< Esidrasi 3 >
1 Na sanza ya sambo, bana ya Isalaele oyo bavandaki kati na bingumba na bango basanganaki na Yelusalemi lokola moto moko.
Et le septième mois arriva, et les fils d'Israël étaient dans leurs villes, et le peuple se rassembla comme un seul homme à Jérusalem.
2 Jozue, mwana mobali ya Yotsadaki, elongo na baninga na ye, Banganga-Nzambe, mpe Zorobabeli, mwana mobali ya Shealitieli, elongo na bandeko na ye, babandaki kotonga etumbelo ya Nzambe ya Isalaele mpo na kobonza kuna mbeka ya kotumba kolanda makomi kati na Mobeko ya Moyize, moto na Nzambe.
Et Josué, fils de Josédec, et les prêtres, ses frères, et Zorobabel, fils de Salathiel, et ses frères, s'étant mis en avant, bâtirent l'autel du Seigneur leur Dieu pour y offrir des holocaustes, comme il est écrit en la loi de Moise, homme de Dieu.
3 Atako bazalaki koyoka bato oyo bazalaki pembeni na bango somo, batongaki etumbelo na likolo ya miboko na yango ya kala mpe babonzaki wana mpo na Yawe mbeka ya kotumba ya tongo mpe ya pokwa.
Ils le relevèrent d'abord où il était autrefois, car ils avaient crainte des peuples d'alentour; ils rétablirent l'holocauste du Seigneur, le matin et le soir.
4 Bongo kolanda makomi, basepelaki feti ya Bandako ya kapo, mpe babonzaki mikolo nyonso bambeka ya kotumba kolanda motango oyo ekatama mpo na mokolo na mokolo.
Et ils célébrèrent la fête des tabernacles, ainsi qu'il est écrit, faisant les holocaustes quotidiens, selon le nombre déterminé jour par jour.
5 Sima na yango, babonzaki mbeka ya kotumba ya tango nyonso, bambeka ya kotumba oyo ekatama mpo na feti ya ebandeli ya sanza mpe mpo na feti nyonso oyo ekatama mpo na Yawe, mpe bambeka ya kotumba mpo na bato nyonso oyo bazalaki bango moko kopesa makabo wuta na mokano ya mitema na bango.
Puis, après la fête, ils offrirent l'holocauste perpétuel, les sacrifices des nouvelles lunes, et de toutes les fêtes consacrées au Seigneur, et ceux que l'on offrait volontairement.
6 Bato babandaki kobonzela Yawe bambeka ya kotumba na mokolo ya liboso ya sanza ya sambo, atako bamitongelaki nanu te miboko ya Tempelo ya Yawe.
Le premier jour du septième mois, ils commencèrent à offrir des holocaustes au Seigneur, et les fondations du temple n'étaient pas encore jetées.
7 Bapesaki mbongo epai ya batongi ndako mpe epai ya basharipantie; bongo bapesaki lisusu bilei, masanga mpe mafuta epai ya bato ya Sidoni mpe ya Tiri mpo ete bamema, na nzela ya ebale monene, banzete ya sedele longwa na Libani kino na Jafa, na ndingisa ya Sirisi, mokonzi ya Persi.
Et ils donnèrent de l'argent aux tailleurs de pierres, aux charpentiers; quant aux Sidoniens et aux Tyriens qui leur amenèrent jusqu'au port de Joppé des cèdres du Liban, selon la permission que Cyrus, roi des Perses, leur avait accordée, ils leur donnèrent le manger et le boire, et de l'huile.
8 Na sanza ya mibale ya mobu ya mibale sima na bango kokoma na Ndako ya Nzambe kati na Yelusalemi, Zorobabeli, mwana mobali ya Shealitieli; Jozue, mwana mobali ya Yotsadaki, elongo na bandeko na bango mosusu, Banganga-Nzambe, Balevi mpe bato nyonso oyo bazongaki na Yelusalemi wuta na bowumbu, babandaki misala ya kotonga. Baponaki Balevi oyo bazalaki na mibu kobanda tuku mibale mpe komata mpo ete balandela misala ya kotonga Tempelo ya Yawe.
