< Esidrasi 10 >
1 Wana Esidrasi azalaki kobondela mpe kotubela masumu, azalaki ya kofukama mpe azalaki kolela liboso ya Ndako ya Nzambe. Ebele ya bana ya Isalaele: mibali, basi mpe bana, basanganaki pene na ye mpe, bango nyonso, bazalaki kolela makasi.
Ağlayarak kendini Tanrı'nın Tapınağı'nın önünde yere atan Ezra dua edip günahlarını açıkladı. Bu arada erkek, kadın, çocuk, İsrailliler'den çok büyük bir topluluk Ezra'nın çevresine toplandı. Onlar da hıçkıra hıçkıra ağlıyordu.
2 Bongo Shekania, mwana mobali ya Yeyeli, moko kati na bakitani ya Elami, alobaki na Esidrasi: « Solo, tosalaki makambo ya mbindo na miso ya Nzambe na biso, pamba te tobali basi ya bapaya kati na bikolo oyo ezali elongo na biso kati na mboka oyo; kasi atako bongo, elikya ezali nanu mpo na Isalaele!
Elamoğulları'ndan Yehiel oğlu Şekanya, Ezra'ya şöyle dedi: “Çevremizdeki halklardan yabancı karılar aldığımız için Tanrımız'a ihanet ettik. Buna karşın İsrail için hâlâ umut var.
3 Sik’oyo, tika ete tosala boyokani elongo na Nzambe na biso mpo na kobengana basi wana nyonso elongo na bana na bango, kolanda toli na yo Esidrasi, nkolo na ngai, mpe kolanda toli ya bato nyonso oyo balengaka liboso ya mibeko ya Nzambe na biso! Tika ete esalema kolanda Mobeko!
Senin ve Tanrımız'ın buyrukları karşısında titreyenlerin öğütleri uyarınca, bütün yabancı kadınları ve çocuklarını uzaklaştırmak için Tanrımız'la şimdi bir antlaşma yapalım. Bu antlaşma yasaya uygun olsun.
4 Telema, pamba te yo nde osengeli kotala likambo oyo! Tozali elongo na yo mpo na kosunga yo. Yika mpiko mpe sala! »
Haydi kalk! Sorumluluk senin üzerinde. Biz seni destekleyeceğiz. Güçlü ol ve gerekeni yap!”
5 Esidrasi atelemaki mpe asengaki na bakonzi ya Banganga-Nzambe, Balevi mpe bana nyonso ya Isalaele kolapa ndayi ete bakosalela makambo oyo ndenge elobami. Mpe balapaki ndayi.
Bunun üzerine yerden kalkan Ezra önde gelen Levili kâhinlere ve öbür İsrailliler'e söyleneni yapmaları için ant içirdi. Hepsi ant içti.
6 Bongo Esidrasi alongwaki liboso ya Ndako ya Nzambe mpe akendeki na shambre ya Yoanani, mwana mobali ya Eliashibi. Wana azalaki kuna, atikalaki kolia eloko moko te mpe komela mayi te; pamba te azalaki kokoba kosala matanga likolo ya makambo ya mbindo ya bato oyo bawutaki na bowumbu.
Sonra Ezra Tanrı'nın Tapınağı'nın önünden ayrılıp Elyaşiv oğlu Yehohanan'ın odasına gitti. Orada gecelerken ne yemek yedi, ne su içti. Sürgünden dönenler Tanrı'ya bağlı kalmadığı için yas tutuyordu.
7 Bapanzaki sango kati na Yuda mpe na Yelusalemi ete bato nyonso oyo bawutaki na bowumbu basangana na Yelusalemi.
Sürgünden dönenlerin hepsinin Yeruşalim'de toplanması için Yahuda ve Yeruşalim'de bir duyuru yapıldı:
8 Kolanda mokano ya bakalaka mpe bakambi ya bato, moto nyonso oyo akomonana te sima na mikolo misato, bakobotola biloko na ye nyonso mpe bakolongola ye na lisanga ya bato oyo bawutaki na bowumbu.
Halkın önderlerinin ve ileri gelenlerinin kararı uyarınca, üç gün içinde gelmeyenin bütün malına el konulacak, kendisi de sürgünden dönenler topluluğundan atılacaktı.
9 Sima na mikolo yango misato, bato nyonso ya Yuda mpe ya Benjame basanganaki na Yelusalemi. Na mokolo ya tuku mibale ya sanza ya libwa, bato nyonso bavandaki kati na lopango, liboso ya Ndako ya Nzambe, mpe bazalaki kolenga makasi likolo ya makambo oyo mpe mpo ete mvula ezalaki kobeta makasi.
