ Nani apesi bino nzela ya kotonga lisusu Tempelo oyo mpe ya kotelemisa lisusu bamir? ›
我們就問那些長老說:『誰降旨讓你們建造這殿,修成這牆呢?』
10 Totunaki bango bakombo na bango mpo ete toyebisa yo yango mpe tokomela yo bakombo ya bakambi na bango.
又問他們的名字,要記錄他們首領的名字,奏告於王。
11 Kasi tala eyano oyo bapesaki biso: ‹ Tozali basali ya Nzambe ya Likolo mpe ya se; tozali kotonga lisusu Tempelo oyo etongamaki wuta mibu ebele na kala. Mokonzi moko monene ya Isalaele atongaki mpe asilisaki yango.
他們回答說:『我們是天地之上帝的僕人,重建前多年所建造的殿,就是以色列的一位大君王建造修成的。
12 Kasi lokola batata na biso batumbolaki kanda ya Nzambe ya Likolo, akabaki bango na maboko ya Nabukodonozori, moto ya Chalide, mokonzi ya Babiloni. Ezali ye nde abukaki Tempelo oyo mpe amemaki bato na bowumbu, na Babiloni.
只因我們列祖惹天上的上帝發怒,上帝把他們交在迦勒底人巴比倫王尼布甲尼撒的手中,他就拆毀這殿,又將百姓擄到巴比倫。
13 Nzokande, na mobu ya liboso ya bokonzi na ye lokola mokonzi ya Babiloni, Sirisi apesaki mitindo ya kotonga lisusu Ndako oyo ya Nzambe,
然而巴比倫王塞魯士元年,他降旨允准建造上帝的這殿。
14 alongolaki kutu na tempelo ya Babiloni biloko basala na wolo mpe na palata, oyo Nabukodonozori azwaki na Ndako ya Nzambe kati na Yelusalemi mpe amemaki na tempelo ya Babiloni. Mokonzi Sirisi apesaki biloko yango epai ya Sheshibatsari oyo ye, Sirisi, atiaki lokola moyangeli.
上帝殿中的金、銀器皿,就是尼布甲尼撒從耶路撒冷的殿中掠去帶到巴比倫廟裏的,塞魯士王從巴比倫廟裏取出來,交給派為省長的,名叫設巴薩,
15 Alobaki na ye: ‘Kamata biloko oyo mpe kende kotia yango kati na Tempelo ya Yelusalemi; mpe tika ete Tempelo ya Nzambe etongama lisusu na esika na yango ya kala.’
對他說可以將這些器皿帶去,放在耶路撒冷的殿中,在原處建造上帝的殿。
16 Ezali bongo nde Sheshibatsari ayaki awa na Yelusalemi mpo na kotonga miboko ya Ndako ya Nzambe. Wuta mokolo wana kino na mokolo ya lelo, Tempelo ezali kotongama, kasi misala esili nanu te. ›
於是這設巴薩來建立耶路撒冷上帝殿的根基。這殿從那時直到如今尚未造成。』
17 Sik’oyo, soki yango esepelisi mokonzi, tika ete baluka kati na babuku ya kala ya bakonzi ya Babiloni mpo na kotala soki mokonzi Sirisi apesaki solo mitindo ya kotonga lisusu Ndako ya Nzambe kati na Yelusalemi. Mpe tika ete mokonzi atindela biso mokano na ye na tina na likambo oyo. »
現在王若以為美,請察巴比倫王的府庫,看塞魯士王降旨允准在耶路撒冷建造上帝的殿沒有,王的心意如何?請降旨曉諭我們。」

< Esidrasi 5 >