Et la seconde année de leur retour dans le temple du Seigneur à Jérusalem, le second mois, Zorobabel, fils de Salathiel; Josué, fils de Josedec, ce qui restait de leurs frères les prêtres et les lévites, tous ceux qui étaient sortis de captivité, commencèrent les travaux, et ils chargèrent de la surveillance des ouvriers les lévites de vingt ans et au-dessus.
9 Jozue elongo na bana na ye ya mibali mpe bandeko na ye ya mibali, Kadimieli elongo na bana na ye ya mibali oyo bazalaki bakitani ya Yuda, bapesamelaki mokumba ya kolandela bato oyo bazalaki kotonga Ndako ya Nzambe. Mpe bakitani ya Enadadi elongo na bana na bango ya mibali mpe bandeko na bango, Balevi, bazalaki kosunga bango.
Josué, ses fils et ses frères; Cadmiel, de la maison de Juda, et ses fils, prirent la direction des travaux qui se faisaient dans le temple, secondés par les lévites, fils d'Henadad, et leurs fils et leurs frères.
10 Tango batongi ndako basilisaki kotonga miboko ya Tempelo ya Yawe, Banganga-Nzambe kati na bilamba na bango ya mosala ya bonganga-Nzambe elongo na bakelelo na bango na maboko; Balevi, bakitani ya Azafi, elongo na manzanza, batelemaki na bisika na bango mpo na kokumisa Yawe, kolanda mitindo ya Davidi, mokonzi ya Isalaele.
Ils jetèrent les fondations pour y asseoir le temple du Seigneur; cependant, les prêtres, revêtus de leurs robes, sonnèrent de la trompette, et les lévites, fils d'Asaph, au bruit des cymbales, chantaient les louanges du Seigneur, comme l'avait prescrit David.
11 Bazalaki koyemba banzembo mpo na kokumisa mpe kozongisela Yawe matondi: « Solo, azali malamu, bolingo na Ye mpo na Isalaele ewumelaka seko na seko! » Bongo bato nyonso bazalaki kobeta milolo makasi mpo na kokumisa Yawe mpo ete bazalaki kotia miboko ya Tempelo ya Yawe.
Ils louaient le Seigneur et lui rendaient grâces tour à tour, parce qu'il est bon, parce que sa miséricorde envers Israël doit durer toujours. Et dans sa joie, tout le peuple, à grands cris, louait le Seigneur, à cause de la fondation du temple.
12 Nzokande, kati na Banganga-Nzambe oyo ya mikolo, kati na Balevi oyo ya mikolo mpe kati na bakambi ya mabota, oyo ya mikolo, ezalaki na ebele oyo bamonaki Tempelo ya liboso; bongo bazalaki kolela na mongongo makasi wana bazalaki kotia miboko ya Tempelo ya sika na miso na bango. Mpe kaka na tango yango, ebele ya bato mosusu bazalaki kosepela na koganga makasi mpe na kobeta milolo nzela moko na maboko.
Et un grand nombre de prêtres, de lévites, de chefs de famille, avancés en âge, qui avaient vu le temple dans son premier état, et qui revoyaient de leurs yeux ce temple, élevaient la voix et pleuraient, tandis que la foule, en signe de joie, élevait encore plus haut le chant.
13 Boye bato bakokaki te kokesenisa makelele ya bato oyo bazali koganga mpo na esengo mpe makelele ya bato oyo bazali kolela, pamba te bato bazalaki koganga makasi mpe makelele na bango ezalaki koyokana kino na mosika.
Et nul ne pouvait distinguer les marques d'allégresse de la voix de ceux qui pleuraient, parce que le peuple jetait de grands cris, et que la rumeur en retentissait au loin.