Bütün Yahudalı ve Benyaminli erkekler üç gün içinde Yeruşalim'de toplandılar. Dokuzuncu ayın yirminci günü hepsi Tanrı'nın Tapınağı'nın önündeki alandaydı. Hem durumun öneminden, hem de yağmurdan ötürü herkes titriyordu.
10 Nganga-Nzambe Esidrasi atelemaki mpe alobaki na bango: — Bosalaki makambo ya mbindo awa bobalaki basi ya bapaya; mpe, na nzela na yango, bobakiselaki Isalaele ngambo.
Kâhin Ezra kalkıp, “Siz Tanrı'ya ihanet ettiniz” dedi, “Yabancı kadınlarla evlendiniz. İsrail'in suçuna suç kattınız.
11 Sik’oyo, boyambola masumu na bino epai na Yawe, Nzambe ya batata na bino, mpe bokokisa mokano na Ye! Bokabwana na bato ya bikolo ya bapaya oyo bazali kati na bino mpe bokabwana na basi na bino ya bapaya.
Şimdi atalarınızın Tanrısı RAB'be suçunuzu açıklayın. O'nun istediğini yapın. Çevredeki halklardan ve yabancı karılardan ayrılın.”
12 Lisanga mobimba ezongisaki na mongongo makasi: — Ezali se bongo, tokosala ndenge olobi!
Topluluk yüksek sesle şöyle karşılık verdi: “Bütün söylediklerini yapacağız.
13 Nzokande tozali bato ebele awa, mpe ezali eleko ya mvula; tokoki kowumela na libanda te. Kutu, ezali te likambo ya mokolo moko to ya mikolo mibale, pamba te ebele kati na biso basali masumu kati na likambo oyo.
Yalnız kalabalık çok, üstelik hava da yağmurlu. Dışarda duracak gücümüz kalmadı. Hem bu bir iki günde çözülecek iş değil. Çünkü bu konuda çok günah işledik.
14 Tika ete bakambi na biso batikala awa na esika ya lisanga mobimba! Mpe tika ete bato nyonso oyo, kati na bingumba na biso, babalaki basi ya bapaya bakende liboso ya bakambi mpe basambisi ya engumba moko na moko, na mikolo oyo bakokatela bango, kino kanda makasi ya Nzambe na biso ekolongwa kati na biso na tina na likambo yango.
Bütün topluluk adına önderlerimiz bu konuyla ilgilensin. Sonra kentlerimizde yabancı kadınla evli olan herkes saptanan bir zamanda kentin ileri gelenleri ve yargıçlarıyla birlikte gelsin. Yeter ki, Tanrımız'ın bu konudaki kızgın öfkesi üzerimizden kalksın.”
15 Kaka Jonatan, mwana mobali ya Azaeli, mpe Yakizia, mwana mobali ya Tikiva, elongo na Meshulami mpe Shabetayi, moto ya libota ya Levi, nde batelemelaki mokano oyo.
Ancak, Asahel oğlu Yonatan, Tikva oğlu Yahzeya ve onları destekleyen Meşullam ile Levili Şabbetay buna karşı çıktılar.
16 Kasi bato oyo bawutaki na bowumbu basalaki ndenge elobamaki. Nganga-Nzambe Esidrasi aponaki bakambi ya mabota, moko mpo na libota moko na moko, mpe abengaki bango nyonso na bakombo na bango. Babandaki kovanda mpo na koyekola makambo yango na mokolo ya liboso ya sanza ya zomi.
Sürgünden dönenler bu öneriye göre davrandılar. Kâhin Ezra adlarını belirterek her boydan boy başlarını seçti. Onuncu ayın birinci günü oturup konuyu incelemeye başladılar.
17 Mpe, na mokolo ya liboso ya sanza ya liboso, basilisaki koyekola makambo ya mibali nyonso oyo babalaki basi ya bapaya.
Birinci ayın birinci günü yabancı kadınlarla evlenen bütün erkeklerin durumunu incelemeyi bitirdiler.
18 Tala kati na bakitani ya Banganga-Nzambe, mibali oyo babalaki basi ya bapaya: Kati na bakitani ya Jozue, mwana mobali ya Yotsadaki elongo na bandeko na ye ya mibali: Maaseya, Eliezeri, Yaribi mpe Gedalia.
Kâhinlerin soyundan gelip yabancı kadınlarla evlenenler şunlardı: Yosadak oğlu Yeşu'nun oğullarından ve kardeşlerinin soyundan Maaseya, Eliezer, Yariv, Gedalya.
19 Bango nyonso batombolaki maboko mpo na kozwa mokano ya kobengana basi na bango mpe ya kobonza meme ya mobali lokola mbeka mpo na masumu na bango.
Bunlar karılarını kovacaklarına söz verdiler. İşledikleri suç için suç sunusu olarak sürüden bir koç sundular.
