< Esidrasi 2 >

1 Tala bato ya etuka ya Yuda, oyo Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, amemaki na bowumbu na mokili ya Babiloni, mpe, wuta na bowumbu, bazongaki na Yelusalemi mpe na Yuda, moto na moto kati na engumba na ye.
巴比伦王尼布甲尼撒从前掳到巴比伦之犹大省的人,现在他们的子孙从被掳到之地回耶路撒冷和犹大,各归本城。
2 Bazongaki nzela moko na Zorobabeli, Jozue, Neyemi, Seraya, Reyelaya, Maridoshe, Bilishani, Misipari, Bigivayi, Rewumi, Baana. Tala motango ya bana ya Isalaele:
他们是同着所罗巴伯、耶书亚、尼希米、西莱雅、利来雅、末底改、必珊、米斯拔、比革瓦伊、利宏、巴拿回来的。
3 Bakitani ya Pareoshi: nkoto mibale na nkama moko na tuku sambo na mibale.
以色列人民的数目记在下面:巴录的子孙二千一百七十二名;
4 Bakitani ya Shefatia: nkama misato na tuku sambo na mibale.
示法提雅的子孙三百七十二名;
5 Bakitani ya Ara: nkama sambo na tuku sambo na mitano.
亚拉的子孙七百七十五名;
6 Bakitani ya Paati-Moabi na nzela ya Jozue mpe Joabi: nkoto mibale na nkama mwambe na zomi na mibale.
巴哈·摩押的后裔,就是耶书亚和约押的子孙二千八百一十二名;
7 Bakitani ya Elami: nkoto moko na nkama mibale na tuku mitano na minei.
以拦的子孙一千二百五十四名;
8 Bakitani ya Zatu: nkama libwa na tuku minei na mitano.
萨土的子孙九百四十五名;
9 Bakitani ya Zakayi: nkama sambo na tuku motoba.
萨改的子孙七百六十名;
10 Bakitani ya Bani: nkama motoba na tuku minei na mibale.
巴尼的子孙六百四十二名;
11 Bakitani ya Bebayi: nkama motoba na tuku mibale na misato.
比拜的子孙六百二十三名;
12 Bakitani ya Azigadi: nkoto moko na nkama mibale na tuku mibale na mibale.
押甲的子孙一千二百二十二名;
13 Bakitani ya Adonikami: nkama motoba na tuku motoba na motoba.
亚多尼干的子孙六百六十六名;
14 Bakitani ya Bigivayi: nkoto mibale na tuku mitano na motoba.
比革瓦伊的子孙二千零五十六名;
15 Bakitani ya Adini: nkama minei na tuku mitano na minei.
亚丁的子孙四百五十四名;
16 Bakitani ya Ateri na nzela ya Ezekiasi: tuku libwa na mwambe.
亚特的后裔,就是希西家的子孙九十八名;
17 Bakitani ya Betsayi: nkama misato na tuku mibale na misato.
比赛的子孙三百二十三名;
18 Bakitani ya Yora: nkama moko na zomi na mibale.
约拉的子孙一百一十二名;
19 Bakitani ya Ashumi: nkama mibale na tuku mibale na misato.
哈顺的子孙二百二十三名;
20 Bakitani ya Gibari: tuku libwa na mitano.
吉罢珥人九十五名;
21 Bato ya mboka Beteleemi, nkama moko na tuku mibale na misato.
伯利恒人一百二十三名;
22 Bato ya mboka Netofa: tuku mitano na motoba.
尼陀法人五十六名;
23 Bato ya mboka Anatoti: nkama moko na tuku mibale na mwambe.
亚拿突人一百二十八名;
24 Bato ya Azimaveti: tuku minei na mibale.
亚斯玛弗人四十二名;
25 Bakitani ya Kiriati-Yearimi, Kefira mpe Beyeroti: nkama sambo na tuku minei na misato.
基列·耶琳人、基非拉人、比录人共七百四十三名;
26 Bakitani ya Rama mpe Geba: nkama motoba na tuku mibale na moko.
拉玛人、迦巴人共六百二十一名;
27 Bato ya mboka Mikimasi: nkama moko na tuku mibale na mibale.
默玛人一百二十二名;
28 Bato ya bamboka Beteli mpe Ayi: nkama mibale na tuku mibale na misato.
伯特利人、艾人共二百二十三名;
29 Bakitani ya Nebo: tuku mitano na mibale.
尼波人五十二名;
30 Bakitani ya Magibishi: nkama moko na tuku mitano na motoba.
末必人一百五十六名;
31 Bakitani ya Elami mosusu: nkoto moko na nkama mibale na tuku mitano na minei.
别的以拦子孙一千二百五十四名;
32 Bakitani ya Arimi: nkama misato na tuku mibale.
哈琳的子孙三百二十名;
33 Bakitani ya Lodi, Adidi mpe Ono: nkama sambo na tuku mibale na mitano.
罗德人、哈第人、阿挪人共七百二十五名;
34 Bakitani ya Jeriko: nkama misato na tuku minei na mitano.
耶利哥人三百四十五名;
35 Bakitani ya Sena: nkoto misato na nkama motoba na tuku misato.
西拿人三千六百三十名。
36 Tala motango ya Banganga-Nzambe: Bakitani ya Yedaeya, na nzela ya libota ya Jozue: nkama libwa na tuku sambo na misato.
祭司:耶书亚家耶大雅的子孙九百七十三名;
37 Bakitani ya Imeri: nkoto moko na tuku mitano na mibale.
音麦的子孙一千零五十二名;
38 Bakitani ya Pashuri: nkoto moko na nkama mibale na tuku minei na sambo.
巴施户珥的子孙一千二百四十七名;
39 Bakitani ya Arimi: nkoto moko na zomi na sambo.
哈琳的子孙一千零一十七名。
40 Tala motango ya Balevi: Bakitani ya Jozue na nzela ya Kadimieli mpe ya Odavia: tuku sambo na minei.
利未人:何达威雅的后裔,就是耶书亚和甲篾的子孙七十四名。
41 Tala motango ya bayembi: Bakitani ya Azafi: nkama moko na tuku mibale na mwambe.
歌唱的:亚萨的子孙一百二十八名。
42 Tala motango ya bakengeli bikuke ya Tempelo: Bakitani ya Shalumi, Ateri, Talimoni, Akubi, Atita mpe Shobayi: nkama moko na tuku misato na libwa.