20 Kati na bakitani ya Imeri: Anani mpe Zebadia.
İmmeroğulları'ndan: Hanani, Zevadya.
21 Kati na bakitani ya Arimi: Maaseya, Eli, Shemaya, Yeyeli mpe Oziasi.
Harimoğulları'ndan: Maaseya, Eliya, Şemaya, Yehiel, Uzziya.
22 Kati na bakitani ya Pashuri: Eliowenayi, Maaseya, Isimaeli, Netaneeli, Yozabadi mpe Eleasa.
Paşhuroğulları'ndan: Elyoenay, Maaseya, İsmail, Netanel, Yozavat, Elasa.
23 Kati na Balevi: Yozabadi, Shimei, Kelaya oyo bazalaki kobenga lisusu Kelita, Petaya, Yuda mpe Eliezeri.
Levililer'den: Yozavat, Şimi, Kelaya –Kelita– Petahya, Yahuda, Eliezer.
24 Kati na babeti mindule: Eliashibi. Kati na bakengeli bikuke: Shalumi, Telemi mpe Uri.
Ezgicilerden: Elyaşiv. Tapınak kapı nöbetçilerinden: Şallum, Telem, Uri.
25 Kati na bato mosusu ya Isalaele: kati na bakitani ya Pareoshi: Ramia, Yiziya, Malikiya, Miyamini, Eleazari, Malikiya mpe Benaya.
Öbür İsrailliler'den: Paroşoğulları'ndan: Ramya, Yizziya, Malkiya, Miyamin, Elazar, Malkiya, Benaya.
26 Kati na bakitani ya Elami: Matania, Zakari, Yeyeli, Abidi, Yeremoti mpe Eli.
Elamoğulları'ndan: Mattanya, Zekeriya, Yehiel, Avdi, Yeremot, Eliya.
27 Kati na bakitani ya Zatu: Eliowenayi, Eliashibi, Matania, Yeremoti, Zabadi mpe Aziza.
Zattuoğulları'ndan: Elyoenay, Elyaşiv, Mattanya, Yeremot, Zavat, Aziza.
28 Kati na bakitani ya Bebayi: Yoanani, Anania, Zabayi mpe Atilayi.
Bevayoğulları'ndan: Yehohanan, Hananya, Zabbay, Atlay.
29 Kati na bakitani ya Bani: Meshulami, Maluki, Adaya, Yashubi, Sheali mpe Ramoti.
Banioğulları'ndan: Meşullam, Malluk, Adaya, Yaşuv, Şeal, Yeremot.
30 Kati na bakitani ya Paati-Moabi: Adina, Kelali, Benaya, Maaseya, Matania, Betisaleyeli, Binuwi mpe Manase.
Pahat-Moavoğulları'ndan: Adna, Kelal, Benaya, Maaseya, Mattanya, Besalel, Binnuy, Manaşşe.
31 Kati na bakitani ya Arimi: Eliezeri, Yishiya, Malikiya, Shemaya, Simeoni,
Harimoğulları'ndan: Eliezer, Yişşiya, Malkiya, Şemaya, Şimon,
32 Benjame, Maluki mpe Shemaria.
Benyamin, Malluk, Şemarya.
33 Kati na bakitani ya Ashumi: Matinayi, Matata, Zabadi, Elifeleti, Yeremayi, Manase mpe Shimei.
Haşumoğulları'ndan: Mattenay, Mattatta, Zavat, Elifelet, Yeremay, Manaşşe, Şimi.
34 Kati na bakitani ya Bani: Madayi, Amirami, Ueli,
Banioğulları'ndan: Maaday, Amram, Uel,
35 Benaya, Bedia, Keluwu,
Benaya, Bedeya, Keluhu,
36 Vania, Meremoti, Eliashibi,
Vanya, Meremot, Elyaşiv,
37 Matania, Matinayi, Yasayi,
Mattanya, Mattenay, Yaasay,
39 Shelemiya, Natan, Adaya,
Şelemya, Natan, Adaya,
40 Makinadibayi, Shashayi, Sharayi,
Maknadvay, Şaşay, Şaray,
41 Azareyeli, Shelemiya, Shemaria,
Azarel, Şelemya, Şemarya,
42 Shalumi, Amaria mpe Jozefi.
Şallum, Amarya, Yusuf.
43 Kati na bakitani ya Nebo: Yeyeli, Matitia, Zabadi, Zebina, Yadayi, Joeli mpe Benaya.
Nevooğulları'ndan: Yeiel, Mattitya, Zavat, Zevina, Yadday, Yoel, Benaya.
44 Mibali oyo nyonso nde babalaki basi ya bapaya, mpe mingi kati na bango bazwaki bana na nzela ya basi yango.
Bunların hepsi yabancı kadınlarla evlenmişti. Bazılarının bu kadınlardan çocukları da vardı.