守门的:沙龙的子孙、亚特的子孙、达们的子孙、亚谷的子孙、哈底大的子孙、朔拜的子孙,共一百三十九名。
43 Tala basali ya Tempelo: Bakitani ya Tsika, Asufa, Tabaoti,
尼提宁:西哈的子孙、哈苏巴的子孙、答巴俄的子孙、
44 Kerosi, Siya, Padoni,
基绿的子孙、西亚的子孙、巴顿的子孙、
45 Lebana, Agaba, Akubi
利巴拿的子孙、哈迦巴的子孙、亚谷的子孙、
46 Agabi, Shalimayi, Anani,
哈甲的子孙、萨买的子孙、哈难的子孙、
47 Gideli, Gaari, Reaya,
吉德的子孙、迦哈的子孙、利亚雅的子孙、
48 Retsini, Nekoda, Gazami,
利汛的子孙、尼哥大的子孙、迦散的子孙、
49 Uza, Paseya, Besayi,
乌撒的子孙、巴西亚的子孙、比赛的子孙、
50 Asina, Mewunimi, Nefusimi,
押拿的子孙、米乌宁的子孙、尼普心的子孙、
51 Bakibuki, Akufa, Aruri,
巴卜的子孙、哈古巴的子孙、哈忽的子孙、
52 Batsiluti, Meyida, Arisha,
巴洗律的子孙、米希大的子孙、哈沙的子孙、
53 Barikosi, Sisera, Tama,
巴柯的子孙、西西拉的子孙、答玛的子孙、
54 Netsia mpe Atifa.
尼细亚的子孙、哈提法的子孙。
55 Tala bakitani ya basali ya Salomo: Bakitani ya Sotayi, Sofereti, Peruda,
所罗门仆人的后裔,就是琐太的子孙、琐斐列的子孙、比路大的子孙、
56 Yala, Darikoni, Gideli,
雅拉的子孙、达昆的子孙、吉德的子孙、
57 Shefatia, Atili, Pokereti-Atsebayimi mpe Ami.
示法提雅的子孙、哈替的子孙、玻黑列·哈斯巴音的子孙、亚米的子孙。
58 Motango ya basali ya Tempelo mpe ya bakitani ya basali ya Salomo: nkama misato na tuku libwa na mibale.
尼提宁和所罗门仆人的后裔共三百九十二名。
59 Tala molongo ya bato oyo bawutaki na bowumbu, na bingumba Teli-Mela, Teli-Arisha, Kerubi-Adani mpe Imeri, kasi balongaki te kolakisa ete mabota na bango ya botata ewuta na Isalaele:
从特·米拉、特·哈萨、基绿、押但、音麦上来的,不能指明他们的宗族谱系是以色列人不是;
60 Bakitani ya Delaya, Tobiya mpe Nekoda: nkama motoba na tuku mitano na mibale.
他们是第来雅的子孙、多比雅的子孙、尼哥大的子孙,共六百五十二名。
61 Mpe kati na Banganga-Nzambe: Bakitani ya Obaya, ya Akotsi mpe ya Barizilayi oyo abengamaki « Barizilayi » mpo ete abalaki mwana mwasi ya Barizilayi, moto ya Galadi.
祭司中,哈巴雅的子孙、哈哥斯的子孙、巴西莱的子孙;因为他们的先祖娶了基列人巴西莱的女儿为妻,所以起名叫巴西莱。
62 Balukaki mikanda oyo bakoma bakombo ya bakoko na bango, kasi batikalaki komona yango te. Boye balongolaki bango na mosala ya bonganga-Nzambe, pamba te bazalaki mbindo.
这三家的人在族谱之中寻查自己的谱系,却寻不着,因此算为不洁,不准供祭司的职任。
63 Moyangeli apekisaki bango kolia bilei ya bule kino tango Nganga-Nzambe moko akotuna toli ya Yawe na tina na bango, na nzela ya Urimi mpe Tumimi.
省长对他们说:“不可吃至圣的物,直到有用乌陵和土明决疑的祭司兴起来。”
64 Motango ya lisanga mobimba ya bato oyo bawutaki na bowumbu ezalaki nkoto tuku minei na mibale na nkama misato na tuku motoba,
会众共有四万二千三百六十名。
65 bakisa bawumbu na bango ya mibali mpe ya basi, nkoto sambo na nkama misato na tuku misato na sambo; bazalaki na bayembi na bango ya basi mpe ya mibali, nkama mibale;
此外,还有他们的仆婢七千三百三十七名,又有歌唱的男女二百名。
66 bampunda ya bitumba, nkama sambo na tuku misato na motoba; bamile nkama mibale na tuku minei na mitano;
他们有马七百三十六匹,骡子二百四十五匹,
67 bashamo nkama minei na tuku misato na mitano; mpe ba-ane nkoto motoba na nkama sambo na tuku mibale.
骆驼四百三十五只,驴六千七百二十匹。
68 Tango bakomaki na Tempelo ya Yawe, na Yelusalemi, bakambi mingi ya mabota bapesaki makabo oyo bakataki bango moko kopesa wuta na mokano ya mitema na bango mpo na kotonga lisusu Tempelo ya Nzambe, na esika na yango ya kala.
有些族长到了耶路撒冷耶和华殿的地方,便为 神的殿甘心献上礼物,要重新建造。
69 Bapesaki na libenga ya misala, moto na moto kolanda ezweli na ye, mbongo ya bibende ya wolo nkoto tuku motoba na moko, mbongo ya bibende ya palata nkoto mitano, mpe banzambala nkama moko ya mosala ya bonganga-Nzambe.
他们量力捐入工程库的金子六万一千达利克,银子五千弥拿,并祭司的礼服一百件。
70 Banganga-Nzambe, Balevi, bakengeli bikuke, bayembi, basali ya Tempelo, ndambo kati na bato mpe bato nyonso ya Isalaele bavandaki kati na bingumba na bango.
于是祭司、利未人、民中的一些人、歌唱的、守门的、尼提宁,并以色列众人,各住在自己的城里。

< Esidrasi 2 >